Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 6 nk. 14-15
  • Davidi azalaki kobanga te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Davidi azalaki kobanga te
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Davidi azalaki kobanga te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Davidi ná Goliate
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Etumba ezali ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Davidi ná Goliate
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 6 nk. 14-15

LITEYA 6

Davidi azalaki kobanga te

Osalaka nini soki ozali kobanga?​— Ntango mosusu okimaka epai ya papa to epai ya mama. Kasi, ezali na moto mosusu oyo akoki mpe kosalisa yo. Moto yango aleki bato nyonso na makasi. Oyebi ye?​— Ɛɛ, ezali Yehova Nzambe. Sikoyo, tótalela naino lisolo ya Davidi, elenge mobali moko oyo Biblia elobeli. Ayebaki ete Yehova azalaki ntango nyonso kosunga ye, yango wana azalaki kobanga te.

Banda ntango Davidi azalaki mwana moke, baboti na ye basalisaki ye alingaka Yehova. Yango esalisaki Davidi abanga te ata ntango akutanaki na makambo mosusu ya nsɔmɔ. Ayebaki ete Yehova azali Moninga na ye mpe ete akosalisa ye. Mokolo moko ntango Davidi azalaki kobatela bampate, nkɔsi moko ya monene eyaki mpe ekangaki mpate moko! Oyebi likambo Davidi asalaki? Alandaki nkɔsi yango mpe emonani ete abomaki yango atako azalaki na eloko te na mabɔkɔ! Mpe mokolo mosusu ntango urse ekangaki mpate, Davidi abomaki mpe yango! Mpo na yo, nani moto azalaki kosalisa Davidi?​— Ɛɛ, ezali Yehova.

Davidi asalaki mpe likambo mosusu oyo emonisaki ete azalaki kobanga te. Bana ya Yisraele bazalaki kobunda na Bafilistia. Soda moko ya Bafilistia azalaki engambe mpenza, elombe! Nkombo na ye ezalaki Goliate. Engambe yango azalaki kofinga Yehova mpe basoda ya Yisraele. Goliate alobaki ete soda ya Yisraele oyo azali makasi aya kobunda na ye. Kasi bato nyonso ya Yisraele bazalaki kobanga ye. Ntango Davidi ayokaki bongo, alobaki na Goliate boye: ‘Ngai nakobunda na yo! Yehova akosalisa ngai mpe nakokweisa yo!’ Okanisi ete Davidi azalaki mobali ya mpiko?​— Ɛɛ, azalaki na mpiko mpenza. Olingi oyeba ndenge makambo esukaki?

Davidi azwaki lansi na ye mpe mabanga mitano, akendaki kobunda na engambe mobali yango. Ntango Goliate amonaki ete Davidi azalaki elenge, abandaki kosɛka ye. Kasi Davidi alobaki na ye boye: ‘Oyei kobunda na ngai na mopanga, kasi ngai nayei kobunda na yo na nkombo ya Yehova!’ Mbala moko atyaki libanga na lansi na ye, apusanaki mbangu epai ya Goliate, mpe abɛtaki ye libanga. Libanga ezwaki Goliate na elongi, na katikati ya miso mibale! Engambe mobali yango akweaki na mabele mpe akufaki! Bafilistia babangaki makasi mpe bango nyonso bakimaki. Nani asalisaki elenge Davidi aboma engambe Goliate?​— Ezali Yehova. Yehova alekaki mpenza engambe wana na makasi!

Davidi abomi Goliate

Davidi azalaki kobanga te mpo ayebaki ete Yehova akosalisa ye

Lisolo ya Davidi eteyi yo nini?​— Yehova aleki bato nyonso na makasi. Mpe azali Moninga na yo. Yango wana, soki okutani na likambo moko oyo ebangisi yo, kobosana te ete Yehova akoki kosalisa yo ozala na mpiko!

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Nzembo 56:3, 4

  • 1 Samwele 17:20-54

MITUNA:

  • Davidi asalaki nini ntango nkɔsi mpe ntango urse ekangaki mpate na ye?

  • Ntango Goliate afingaki Yehova, Davidi alobaki na ye nini?

  • Ndenge nini Davidi abomaki Goliate?

  • Mpo na nini Davidi abangaki nkosi te, urse te, engambe Goliate mpe te?

  • Liteya nini ozwi na lisolo ya Davidi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto