Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 8 nk. 18-19
  • Yosiya azalaki na baninga ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yosiya azalaki na baninga ya malamu
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Yosiya aponaki kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yosiya alingaki Mibeko ya Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokonzi malamu ya nsuka
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 8 nk. 18-19
Mokonzi Yosiya azali koyoka moninga na ye Yirimia

LITEYA 8

Yosiya azalaki na baninga ya malamu

Omonaka ete ezali mpasi kosala makambo ya malamu?​— Bato mingi bamonaka bongo. Biblia elobi ete ezalaki mpe mpasi mpo elenge Yosiya asala makambo ya malamu. Kasi, azalaki na baninga ya malamu oyo basalisaki ye. Tólobela naino Yosiya mpe baninga na ye.

Nkombo ya tata ya Yosiya ezalaki Amone, mokonzi moko ya Yuda. Amone azalaki moto mabe mpenza mpe azalaki kosambela bikeko. Ntango akufaki, Yosiya akómaki mokonzi ya Yuda na esika na ye. Nzokande, Yosiya azalaki na mbula 8 mpamba! Okanisi ete Yosiya azalaki moto mabe lokola tata na ye?​— Te, azalaki bongo te!

Mosakoli Sefania azali koyebisa bato ya Yuda nsango ya Yehova

Sefania ayebisaki bato ete básambela bikeko te

Ata ntango azalaki elenge mpenza, Yosiya alingaki kotosa Yehova. Yango wana baninga oyo aponaki ezalaki kaka bato oyo bazalaki kolinga Yehova. Bato yango basalisaki Yosiya asala makambo ya malamu. Baninga yango ezalaki banani?

Moko ezalaki Sefania. Sefania azalaki mosakoli mpe ayebisaki bato ya Yuda ete soki bazali kosambela bikeko, makambo ya mabe ekokómela bango. Yosiya ayokelaki Sefania, mpe azalaki kosambela Yehova, kasi bikeko te.

Moninga mosusu ya Yosiya ezalaki Yirimia. Bango mibale bazalaki bato ya bambula moko mpe bafandaki pembeni ntango bazalaki kokola. Bakómaki baninga mpe ntango Yosiya akufaki, Yirimia asalelaki ye loyembo moko ya mawa. Moto na moto asalisaki moninga asala makambo ya malamu mpe atosa Yehova.

Yosiya ná Yirimia basalisanaki mpo na kosala makambo ya malamu

Ndakisa ya Yosiya ekoki koteya yo nini?​— Ata ntango Yosiya azalaki naino mwana, azalaki kolinga kosala makambo ya malamu. Ayebaki ete baninga oyo akopona basengeli kozala bato oyo balingaka Yehova. Yo mpe osengeli kozala kaka na baninga oyo balingaka Yehova, mpe oyo bakoki kosalisa yo osalaka makambo ya malamu!

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • 2 Ntango 33:21-25; 34:1, 2; 35:25

MITUNA:

  • Tata ya Yosiya ezalaki nani? Asalaki makambo ya malamu?

  • Mposa ya Yosiya ezalaki nini ata ntango azalaki naino mwana?

  • Tángá bato mibale oyo bazalaki baninga ya Yosiya.

  • Ndakisa ya Yosiya ekoki koteya yo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto