Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 10 nk. 22-23
  • Yesu azalaki mwana ya botosi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azalaki mwana ya botosi
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Yesu ayekolaki kotosa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”
    Mekolá kondima na bango
  • “Oyo azali mwana na ngai”
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 10 nk. 22-23
Yozefe ná Maria bamoni elenge Yesu na tempelo

LITEYA 10

Yesu azalaki mwana ya botosi

Ozalaka ntango nyonso na esengo ya kotosa baboti?​— Ntango mosusu ezalaka mpasi. Oyebi ete Yesu azalaki kotosa Yehova mpe baboti na ye?​— Ndakisa na ye ekoki kosalisa yo otosaka baboti ata ntango motema na yo esepeli te. Tólobela yango naino.

Ntango Yesu azalaki na likoló, azalaki na Tata na ye Yehova. Kasi awa na mabele mpe azalaki na baboti. Nkombo ya tata na ye ezalaki Yozefe, nkombo ya mama na ye Maria. Oyebi ndenge Yozefe ná Maria bakómaki baboti ya Yesu?​—

Yehova asalaki likamwisi moko: alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria mpo Yesu abotama moto mpe afanda awa na mabele! Yesu akolaki na libumu ya Maria lokola mwana nyonso. Sanza soki 9 na nsima, Yesu abotamaki. Ezali ndenge wana nde Maria ná mobali na ye Yozefe, bakómaki baboti ya Yesu awa na mabele.

Ntango Yesu akómaki na mbula 12, asalaki likambo moko oyo emonisaki ete alingaki mpenza Tata na ye Yehova. Likambo yango esalemaki ntango Yesu mpe bato ya libota na bango bakendaki mobembo mosika, na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli. Na nzela ya kozonga, Yozefe ná Maria bamonaki Yesu te. Oyebi esika azalaki?​—

Mpo na nini Yesu akendaki na tempelo?

Yozefe ná Maria bazongaki mbangu na Yerusaleme mpe balukaki Yesu bipai nyonso. Bazalaki komitungisa mingi mpo bazalaki komona ye te. Kasi, nsima ya mikolo misato, bakendaki kokuta ye na tempelo! Oyebi mpo na nini Yesu akendaki na tempelo?​— Mpamba te kuna, akokaki koyekola makambo ya Tata na ye Yehova. Alingaki Yehova mpe azalaki na mposa ya koyeba ndenge ya kosepelisa ye. Ata ntango akolaki mpe akómaki mokóló, Yesu azalaki ntango nyonso kotosa Yehova. Yesu azalaki kotosa ata ntango ezalaki mpasi kosala yango mpe ata ntango esɛngaki ete anyokwama. Yesu azalaki mpe kotosa Yozefe ná Maria?​— Ɛɛ, Biblia elobi ete azalaki kotosa bango.

Ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini?​— Osengeli kotosa baboti na yo, ata ntango ezali mpasi kosala yango. Okobanda kosala yango?​—

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Luka 1:30-35; 2:45-52

  • Baefese 6:1

  • Baebre 5:8

MITUNA:

  • Ndenge nini Yozefe ná Maria bakómaki baboti ya Yesu awa na mabele?

  • Ntango baboti ya Yesu bazalaki koluka ye na Yerusaleme, bakendaki kokuta ye wapi?

  • Ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto