Loyembo 140
Bomoi ya babongisi-nzela
Ya Papye
Mokolo ebandi, talá moy’ebimi.
Tolamuki, tomibongisi,
nsima tobondeli.
N’esengo tobimi mpo na kosakola.
Basusu bayoki,
basusu baboyi, tokobi.
(MONDIMO)
Nde bomo’ toponi;
mpo na yo Yehova.
Nyons’okosɛnga tokosala.
Tozali kokoba,
ata moi to mbula.
Eza’ ndenge tomonisaka bolingo
Mokolo esili, talá moy’elali.
Tozongi, tolɛmbi,
kasi n’esengo, tobondeli.
Mosala tolingá na motema moko.
Matɔndi Yehova
mpo na mapamboli opesi.
(MONDIMO)
Nde bomo’ toponi;
mpo na yo Yehova.
Nyons’okosɛnga tokosala.
Tozali kokoba,
ata moi to mbula.
Eza’ ndenge tomonisaka bolingo
(Talá mpe Yos. 24:15; Nz. 92:2; Rom. 14:8.)