Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 13 lok. 36-lok. 37 par. 6
  • Tozwá liteya na ndenge oyo Yesu alongaki komekama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozwá liteya na ndenge oyo Yesu alongaki komekama
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Tozwa liteya na komekama na Yesu
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Tosengeli kotikela komekama nzela te
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • ‘Tótemela Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Zabolo ameki Yesu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 13 lok. 36-lok. 37 par. 6
Yesu aboyi komekama ya Zabolo

MOKAPO 13

Tózwa liteya na ndenge oyo Yesu alongaki komekama

MATAI 4:1-11 MARKO 1:12, 13 LUKA 4:1-13

  • SATANA AMEKI YESU

Kaka nsima ya kozwa batisimo epai ya Yoane, elimo ya Nzambe ememi Yesu na esobe ya Yudea. Azali na makambo mingi ya kokanisa. Ntango Yesu azwaki batisimo, “likoló efungwamaki.” (Matai 3:16) Na yango, akoki kokanisa makambo oyo ayekolaki mpe asalaki ntango azalaki na likoló. Ya solo, ezali na makambo mingi oyo asengeli komanyola!

Yesu alekisi mikolo 40, butu moi, na esobe. Na boumeli ya ntango wana nyonso, azali kolya eloko te. Na nsima, ayoki nzala makasi mpe Satana Zabolo ayei komeka ye mpe alobi na ye ete: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.” (Matai 4:3) Yesu ayebi ete ezali mabe kosalela nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kokokisa bamposa na ye moko, na yango aboyi kosala likambo yango.

Zabolo asuki wana te. Ameki mayele mosusu. Asɛngi Yesu alongwa likoló ya tempelo mpe amibwaka na nse. Kasi Yesu aboyi kosala likambo ya ndenge wana. Atángi Makomami mpo na komonisa ete ezali mabe komeka Nzambe na ndenge wana.

Na nsima, na komekama ya misato, na lolenge moko boye, Zabolo alakisi Yesu “makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango” mpe alobi na ye ete: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki ofukami mpe osaleli ngai likambo moko ya losambo.” Na mbala oyo mpe Yesu aboyi na motema moko mpe alobi ete: “Longwá, Satana!” (Matai 4:8-10) Yesu atiki te ete komekama etinda ye na kosala mabe mpo ayebi ete esengeli kosalela kaka Yehova mosala mosantu. Ya solo, aponi kotikala sembo epai ya Nzambe.

Tokoki kozwa mateya na komekama yango mpe na biyano oyo Yesu apesaki. Komekama yango ezalaki ya solo, mpe yango emonisi ete Satana azali te ezaleli moko ya mabe ndenge bato mosusu balobaka. Azali moto ya solo oyo amonanaka te. Lisolo oyo emonisi mpe ete baguvɛrnema ya mokili oyo ezali na mabɔkɔ ya Zabolo; ye nde azali kotambwisa yango. Mpo soki bongo te, ndenge nini kopesa yango Kristo ekokaki kozala mpenza komekama?

Lisusu, Zabolo alobaki ete soki Yesu asambeli ye, akopesa ye mbano, elingi koloba makonzi nyonso ya mokili. Zabolo akoki mpe komeka biso na lolenge wana, mbala mosusu akoki kolakisa biso likoki ya kokóma na bomɛngo ya mokili, nguya, to lokumu. Tokomonisa mpenza bwanya soki tolandi ndakisa ya Yesu ya kotikala sembo epai ya Nzambe ata liboso ya komekama ya lolenge nini! Kasi kobosana te ete atako Zabolo atikaki Yesu na ntango wana, alukaki ye “na ntango mosusu ya malamu.” (Luka 4:13) Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso, yango wana tosengeli ntango nyonso kozala ekɛngɛ.

  • Ekoki kozala ete Yesu azali komanyola makambo nini na boumeli ya mikolo 40 oyo asali na esobe?

  • Na makambo nini Zabolo aluki komeka Yesu?

  • Mateya nini tokoki kozwa na komekama oyo Yesu akutanaki na yango mpe biyano oyo apesaki?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto