Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 71 lok. 168-lok. 169 par. 9
  • Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Bafalisai baboyi kondima
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abikisi moto mokolo ya Sabata
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mokufeli miso abiki
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abikisi moto oyo akufá miso banda kobotama
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 71 lok. 168-lok. 169 par. 9
Mosɛngi-biloko oyo akufá miso alobi na Bafarisai ntango bazali na nkanda atako baboti na ye bazali kobanga

MOKAPO 71

Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso

YOANE 9:19-41

  • BAFARISAI BALUKI KOKWEISA MOTO OYO AKUFÁ MISO

  • BAKONZI YA MANGOMBA BAZALI “BATO BAKUFÁ MISO”

Bafarisai bandimi te ete Yesu moto abikisi moto wana oyo abotamá miso ekufá, babengi baboti na ye. Baboti bayebi ete ndenge babengi bango bongo, bakoki ‘kobengana bango na sinagoga.’ (Yoane 9:22) Kobengana moto ndenge wana ezalaki kokata boyokani na ye na Bayuda mosusu mpe komemela ye ná libota na ye mikakatano ya nkita.

Bafarisai batuni baboti yango mituna mibale: “Oyo mwana na bino oyo bolobi ete abotamá miso ekufá? Bongo ndenge nini azali komona sikoyo?” Baboti yango bazongisi: “Toyebi ete azali mwana na biso mpe abotamaki miso ekufá. Kasi ndenge nini azali komona sikoyo, toyebi te, to nani afungoli ye miso, toyebi te.” Ata soki mwana na bango ayebisaki bango likambo oyo esalemaki, baboti yango bazali kokeba na eyano na bango, yango wana balobi: “Bótuna ye. Azali mokóló. Asengeli koloba ye moko.”​—Yoane 9:19-21.

Na yango, Bafarisai babengi moto yango mpe babandi kobangisa ye, balobi ete bazali na makambo ya kofunda na yango Yesu. Balobi na ye: “Pesá Nzambe nkembo; toyebi ete moto wana azali mosumuki.” Lokola alingi te komema ngambo na bango, moto yango alobi: “Soki azali mosumuki ngai nayebi te.” Mpe abakisi: “Likambo moko oyo nayebi yango oyo: nazalaki moto akufá miso, kasi sikoyo nazali komona.”​—Yoane 9:24, 25.

Lokola Bafarisai balingi kotika likambo yango te, balobi lisusu: “Asalaki yo nini? Ndenge nini afungolaki yo miso?” Mobali yango amonisi mpiko mpe ayebisi bango: “Nasilaki koyebisa bino, kasi boyokaki te. Mpo na nini bolingi koyoka yango lisusu? Bino mpe bolingi te kokóma bayekoli na ye, boye te?” Bafarisai basiliki mpe balobi: “Yo moto ozali moyekoli ya moto wana, kasi biso tozali bayekoli ya Moize. Biso toyebi ete Nzambe alobaki na Moize; kasi moto wana, toyebi te epai ye auti.”​—Yoane 9:26-29.

Mosɛngi-biloko yango akamwe mpe alobi: “Oyo ezali mpenza likambo ya kokamwa, ete bino boyebi te epai ye auti, nzokande afungoli ngai miso.” Na nsima, alobi likambo moko oyo ezali mpenza na nzela, mpo na komonisa banani oyo Nzambe ayokaka mpe andimaka: “Toyebi ete Nzambe ayokaka basumuki te, kasi soki moto abangaka Nzambe mpe asalaka mokano na ye, ye ayokaka moto yango. Banda kalakala eyokamá ata mokolo moko te ete moto moko afungolá miso ya moto oyo abotamá miso ekufá.” Yango etindi ye na maloba oyo ya nsuka: “Soki moto wana autaki epai ya Nzambe te, mbɛlɛ akokaki kosala ata eloko moko te.”​—Yoane 9:30-33.

Lokola Bafarisai bazali kokoka te kokweisa makanisi ya mosɛngi-biloko yango, balobi: “Yo obotamaki mobimba na kati ya masumu, kasi ozali koteya biso?” Mpe babwaki ye libándá.​—Yoane 9:34.

Ntango Yesu ayoki likambo oyo esalemi, akei epai ya moto yango mpe atuni ye: “Ozali kondimela Mwana ya moto?” Moto yango azongisi ete: “Tata, ye azali nani mpo nandimela ye?” Mpo na kosilisa ntembe nyonso, Yesu alobi: “Osili komona ye mpe, kutu, moto oyo azali koloba na yo ezali ye.”​—Yoane 9:35-37.

Moto yango alobi: “Nandimeli ye, Nkolo.” Mpo na komonisa kondima mpe limemya, moto yango agumbameli Yesu, mpe Yesu alobi na ye maloba oyo ya ntina mingi: “Nayaki na mokili mpo na lisambisi oyo: ete baoyo bamonaka te bámona mpe baoyo bamonaka bákóma bato bakufá miso.”​—Yoane 9:38, 39.

Bafarisai, oyo bazali wana, bayebi ete bango bakufá miso te. Kasi, tokoloba boni ndenge batutaka ntolo ete bazali bakambi na elimo? Mpo na koluka komilongisa, batuni: “Biso mpe tozali nde bato bakufá miso?” Yesu alobi: “Soki bozalaki bato bakufá miso, mbɛlɛ bozali na lisumu te. Kasi sikoyo bozali koloba ete: ‘Tomonaka.’ Lisumu na bino ezali kaka.” (Yoane 9:40, 41) Lokola bazali bateyi na Yisraele, bakoki kozala na ntina moko te ya koboya kondima ete Yesu azali Masiya. Kasi lokola bayebi Mibeko malamu, koboya kondimela Yesu ezali lisumu monene.

  • Mpo na nini baboti ya mosɛngi-biloko oyo akufá miso babangi ntango Bafarisai babengi bango, mpe eyano nini bapesi?

  • Maloba nini ezali mpenza na nzela oyo epesi Bafarisai nkanda?

  • Mpo na nini Bafarisai bazali na ntina moko te ya kotɛmɛla Yesu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto