Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • od mok. 1 nk. 6-11
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ETENI YA EBONGISELI YA YEHOVA OYO EZALI NA LIKOLÓ
  • EBONGISELI YA YEHOVA EZALI KOKENDE LIBOSO
  • “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Zwá libateli na ebongiseli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Likálo ya jéhovah na likoló ezali kotambola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Totambola elongo moko na likálo ya jéhovah na likoló
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
od mok. 1 nk. 6-11

MOKAPO 1

Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova

NA MOKILI mobimba, bibongiseli ezali ebele: bibongiseli ya losambo, ya politiki, ya mombongo, mpe oyo etalelaka bomoi ya bato. Mokomoko ya bibongiseli yango ezali na ndenge na yango ya kotalela makambo, mikano na yango, mpe elandaka makanisi ya bato. Kasi, ezali na ebongiseli moko oyo ekeseni mosika na bibongiseli mosusu nyonso. Liloba ya Nzambe emonisi polele ete ezali Batatoli ya Yehova.

2 Ezali esengo ndenge ozali sikoyo na kati ya ebongiseli ya Yehova. Lokola yo moko oyebi mokano ya Nzambe mpe ondimi yango, ozali sikoyo kosala yango. (Nz. 143:10; Rom. 12:2) Ozali mosaleli to ministre ya Nzambe mpe ozali kosalela ye na molende elongo na lisangá ya bandeko ya bolingo na mokili mobimba. (2 Ko. 6:4, msl; 1 Pe. 2:17; 5:9) Ndenge Liloba ya Nzambe elakaki, yango ememeli yo mapamboli ebele mpe esengo mingi. (Mas. 10:22; Mrk. 10:30) Lokola ozali kosala mokano ya Yehova na bosembo lelo oyo, ozali komibongisa mpo na kozwa bomoi ya seko mpe ya esengo na mikolo ezali koya.​—1 Tim. 6:18, 19; 1 Yoa. 2:17.

3 Mozalisi na biso Monene azali na ebongiseli moko na mokili mobimba oyo ekokani ata na ebongiseli mosusu te, mpe etambwisami na ndenge ya Teokrasi. Yango elingi koloba ete etambwisami na Yehova, oyo azali likoló ya nyonso. Totyelaka ye motema mobimba. Azali Mosambisi, Mopesi-Mibeko mpe Mokonzi na biso. (Yis. 33:22) Lokola azali Nzambe ya makambo na molɔngɔ, abongisi makambo mpo ete ‘tósala elongo na ye’ mpo na kokokisa mokano na ye.​—2 Ko. 6:1, 2.

4 Lokola nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali se kokóma pene, tozali kokende liboso na kolanda litambwisi ya Kristo Yesu, Mokonzi oyo atyami. (Yis. 55:4; Em. 6:2; 11:15) Yesu ye moko asakolaki ete bayekoli na ye bakosala misala ya minene koleka oyo ye asalaki na boumeli ya mosala na ye awa na mabele. (Yoa. 14:12) Esengelaki kozala bongo mpo bayekoli ya Yesu basengelaki kosakola ntango molai koleka ye, mpe lokola bakokóma ebele, bakokaki kosala na teritware ya monene koleka. Basengelaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi tii na bansuka ya mabele.​—Mat. 24:14; 28:19, 20; Mis. 1:8.

5 Likambo yango ekokisami mpenza. Kasi, ndenge Yesu alobaki yango polele, mosala ya kosakola nsango malamu ekosuka na ntango oyo Yehova ye moko atyá. Bilembo nyonso oyo ezali na Liloba ya esakweli ya Nzambe ezali komonisa ete mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova ekómi mpenza pene.​—Yoe. 2:31; Sef. 1:14-18; 2:2, 3; 1 Pe. 4:7.

Tosengeli kobakisa milende mpo na kosala oyo Nzambe azali kosɛnga. Yango ezali kosɛnga ete tóyeba malamu ndenge oyo ebongiseli na Ye etambolaka

6 Lokola tososoli mokano ya Yehova na ntango oyo ya nsuka, tosengeli kobakisa milende na kosala oyo Nzambe azali kosɛnga. Yango ezali kosɛnga tóyeba malamu ndenge oyo ebongiseli ya Nzambe etambolaka mpe tópesa yango mabɔkɔ na motema mobimba. Ebongiseli yango elandaka mitinda, mitindo, mibeko, malako mpe bikateli oyo euti na Liloba ya Nzambe, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu.​—Nz. 19:7-9.

7 Ntango basaleli ya Yehova balandi litambwisi yango oyo euti na Biblia, bafandaka mpe basalaka elongo na kimya mpe na bomoko. (Nz. 133:1; Yis. 60:17; Rom. 14:19) Nini esalisaka bandeko ya mokili mobimba bázala na boyokani? Ezali bolingo. Yango nde etambwisaka biso mpe tolati yango lokola elamba. (Yoa. 13:34, 35; Kol. 3:14) Bomoko oyo Yehova apesi biso esalaka ete tótambola nzela moko na eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali na likoló.

ETENI YA EBONGISELI YA YEHOVA OYO EZALI NA LIKOLÓ

8 Mosakoli Yisaya, Ezekiele, mpe Danyele bamonaki na bimonaneli eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló. (Yis., mok. 6; Ezk., mok. 1; Dan. 7:9, 10) Ntoma Yoane mpe amonaki na emonaneli eteni ya ebongiseli yango ya likoló mpe alobeli yango mwa moke na mokanda ya Emoniseli. Amonaki Yehova afandi na kiti ya bokonzi oyo etondi na nkembo mpe baanzelu oyo bazali kosakola ete: “Mosantu, mosantu, mosantu nde Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo azalaki mpe azali mpe azali koya.” (Em. 4:8) Yoane amonaki mpe “na katikati ya kiti ya bokonzi . . . mwana-mpate moko atɛlɛmi.” Mwana-Mpate yango ya Nzambe nde Yesu Kristo.​—Em. 5:6, 13, 14; Yoa. 1:29.

9 Lokola emonaneli yango emonisi Yehova afandi na kiti ya bokonzi, yango emonisi ete azali Mokonzi ya ebongiseli yango. Mokapo ya 1 Ntango 29:11, 12 elobi mpo na ye mpe kiti na ye ya bokonzi oyo ezali mpenza likoló ete: “Ee Yehova, bonene, nguya, kitoko, nkembo ná lokumu ezali ya yo; mpo eloko nyonso na likoló mpe na mabele ezali ya yo. Bokonzi ezali ya yo, Ee Yehova, Yo mokonzi oyo otombwami likoló na nyonso. Bomɛngo mpe nkembo eutaka na yo, mpe ozali koyangela eloko nyonso; mpe makasi ná nguya ezali na lobɔkɔ na yo, mpe likoki ya kokómisa moto nyonso monene ná makasi ezali na lobɔkɔ na yo.”

10 Lokola Yesu Kristo azali moninga ya mosala ya Yehova, azali na esika ya lokumu mingi kuna na likoló mpe Yehova apesi ye bokonzi monene. Kutu, Nzambe “atyaki mpe biloko nyonso na nse ya makolo na ye, mpe akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá.” (Ef. 1:22) Ntoma Paulo alobaki mpo na Yesu boye: “Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, mpo, na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele egumbama, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Kristo azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” (Flp. 2:9-11) Na yango, tokoki mpenza kotya motema mobimba na litambwisi ya sembo ya Yesu Kristo.

11 Na emonaneli moko, mosakoli Danyele amonaki Mokóló na Mikolo na kiti na Ye ya bokonzi kuna na likoló, mpe baanzelu “bankóto mbala nkóto bazalaki kosalela ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.” (Dan. 7:10) Biblia elobi ete limpinga wana ya baanzelu ezali “bilimo oyo bazali kosala mosala mpo na bolamu ya bato nyonso, batindami mpo na kosalela bato oyo bakozwa libula ya lobiko.” (Ebr. 1:14) Bikelamu nyonso wana ya elimo babongisami na ‘bakiti ya bokonzi, bonkolo, baguvɛrnema, mpe makonzi.’​—Kol. 1:16.

12 Soki tozwi ntango ya kokanisa makambo wana ya eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló, tokoyeba ntina oyo Yisaya ayokaki mawa ntango na emonaneli moko, ‘amonaki Yehova afandi na kiti moko ya bokonzi oyo ezalaki likoló mpe etombwaná,’ mpe “baserafɛ batɛlɛmaki likoló na ye.” Yisaya alobaki: “Mawa na ngai! Mpo nakufi nde kokufa, mpamba te nazali moto oyo azali na mbɛbu ya mbindo, mpe nazali kofanda na kati ya bato oyo bazali na mbɛbu ya mbindo; mpo miso na ngai emoni mpenza Mokonzi, Yehova ya mampinga!” Ya solo, ntango Yisaya amonaki bonene ya ebongiseli ya Yehova, nsɔmɔ ekangaki ye mpe amonaki ete azalaki mpenza moke. Likambo yango esimbaki mpenza motema na ye; yango wana, ntango libyangi moko eutaki na likoló mpo na koluka moto oyo akoki kokokisa mosala monene ya kosakola bitumbu ya Yehova, Yisaya alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.”​—Yis. 6:1-5, 8.

13 Kondima ebongiseli ya Yehova mpe kosepela na yango etindaka basaleli na ye bámipesa mpe ndenge wana. Lokola ebongiseli yango ezali se kokende liboso, tozali kosala nyonso tótambola na yango nzela moko. Tosalaka makasi tómonisa ete tozali kotyela ebongiseli ya Yehova motema lelo oyo.

EBONGISELI YA YEHOVA EZALI KOKENDE LIBOSO

14 Mokapo ya liboso ya esakweli ya Ezekiele emonisi Yehova azali kotambwisa likalo moko monene kuna na likoló. Likalo yango ya nkembo ezali elilingi ya eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo emonanaka te. Atambwisaka likalo yango na ndenge akambaka yango na boboto mpe asalelaka yango na boyokani na mokano na ye.​—Nz. 103:20.

15 Yiká mokomoko ya likalo yango ezali na yiká mosusu kati na yango, oyo ekokani na yango na monene, ekatisi yango na katikati mpe etali epai mosusu. Ezali kaka na ndenge wana nde bakoki koloba ete yiká “ezalaki kokende na ngámbo na yango nyonso minei.” (Ezk. 1:17) Yiká yango ekoki kobaluka na mbala moko mpe kokende epai mosusu. Atako bongo, likalo yango ezangi motambwisi te, to moto moko mpo na kokamba yango. Yehova atikaka te ete ebongiseli na ye ekende epai nyonso oyo elingi kokende. Ezekiele 1:20 elobi ete: “Esika nyonso oyo elimo elingaki kokende, bazalaki kokende.” Na yango, ezali Yehova nde atindaka ebongiseli na ye ekende esika nyonso oyo elimo na ye ezali komema yango. Motuna oyo tosengeli komituna ezali oyo: ‘Nazali kotambola nzela moko na yango?’

16 Kotambola nzela moko na ebongiseli ya Yehova esuki kaka te na koyangana na makita mpe kokende na mosala ya kosakola. Yango elimboli libosoliboso kosala milende mpe kokola na elimo. Tosengeli ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina’ mpe koyeba bingɛngiseli ya sika oyo tozali kozwa na nzela ya bilei ya elimo. (Flp. 1:10; 4:8, 9; Yoa. 17:3) Tosengeli mpe kobosana te ete esika nyonso oyo ebongiseli ezali, esɛngaka makambo ekambama malamu mpe boyokani ezala. Yango wana, tosengeli koyeba ete ezali na ntina mingi tósalela malamu mpenza biloko, ezala ya elimo to ya mosuni, oyo Yehova apesi biso mpo na kosala mosala na ye. Lokola tozali kotambola elongo na likalo ya Yehova oyo ezali na likoló, bomoi na biso ezali na boyokani na nsango oyo tosakolaka.

17 Ebongiseli ya Yehova ezali kosalisa biso tókende liboso mpo na kosala mokano ya Nzambe. Kobosana te ete Yehova nde azali kotambwisa likalo wana ya likoló. Na yango, kotambola elongo na likalo na ye emonisaka ete tozali komemya Yehova mpe kotya motema epai na ye, Libanga na biso. (Nz. 18:31) Biblia epesi bilaka oyo: “Yehova ye moko akopesa bato na ye makasi. Yehova ye moko akopambola bato na ye bázala na kimya.” (Nz. 29:11) Lokola tozali lelo na kati ya ebongiseli ya Yehova, tozali kozwa nguya oyo apesaka mpe tozali na kimya oyo azali kopesa basaleli na ye oyo babongisami malamu. Ya solo, ntembe ezali te ete tokokoba kozwa ebele ya mapamboli soki tozali kosala mokano ya Yehova sikoyo mpe libela na libela.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto