Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • od mok. 11 nk. 116-122
  • Bisika na biso ya losambo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bisika na biso ya losambo
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDAKO YA BOKONZI
  • KOTONGA BANDAKO YA BOKONZI
  • BANDAKO YA MAYANGANI
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tóbatela malamu esika na biso ya losambo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tozali komemya esika na biso ya losambo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Botongi Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
od mok. 11 nk. 116-122

MOKAPO 11

Bisika na biso ya losambo

BASAMBELI ya solo ya Yehova bazwi etinda ya koyanganaka mpo na koyoka mateya mpe kolendisana. (Ebr. 10:23-25) Esika ya losambo ya liboso mpo na Bayisraele, ekólo oyo Nzambe aponaki, ezalaki ‘tabernakle, hema ya kokutana.’ (Kob. 39:32, 40) Na nsima, Salomo, mwana ya Davidi, atongaki tempelo, ndako mpo na nkembo ya Nzambe. (1 Bak. 9:3) Ntango tempelo yango ebebisamaki na mobu 607 L.T.B., Bayuda bazwaki bibongiseli mpo báyanganaka na bandako oyo bazalaki kobenga sinagoga, mpo na kosambela Nzambe. Na nsima, tempelo etongamaki lisusu, mpe ekómaki lisusu esika ya losambo ya solo. Yesu ateyaki na basinagoga mpe na tempelo. (Luka 4:16; Yoa. 18:20) Yesu asalaki kutu likita moko na ngomba.​—Mat. 5:1–7:29.

2 Nsima ya liwa ya Yesu, bakristo bakómaki koyangana na bisika ya bato nyonso mpe na bandako ya bandeko, mpo na koteya Makomami mpe kozala elongo na bandeko na bango bandimi. (Mis. 19:8, 9; Rom. 16:3, 5; Kol. 4:15; Flm. 2) Ntango mosusu, ezalaki kosɛnga ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso báyangana na bisika oyo bato mosusu bazali te, mpo na kokima bato oyo bazalaki konyokola bango. Ya solo, na ntango ya kala, basaleli ya sembo ya Nzambe bazalaki mpenza na mposa ya koyangana na bisika ya losambo mpo na ‘koteyama na Yehova.’​—Yis. 54:13.

3 Lelo oyo mpe, bandako ya bandeko mpe bisika ya bato nyonso esalelamaka mpo na makita ya bokristo. Mingimingi basalelaka bandako ya bandeko mpo na makita ya mosala ya kosakola. Bandeko oyo bapesaka bandako na bango mpo na makita wana, bamonaka ete ezali libaku moko malamu. Bandeko mingi balobaka ete bazwi matomba mingi na elimo na ndenge bandimi ete makita wana esalemaka na bandako na bango.

NDAKO YA BOKONZI

4 Esika ya libosoliboso ya makita ya Batatoli ya Yehova ezali Ndako ya Bokonzi. Mbala mingi, basombaka lopango mpe batongaka Ndako ya Bokonzi to babongisaka ndako oyo bakuti na lopango yango. Soki ebongi, mpo na kobatela mbongo to mpo na kosalela malamu bisika na biso, masangá ebele ekoki kosalela Ndako ya Bokonzi moko. Na bamboka mosusu, esɛngaka kofutela bisika mpo na kosalela yango lokola Ndako ya Bokonzi. Mpo na Ndako ya Bokonzi oyo batongi sika to oyo basali misala minene mpo na kobongisa yango, ezali malamu kosala molulu ya kofungola yango. Kasi, soki basali kaka mwa misala mikemike na Ndako ya Bokonzi to mpe babongisi mwa biteni mosusu na ndako yango, ezali na ntina te básala molulu ya kofungola yango.

5 Ndako ya Bokonzi esengeli te kozala mindɔndɔmindɔndɔ mpo na koluka kokamwisa bato. Atako baplan ya Bandako ya Bokonzi ezalaka ndenge moko te na bisika nyonso, esengeli kokokisa mokano oyo batongi yango. (Mis. 17:24) Na kotalela makambo ya esika na esika, Ndako ya Bokonzi esengeli kozala esika moko ya malamu mpenza, oyo ebongi na makita ya bokristo.

6 Masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova oyo eyanganaka na Ndako ya Bokonzi moko nde esalaka misala, etambwisaka makambo mpe ezwaka bibongiseli mpo na kobatela ndako yango. Bakɔngɔlaka mabonza te, basɛngaka mpe mbongo na makasi te. Kasi, ezalaka na kɛsi moko ya makabo mpo baoyo bayanganaka na makita bákoka kotya mbongo mpo na misala ya Ndako ya Bokonzi. Basalaka yango na esengo mpe na motema moko.​—2 Ko. 9:7.

7 Bandeko nyonso ya lisangá bamonaka ete kopesa mbongo, ntango mpe makasi na bango na kobatela Ndako ya Bokonzi mpo ezala pɛto mpe kitoko, ezali libaku malamu. Mingimingi baponaka nkulutu to mosaleli na misala moko mpo asala programɛ ya mosala yango. Mbala mingi, bituluku ya mosala ya kosakola nde etyaka bopɛto, mpe mokɛngɛli ya etuluku to mosungi na ye atambwisaka misala. Ezala libándá to na kati, Ndako ya Bokonzi esengeli kozala esika oyo ezali komonisa malamu mpenza Yehova mpe ebongiseli na ye.

Bandeko nyonso ya lisangá bamonaka ete kopesa mbongo, ntango mpe makasi na bango na kobatela Ndako ya Bokonzi mpo ezala pɛto mpe kitoko, ezali libaku malamu

8 Soki masangá mibale to koleka ezali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, bankulutu ya masangá yango bakosala Komite ya kobatela Ndako ya Bokonzi (comité de gestion), mpo elandela makambo etali kobatela ndako yango mpe lopango. Masangani ya bankulutu eponaka ndeko moko mpo azala mokambi-misala ya komite ya kobatela Ndako ya Bokonzi (coordinateur du comité de gestion). Na boyokani na masangani ya bankulutu ya masangá yango, komite yango ekobanda kotala soki Ndako ya Bokonzi ezali ntango nyonso pɛto, ebatelami malamu mpe biloko oyo esengeli mpo na misala ezangi te. Yango esɛngi ete bandeko ya masangá yango nyonso básala na bomoko.

9 Soki masangá ebele ezali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, bakoki kobongolaka programɛ ya makita na bango mbula na mbula. Bankulutu basengeli kobongisa programɛ yango na likanisi ya koluka matomba ya basusu mpe na bolingo ya bondeko. (Flp. 2:2-4; 1 Pe. 3:8) Lisangá moko esengeli te kozwaka ekateli yango na esika ya masangá mosusu. Soki mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá moko, masangá mosusu ekobongola programɛ na yango ya makita na pɔsɔ wana.

10 Bakoki mpe kosalela Ndako ya Bokonzi mpo na diskur ya libala to mpo na diskur ya kokunda ebembe, kasi esengeli kozwa ndingisa ya Komite ya mosala ya lisangá. Bankulutu ya komite yango bakotalela likambo oyo bandeko basɛngi mpe bakozwa ekateli oyo eyokani na malako ya biro ya filiale.

11 Bandeko oyo bazwi ndingisa ya kosalela Ndako ya Bokonzi mpo na makambo ya ndenge wana basengeli kosala makambo na ndenge oyo ebongi na bakristo ya solo. Likambo moko te oyo ekosalema na Ndako ya Bokonzi esengeli kotungisa lisosoli ya bandeko ya lisangá, kofingisa nkombo ya Yehova, to mpe kobebisa lokumu ya lisangá. (Flp. 2:14, 15) Na kolanda litambwisi ya biro ya filiale, bakoki mpe kosalela Ndako ya Bokonzi mpo na baprogramɛ mosusu, na ndakisa Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpe Eteyelo ya babongisi-nzela.

12 Bandeko ya lisangá basengeli ntango nyonso komemya esika na bango ya makita. Molato, monzɛlɛ mpe bizaleli na bango esengeli komonisa ete bazali komemya losambo ya Yehova. (Mos. 5:1; 1 Tim. 2:9, 10) Soki tosaleli toli oyo, tokomonisa ete tosepelaka mpenza na makita na biso ya bokristo.

13 Na makita, ezali na ntina mingi ete makambo esalema na molɔngɔ. Ebongi ete bana báfandaka esika moko na baboti na bango. Bakoki kosɛnga na baboti oyo bazali na bana ya mike báfanda na esika oyo bakoki kobenda mpenza likebi ya bayangani te soki esɛngi bábima na bana libándá mpo na kopesa bango disiplini to mpo na kosala makambo mosusu oyo bana basengeli na yango.

14 Baponaka bandeko oyo babongi mpo báyambaka bato na makita oyo ezali kosalema na Ndako ya Bokonzi. Bandeko yango basengeli mpenza kozala ekɛngɛ, na boboto, mpe kosalela bososoli. Mokumba na bango ezali ya kopesa bato ya sika mbote na esengo, kosalisa bato oyo bazali koya nsima bázwa bisika ya kofanda, kotánga mpe kokoma motángo ya bayangani, mpe kotala soki Ndako ya Bokonzi ezali na malili to molunge na ndenge ebongi. Soki esengeli, bandeko yango bakoki kosɛnga na baboti bábatela bana na bango mpo bákimakimaka mbangu te liboso mpe nsima ya makita to básakanaka na estrade te. Na boboto mpe na mayele, moko ya bandeko yango akoki kosɛnga na baboti ya mwana oyo azali kosala mobulu bábima na ye libándá mpo abenda likebi ya bayangani te. Mosala ya bandeko yango esalisaka mingi mpo bayangani nyonso bálanda makita malamu. Eleki malamu kopesa mokumba yango na bankulutu to basaleli na misala.

KOTONGA BANDAKO YA BOKONZI

15 Na siɛklɛ ya liboso, lokola bakristo mosusu bazalaki na bozwi mingi koleka basusu, ntoma Paulo akomaki: “Na nzela ya bokokani, biloko oyo eleki mingi epai na bino ezipa sikoyo kozanga na bango, mpo ete biloko oyo eleki mingi epai na bango eya mpe kozipa kozanga na bino, bongo bokokani ezala.” (2 Ko. 8:14) Lelo oyo, “bokokani” ya ndenge wana mpe ezali. Mbongo ya makabo ya masangá ya mokili mobimba esalisaka na kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Ebongiseli ya Yehova mpe masangá oyo ezwaka lisalisi na mbongo ya makabo yango esepelaka mpenza na lisungi oyo bandeko ya mokili mobimba bazali kopesa na motema moko.

16 Na kotalela ndenge mboka na mboka ezali, biro ya filiale nde etindaka lisangá boye na Ndako ya Bokonzi boye. Biro ya filiale eyebisaka mpe ntango nini mpe esika nini bakotonga Ndako ya Bokonzi ya sika mpe bakobongisa Bandako ya Bokonzi mosusu na teritware. Soki likama ebimi, bazwaka bibongiseli oyo esengeli mpo na kobongisa Bandako ya Bokonzi oyo ebebi mpe, ntango mosusu, bandako ya bandeko.

17 Biro ya filiale etambwisaka mosala ya bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kosomba mapango, kosala baplan ya Bandako ya Bokonzi, kozwa mikanda ya Leta mpo na botongi, kotonga mpe kobatela bandako yango. Lokola na mikili mingi Bandako ya Bokonzi ebele esengeli kotongama, esɛngi ete bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko bázala mingi. Basakoli nyonso oyo bazwá batisimo mpe oyo bazali kokokisa masɛngami mpe bazali na mposa ya kosalisa, tozali kolendisa bango bátondisa formilɛrɛ mpe bápesa yango na Komite ya mosala ya lisangá na bango. ata basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki mpe kopesa mabɔkɔ ntango Ndako ya Bokonzi ya lisangá na bango ezali kotongama to kobongisama.

BANDAKO YA MAYANGANI

18 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki koyangana mingimingi na bituluku ya mike. Nzokande, ntango mosusu, “ebele mpenza ya bato” bazalaki koyangana. (Mis. 11:26) Lelo oyo, basaleli ya Yehova mpe basalaka mayangani, na ndakisa mayangani ya zongazonga mpe mayangani ya etúká. Mbala mingi, bandeko bafutelaka bisika ya kosala mayangani yango, kasi soki bisika ya kofutela ezali te to soki ezali ya malamu te, ekoki kosɛnga bátonga Ndako ya Mayangani.

19 Na ntango mosusu, basombaka ndako moko, babongisi yango, mpe ekómi Ndako ya Mayangani. Kasi, mbala mingi, basombaka nde lopango mpe batongi Ndako ya Mayangani. Bandako ya Mayangani nyonso ezalaka monene ndenge moko te; etalelaka mposa ya mboka na mboka. Biro ya filiale nde ezwaka ekateli ya kosomba to kotonga Ndako ya Mayangani nsima ya kotalela malamumalamu motuya ya mbongo oyo ekosɛnga, mpe mbala boni na mbula bakosalela yango.

20 Biro ya filiale nde etyaka bandeko mpo bálandela ndenge Ndako ya Mayangani ezali kosalelama mpe kobatelama. Bibongiseli ezwamaka mpo ete bazongazonga etyaka bopɛto mbala na mbala, nsima ya sanza motoba, mpe misala mosusu esalemaka mpo na kobatela yango. Ezali malamu soki bandeko oyo bamipesi bango moko nde bazali kosala mosala yango. Yango wana, balendisaka bandeko ya masangá bápesa mabɔkɔ na motema mobimba na bibongiseli yango.​—Nz. 110:3; Mal. 1:10.

21 Ntango mosusu, bakoki mpe kosalela Ndako ya Mayangani mpo na makambo mosusu ya Teokrasi, na ndakisa Biteyelo ya Biblia mpe makita mosusu mpo na bakɛngɛli ya zongazonga. Ndenge moko na Ndako ya Bokonzi, Ndako ya Mayangani ezali mpe esika ya losambo. Ntango toyangani na Ndako ya Mayangani, ezaleli, molato, mpe monzɛlɛ na biso esengeli kozala malamu, kaka ndenge tosalaka ntango tozali koyangana na Ndako ya Bokonzi mpo na losambo.

22 Lokola ebele ya bato ya sika bazali kosopana na ebongiseli ya Yehova na nsuka mpenza ya mikolo oyo ya nsuka, yango emonisi ete Yehova azali kopambola biso. (Yis. 60:8, 10, 11, 22) Yango wana, tosengeli kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezali kozwama mpo tózala na bisika ya losambo oyo ezali pɛto mpe ebateli malamu. Soki tozali kosala bongo, tokomonisa ete tosepelaka na bisika yango, oyo ezali kosalisa biso tólendisanaka mingi koleka lokola tozali komona mokolo ya Yehova ezali kobɛlɛma.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto