MOKAPO 14
Tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá
MBULA na mbula, ebele ya bato bazali koya na losambo ya pɛto ya Yehova, ndenge Biblia esakolaki. (Mika 4:1, 2) Tozalaka mpenza na esengo ya koyamba bango na “lisangá ya Nzambe”! (Mis. 20:28) Basepelaka na libaku ya kosalela Yehova elongo na biso na esika ya pɛto mpe ya kimya na kati ya paradiso ya elimo. Elimo santu ya Nzambe mpe toli ya bwanya oyo ezali na Liloba na ye ezali kosalisa biso tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá.—Nz. 119:105; Zek. 4:6.
2 Soki tozali kotosa mitinda ya Biblia, tokolata “bomoto ya sika.” (Kol. 3:10) Tokoboya kowelana mpe tokosilisa matata ya mikemike oyo ebimaka kati na biso. Soki tozali kotalela makambo ndenge Yehova ataleka yango, tokoboya ezaleli ya kokabwana oyo ezali na mokili mpe tokosala na bomoko, mpo tozali lisangá moko ya bandeko ya mokili mobimba.—Mis. 10:34, 35.
3 Atako bongo, ekómaka ete mikakatano ebima mpe ebebisa kimya mpe bomoko ya lisangá. Mpo na nini? Mbala mingi, ezalaka mpo totosi te toli ya Biblia. Lisusu, tosengeli ntango nyonso kobundisa bamposa ya mabe. Biso nyonso tozali bato ya masumu. (1 Yoa. 1:10) Ndeko moko akoki kolanda nzela ya mabe, mpe yango ekoki kokómisa lisangá mbindo to kobebisa elimo na yango. Tokoki kozokisa moto na likambo oyo tolobi to tosali kozanga kokanisa, to biso moko tokoki koyoka mpasi na motema mpo na likambo oyo ndeko moko asali to alobi. (Rom. 3:23) Soki mikakatano ya ndenge wana ebimi, tokosala nini mpo na kosilisa yango?
4 Na bolingo mpenza Yehova atalelaki makambo wana nyonso. Liloba na ye ezali na toli oyo emonisi ndenge ya kosala soki mikakatano ebimi. Bankulutu, oyo bazali babateli ya mpate ya bolingo, bazali wana mpo na kosalisa mokomoko na biso. Soki tolandi toli ya Biblia oyo bakopesa biso, tokoki kozongisa boyokani malamu na basusu mpe na Yehova. Soki esɛngi ete bápesa biso disiplini to bápamela biso mpo tobuki mobeko moko boye, tóyeba mpenza ete kosembolama wana ezali komonisa ete Tata na biso ya likoló alingi biso.—Mas. 3:11, 12; Ebr. 12:6.
KOSILISA MATATA YA MIKEMIKE
5 Ntango mosusu ekoki kokóma ete matata to mikakatano ya mikemike ebima kati na bandeko ya lisangá. Esengeli kosilisa yango nokinoki na bolingo ya bondeko. (Ef. 4:26; Flp. 2:2-4; Kol. 3:12-14) Soki osaleli toli ya ntoma Petro oyo elobi ete “bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka ebele ya masumu,” na ntembe te okomona ete okoki kosilisa mikakatano mingi oyo ebimi kati na yo ná ndeko na yo Mokristo. (1 Pe. 4:8) Biblia elobi ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yak. 3:2) Soki tozali kosalela etinda oyo esɛngaka ete tósalela basusu makambo nyonso oyo tolingaka ete básalela biso, tokolimbisa mpe tokobosana mabunga ya mikemike.—Mat. 6:14, 15; 7:12.
6 Soki omoni ete likambo moko oyo olobaki to osalaki ezokisaki ndeko moko, osengeli kosala noki mpo na kozongisa kimya. Kobosana te ete yango etaleli mpe boyokani na yo na Yehova. Yesu apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bongo soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” (Mat. 5:23, 24) Mbala mosusu boyokanaki malamu te. Soki bongo, luká ye bósolola. Soki bandeko nyonso ya lisangá bazali kosolola malamu, yango ekosala ete kozanga boyokani ezala mingimingi te mpe matata oyo ebimaka mpo na kozanga kokoka esilisama noki.
KOPESA TOLI YA BIBLIA OYO ESENGELI
7 Mbala mosusu, bakɛngɛli bakoki komona ete esengeli bápesa ndeko moko toli mpo na kosembola makanisi na ye. Yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Galatia boye: “Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto.”—Gal. 6:1.
8 Soki bakɛngɛli bazali kobatela etonga, bakoki kosalisa mpo eloko te ebebisa elimo ya bandeko ya lisangá mpe mikakatano ya minene ebima te. Bankulutu basalaka makasi ete mosala na bango na lisangá ekokana na elaka oyo Yehova apesaki na nzela ya Yisaya ete: “Mokomoko akozala mpenza lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai, lokola elili ya libanga monene na mokili oyo ekauká.”—Yis. 32:2.
KOTYA BATO YA MOBULU ELEMBO
9 Ntoma Paulo akebisaki bakristo mpo na bandeko mosusu oyo bakoki kobebisa lisangá. Alobaki boye: “Tozali kopesa bino mitindo . . . ete bókima ndeko nyonso oyo azali kotambola na mobulu kasi te na kolanda momeseno oyo bozwaki epai na biso.” Mpo na kolimbola maloba na ye akomaki boye: “Soki moto moko atosi te liloba na biso oyo ezali na mokanda oyo, bótya moto yango elembo, bótika kosangana na ye, mpo ayoka nsɔni. Mpe atako bongo bótalela ye lokola monguna te, kasi bókoba nde kokebisa ye lokola ndeko.”—2 Tes. 3:6, 14, 15.
10 Ntango mosusu, ekoki kokóma ete mokristo moko asali te lisumu ya monene oyo ekoki kosɛnga bálongola ye na lisangá, kasi azali kotyola mibeko ya Nzambe oyo esengeli kotambwisa bakristo. Ekoki kozala ete azali nsuka ya gɔigɔi, alobaka kaka mabe mpo na basusu, to azali salite makasi. Akoki kozala moto oyo ‘amikɔtisaka na makambo oyo etali ye te.’ (2 Tes. 3:11) Akoki mpe kozala moto oyo asalelaka mayele mabe mpo na kolyela bato, to moto oyo alingá masano mpe kominanola ya mbindo. Etamboli ya mobulu ezali likambo monene mpenza oyo ekoki kobebisa lokumu ya lisangá mpe kopalangana epai ya bakristo mosusu.
11 Bankulutu basengeli naino kopesa moto ya mobulu toli ya Biblia mpo na kosalisa ye. Kasi soki moto yango azali kaka kotyola mitinda ya Biblia atako bapesi ye toli mbala na mbala, bankulutu bakoki kozwa ekateli ete diskur moko esalema na lisangá mpo na kokebisa bandeko. Bankulutu basengeli kosalela bososoli mpo na koyeba soki likambo yango ezali mpenza monene mpe soki ezali kotungisa bandeko mingi mpo diskur ya kokebisa lisangá esalema. Ndeko oyo akosala diskur yango akopesa toli oyo etali etamboli ya mobulu, kasi akotánga te nkombo ya mokristo yango. Na ndenge yango, baoyo bayebi likambo oyo diskur yango ezali kolobela bakoboya kokangama mingi na moto yango, atako bakokoba kosangana na ye mpo na makambo ya elimo, mpe ‘kokoba kokebisa ye lokola ndeko.’
12 Mbala mosusu soki bandeko ya lisangá oyo bazali sembo baboyi kokangama na moto yango ya mobulu, yango ekoki kotinda ye ayoka nsɔni mpo na etamboli na ye mpe abongwana. Soki emonani polele ete moto yango atiki etamboli na ye ya mobulu, ntina ya kotalela ye lisusu lokola moto oyo atyami elembo ezali te.
KOSILISA MBEBA MOSUSU YA MINENE
13 Koboya kolandela mabunga ya mikemike mpe kolimbisa elingi koloba te ete tokangaka miso na mabe to tondimaka yango. Tokoki koloba te ete mbeba nyonso eutaka kaka na ezaleli na biso ya kozanga kokoka; lisusu, ezali malamu te kokanga miso na mabunga ya minene. (Lev. 19:17; Nz. 141:5) Na kati ya kondimana ya Mibeko, masumu mosusu ezalaki ya minene, mosusu ya mike; ezali mpe bongo na lisangá ya bokristo.—1 Yoa. 5:16, 17.
14 Yesu ayebisaki polele ndenge ya kosilisa matata ya minene oyo ekoki kobima na kati ya bakristo. Talá matambe oyo Yesu alobaki tólanda: “Soki ndeko na yo asali lisumu, [1] kende komonisa ye libunga na ye, yo ná ye kaka. Soki ayokeli yo, ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu. Kasi soki ayoki yo te, [2] kamatá moto moko to bato mibale, mpo na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato likambo nyonso endimama. Soki ayoki bango te, [3] lobá na lisangá. Soki ayoki ata lisangá te, azala na miso na yo lokola moto ya bikólo mpe lokola mokɔngɔli-mpako.”—Mat. 18:15-17.
15 Ndakisa oyo Yesu apesaki nsima, oyo ekomami na Matai 18:23-35, emonani ete moko ya masumu oyo balobeli na Matai 18:15-17 etaleli makambo ya mbongo to biloko ya moto, na ndakisa, koboya kofuta nyongo to kobuba moto. Masumu yango ekoki mpe kozala kokosela moto makambo, oyo ekobebisa lokumu na ye.
16 Soki ozali na bilembeteli oyo emonisi ete ndeko moko na lisangá asaleli yo lisumu ya ndenge wana, kowela te kokende epai ya bankulutu mpo na kosɛnga bango bákɔtela yo. Ndenge Yesu apesaki toli, liboso sololá na moto oyo azali na likambo na yo. Luká ete bósilisa likambo yango kaka bino mibale, kokɔtisa moto mosusu te. Kobosana te ete Yesu alobaki te ete ‘kende kaka mbala moko komonisa ye libunga na ye.’ Yango wana, soki moto yango andimi mabe na ye te mpe asɛngi bolimbisi te, ekozala malamu oluka kokutana na ye lisusu na nsima. Soki bokoki kosilisa likambo na bino ndenge wana, na ntembe te ndeko oyo asalaki yo mabe akozala na botɔndi lokola oyebisaki basusu lisumu na ye te to obebisaki lokumu na ye te na lisangá. Okozongisa “ndeko na yo na nzela ya malamu.”
17 Soki ndeko oyo asalaki yo mabe andimi mabe na ye, asɛngi bolimbisi mpe abongisi likambo, ntina omema likambo yango mosika ezali lisusu te. Atako lisumu yango ezalaki monene, bandeko oyo likambo yango etali bakoki kosilisa yango bango moko.
18 Soki okoki te kozongisa ndeko na yo na nzela ntango omonisi ye libunga na ye “yo ná ye kaka,” wana okoki kosala ndenge Yesu alobaki, “kamatá moto moko to bato mibale,” mpo na kosolola lisusu na ndeko na yo. Bato oyo okokende na bango basengeli mpe kozala na mokano ya kozongisa ndeko na yo na nzela. Eleki malamu ezala bato oyo bamonaki to bayebi likambo yango; kasi soki bazali te, okoki kozwa ndeko moko to bandeko mibale mpo bámona ndenge bokosolola. Bakoki kozala bato oyo bayebi malamu likambo oyo bozali kotalela mpe bakoki komonisa soki likambo oyo esalemaki ezali mpenza mabe. Soki bandeko oyo oponi mpo bázala batatoli bazali bankulutu, esengeli koyeba ete bazali komonisa lisangá te, mpamba te ezali lisangani ya bankulutu te nde etindi bango bátalela likambo wana.
19 Soki bosilisi likambo yango te nsima ya milende oyo osali mbala na mbala—ntango bosololaki kaka bino mibale mpe ntango okendaki na moto moko to bato mibale—mpe omoni ete okoki kotika likambo yango te, wana okoki koyebisa yango bakɛngɛli ya lisangá. Kobosana te ete mokano na bango ezali ya kobatela kimya mpe bopɛto ya lisangá. Lokola oyebisi bankulutu, osengeli kotikela bango likambo yango mpe kotyela Yehova motema. Kotika soki moke te ete etamboli ya moto mosusu ebɛtisa yo libaku to esilisa esengo na yo na mosala ya Yehova.—Nz. 119:165.
20 Babateli ya etonga bakotalela likambo yango malamumalamu. Soki emonani polele ete ndeko yango asalelaki yo mpenza lisumu monene kasi aboyi kobongola motema mpe kosilisa to kobongisa likambo yango na ndenge esengeli, ekoki kosɛnga ete komite moko ya bakɛngɛli bálongola ye na lisangá. Na ndenge yango, bakobatela etonga mpe bopɛto ya lisangá.—Mat. 18:17.
SOKI LISUMU YA MONENE ESALEMI
21 Masumu mosusu ya minene, na ndakisa pite, ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, kotuka, lipɛngwi, losambo ya bikeko, mpe masumu mosusu minene ya ndenge wana, esukaka kaka boye te, ata soki moto oyo basaleli ye lisumu yango alimbisi. (1 Ko. 6:9, 10; Gal. 5:19-21) Lokola masumu ya minene ndenge wana ekoki kobebisa bopɛto ya elimo mpe bizaleli malamu na lisangá, esengeli koyebisa bankulutu mpo bátalela yango. (1 Ko. 5:6; Yak. 5:14, 15) Bandeko mosusu bakendaka kokutana na bankulutu mpo na koyambola masumu oyo basali to koyebisa masumu oyo bayebi ete bandeko mosusu basali. (Lev. 5:1; Yak. 5:16) Soki bankulutu bayoki, ezala na ndenge nini, ete ndeko moko oyo azwá batisimo asali lisumu ya monene, mibale kati na bango bakoponama mpo na kosala naino ankɛtɛ. Soki emonani ete makambo oyo bayebisi bango ezali solo mpe bilembeteli emonisi ete lisumu ya monene esalemaki mpenza, lisangani ya bankulutu ekopona bankulutu misato to koleka mpo básala komite ya kosambisa oyo ekotalela likambo yango.
22 Bankulutu babatelaka etonga na likebi mpo eloko moko te ebebisa yango na elimo. Basalaka mpe nyonso básalela Liloba ya Nzambe na mayele mpenza mpo na kopamela mosumuki mpe balukaka kosalisa ye abongisa boyokani na ye na Yehova. (Yuda 21-23) Yango eyokani na malako oyo ntoma Paulo apesaki Timote, ntango akomaki ete: “Nazali kopesa yo mitindo na miso ya Nzambe mpe ya Kristo Yesu, oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, . . . Pamelá, sembolá, lendisá, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.” (2 Tim. 4:1, 2) Kosala bongo ekoki kozwa bankulutu ntango mingi, kasi yango ezali na kati ya mosala monene oyo bazali na yango. Lisangá esepelaka mingi na mosala yango mpe epesaka bango “lokumu mbala mibale.”—1 Tim. 5:17.
23 Mbala nyonso oyo emonani polele ete moto asalaki lisumu monene, bakɛngɛli basengeli libosoliboso kosalisa ye abongisa boyokani na ye na Yehova. Soki abongoli motema mpe soki bakoki kosalisa ye, mpamela oyo bakopesa ye na nkuku to na miso ya baoyo nyonso bayebi likambo yango mpe oyo bapesaki litatoli na ntango ya kosambisama, ekotinda bato oyo bayebi likambo yango bábanga kosala masumu. (2 Sa. 12:13; 1 Tim. 5:20) Soki komite ya kosambisa epesi moto mpamela, basengeli kotyela ye bipekiseli. Yango ekoki kosalisa mosumuki yango ‘asembola banzela’ ya makolo na ye mbala ya nsima. (Ebr. 12:13) Nsima ya ntango oyo ebongi, bakolongola bipekiseli yango soki emonani polele ete moto yango akómi lisusu makasi na elimo.
LIYEBISI YA MPAMELA
24 Soki komite ya kosambisa emoni ete mosumuki abongoli motema, kasi lisumu na ye ekoki koyebana na lisangá to na esika afandi, to soki lisangá esengeli kokeba na mosumuki yango, liyebisi ya mokuse ekopesama na likita Bomoi mpe mosala. Ekoloba boye: “[Songolo] azwi mpamela.”
SOKI EKATELI YA KOLONGOLA MOTO NA LISANGÁ EZWAMI
25 Na ntango mosusu, ekoki kokóma ete mosumuki alingi kotika te etamboli mabe na ye mpe na yango, aboyi lisalisi oyo bapesi ye. Ekoki kozala ete ‘misala oyo emonisi ete abongoli motema’ emonani polele te ntango bazali kosambisa ye. (Mis. 26:20) Esengeli kosala nini? Na ntango wana, esengeli kolongola na lisangá moto yango oyo abongoli motema te, na ndenge yango, akozala lisusu te kati na basaleli ya pɛto ya Yehova. Bizaleli mabe ya moto yango elongwe na lisangá, na ndenge yango bizaleli malamu ya lisangá, bopɛto ya elimo mpe lokumu na yango ebatelami. (Mib. 21:20, 21; 22:23, 24) Ntango ntoma Paulo ayokaki ete moto moko na lisangá ya Korinti azali kosala makambo ya nsɔni, asɛngaki bankulutu ‘bápesa Satana moto yango . . . , mpo ete elimo [ya lisangá] ebikisama.’ (1 Ko. 5:5, 11-13) Paulo alobelaki mpe bato mosusu oyo balongolamaki na lisangá mpo baboyaki mateya ya solo na siɛklɛ ya liboso.—1 Tim. 1:20.
26 Ntango ekateli ezwami ete mosumuki oyo abongoli motema te asengeli kolongolama na lisangá, komite ya kosambisa esengeli koyebisa ye ekateli yango mpe komonisa ye polele ntina to bantina oyo Biblia esɛngi ete bálongola ye na lisangá. Ntango komite ya kosambisa ekoyebisa ye ekateli oyo ezwi, ekoyebisa ye ete soki akanisi ete basambisi ye malamu te mpe alingi kosɛnga komite ya mibale etalela lisusu likambo na ye, asengeli kokoma mokanda mpe komonisa polele ntina oyo asɛngi komite ya mibale. Kobanda na ntango oyo komite eyebisi ye ekateli oyo bazwi, bakotikela ye mikolo nsambo mpo na kokoma mokanda yango. Soki mokanda oyo esɛngi komite ya mibale ekómeli lisangani ya bankulutu, basengeli koyebisa mokɛngɛli ya zongazonga likambo yango; ye akopona bankulutu mosusu ya makoki mpo bátalela lisusu likambo yango. Basengeli kosala makasi básambisa lisusu likambo yango nokinoki nsima ya kozwa mokanda yango; pɔsɔ mobimba eleka te. Soki moto asɛngi komite ya mibale, liyebisi ya kolongolama na ye na lisangá ekopesama naino te. Na ntango wana, esengeli te kopesa moto yango nzela ya kopesa biyano na makita, ya kosala libondeli na makita, to kopesa ye mikumba mosusu.
27 Soki komite ya mibale esalemi, ezali mpo na komonisela moto oyo afundami boboto mpe kopesa ye libaku ya koloba lisusu likambo na ye. Yango wana, soki aboyi na nko mpenza koya kokutana na komite yango, mpe soki bankulutu basali oyo ekoki mpo na kokutana na ye kasi azali kaka koboya, esengeli kopesa liyebisi ete alongolami na lisangá.
28 Soki mosumuki alingi kosɛnga komite ya mibale te, komite ya kosambisa ekolimbolela ye ete asengeli kobongola motema mpe bakomonisa ye makambo oyo asengeli kosala mpo azongisama na lisangá na ntango oyo ekoki. Yango ezali ndenge ya kosalisa ye mpe ya komonisela ye boboto, na elikya ete akozonga na nzela mpe nsukansuka akozonga na ebongiseli ya Yehova.—2 Ko. 2:6, 7.
LIYEBISI YA KOLONGOLAMA NA LISANGÁ
29 Soki esɛngi kolongola na lisangá mosumuki oyo abongoli motema te, liyebisi ya mokuse ekopesama; ekoloba boye: “[Songolo] azali lisusu Motatoli ya Yehova te.” Yango ekokebisa bandeko ya lisangá oyo bazali sembo bátika kosangana na moto yango.—1 Ko. 5:11.
KOMILONGOLA NA LISANGÁ
30 Maloba “komilongola na lisangá” esalelamaka ntango Motatoli oyo azwá batisimo alobi na nko ete azali lisusu mokristo te mpe alobi ete alingi lisusu te kozala to kobengama Motatoli ya Yehova. To, moto akoki komonisa ete alingi lisusu kozala na lisangá ya bokristo te na makambo oyo azali kosala, na ndakisa soki amikɔtisi na ebongiseli moko ya mokili oyo mikano na yango eyokani te na mateya ya Biblia mpe oyo Yehova Nzambe asilá kokatela etumbu.—Yis. 2:4; Em. 19:17-21.
31 Ntoma Yoane akomaki boye mpo na bato oyo batikaki lisangá ya bokristo na ntango na ye: “Babimaki na kati na biso, kasi bazalaki bato ya ndenge na biso te; mpo soki bazalaki bato ya ndenge na biso, mbɛlɛ batikalaki elongo na biso.”—1 Yoa. 2:19.
32 Ntango moto amilongoli na lisangá, na miso ya Yehova, akeseni mosika na mokristo oyo alɛmbá na elimo, oyo abimaka lisusu na mosala ya kosakola te. Moto akoki kolɛmba na elimo mpo ayekolaka lisusu Liloba ya Nzambe mbala na mbala te. To ekoki kozala ete akutanaki na mikakatano to minyoko oyo esali ete asalela lisusu Yehova na molende te. Bankulutu mpe bandeko mosusu ya lisangá basengeli kokoba kopesa mokristo oyo atiká kosakola lisalisi ya elimo oyo ebongi.—Rom. 15:1; 1 Tes. 5:14; Ebr. 12:12.
33 Nzokande soki mokristo amilongoli na lisangá, liyebisi ya mokuse ekopesama mpo lisangá eyeba likambo yango; ekoloba boye: “[Songolo] azali lisusu Motatoli ya Yehova te.” Esengeli kotalela moto ya ndenge wana kaka ndenge totalelaka moto oyo balongoli na lisangá.
KOZONGISAMA NA LISANGÁ
34 Moto oyo balongolá na lisangá to oyo amilongolá ye moko akoki kozongisama soki amonisi polele ete abongoli mpenza motema mpe, na boumeli ya ntango oyo ekoki amonisi ete atiki etamboli mabe na ye mpe azali na mposa ya kozongela boyokani malamu na Yehova. Bankulutu basengeli kozala ekɛngɛ mpe kotika ntango oyo esengeli, ekoki kozala basanza ebele, mbula moko, to kutu koleka, na kotalela likambo na likambo, mpo moto yango amonisa ete abongoli mpenza motema. Ntango lisangani ya bankulutu ezwi mokanda ya moto oyo asɛngi bázongisa ye na lisangá, komite ya kozongisa moto na lisangá ekosolola na ye. Komite yango ekotala mpenza soki asali ‘misala oyo emonisi ete abongoli motema’ mpe ekozwa ekateli ya kozongisa ye na lisangá na ntango wana to te.—Mis. 26:20.
35 Soki moto oyo asɛngi bázongisa ye na lisangá azalaki na lisangá mosusu ntango alongolamaki na lisangá, komite ya kozongisa moto na lisangá, ya lisangá oyo azali sikoyo, ekokutana na moto yango mpe ekotalela likambo na ye. Soki bandeko ya komite yango bamoni ete moto yango asengeli kozongisama na lisangá, bakoyebisa makanisi na bango epai ya lisangani ya bankulutu ya lisangá ya liboso oyo ezwaki ekateli ya kolongola ye na lisangá. Bakomite yango mibale ekosala na bomoko mpo na kotala soki bataleli makambo nyonso mpo ekateli ya sembo ezwama. Kasi, ezali komite ya kozongisa moto na lisangá, oyo esalemi na lisangá oyo etalelaki likambo na ye liboso, nde ekozwa ekateli ya kozongisa moto yango na lisangá.
LIYEBISI YA KOZONGISAMA NA LISANGÁ
36 Soki komite ya kozongisa moto na lisangá emoni mpenza ete moto oyo balongolaki na lisangá to oyo amilongolaki ye moko abongoli mpenza motema mpe esengeli kozongisa ye na lisangá, liyebisi ya kozongisama na lisangá ekopesama na lisangá epai batalelaki likambo na ye liboso. Soki moto yango azali koyangana na lisangá mosusu, liyebisi yango ekopesama mpe na lisangá yango. Ekoloba na mokuse: “[Songolo] azongi lisusu Motatoli ya Yehova.”
NTANGO MOTO OYO AZWÁ BATISIMO ASALI LISUMU KASI NA MISO YA LETA AZALI NAINO MWANA
37 Ntango moto oyo azwá batisimo asali lisumu ya monene kasi na miso ya Leta azali naino mwana, esengeli koyebisa bankulutu. Ntango bankulutu bazali kosambisa likambo ya mwana ya ndenge wana, ebongi baboti na ye oyo bazwá batisimo bázala wana. Basengeli kosala na bomoko na komite ya kosambisa, kasi basengeli te koluka ete mwana na bango oyo asali lisumu azwa te disiplini oyo esengeli. Komite ya kosambisa ekosala makasi mpo na kopamela mpe kozongisa na nzela elenge oyo asali lisumu, kaka ndenge esalaka ntango mokóló asali lisumu ya monene. Kasi, soki elenge yango abongoli motema te, esengeli kolongola ye na lisangá.
NTANGO MOSAKOLI OYO AZWI NAINO BATISIMO TE ASALI LISUMU
38 Esengeli kosala nini ntango mosakoli oyo azwi naino batisimo te asali lisumu ya monene? Lokola azwi naino batisimo te, akoki te kolongolama na lisangá. Ekoki kozala ete akangaki ntina ya mitinda ya Biblia malamumalamu te, mpe soki bapesi ye toli na boboto ekoki kosalisa ye ‘asembola banzela’ ya makolo na ye.—Ebr. 12:13.
39 Soki bankulutu mibale basololi na mosakoli oyo azwi naino batisimo te oyo asali lisumu mpe baluki kosalisa ye kasi abongoli motema te, na ntango wana esengeli koyebisa lisangá. Liyebisi ya mokuse ekopesama; ekoloba boye: “[Songolo] alongwe mosakoli oyo azwi naino batisimo te.” Na ntango yango, lisangá ekotalela moto yango lokola moto ya mokili. Atako balongoli ye na lisangá te, bakristo bakozala ekɛngɛ na oyo etali kozala moninga na ye. (1 Ko. 15:33) Lapolo na ye ya mosala ya kosakola ekondimama te.
40 Nsima ya ntango, moto oyo alongwaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te akoki komonisa mposa ya kokóma lisusu mosakoli. Na ntango wana, bankulutu mibale bakosolola na ye mpe bakotala soki akoli mpenza na elimo. Soki akokisi masɛngami, liyebisi ya mokuse ekopesama; ekoloba boye: “[Songolo] azongi lisusu mosakoli oyo azwi naino batisimo te.”
YEHOVA APAMBOLAKA LOSAMBO YA KIMYA MPE YA PƐTO
41 Lelo oyo, bato nyonso oyo bayaka na lisangá ya Nzambe bakoki kosepela na bozwi ya elimo oyo Yehova apesi basaleli na ye. Mabele ya elilingi oyo ebimiselaka biso bilei ya elimo eboti mbuma mingi, mpe tozwi ebele ya mateya ya solo oyo ezali lokola ebele ya mai ya mpiɔ oyo ekitisaka motema. Lisusu, Yehova abatelaka biso na nzela ya ebongiseli na ye ya Teokrasi, oyo Kristo azali kotambwisa. (Nz. 23; Yis. 32:1, 2) Lokola tozali na kati ya paradiso ya elimo na mikolo ya nsuka oyo etondi na yikiyiki, tozali kobanga eloko te.
Soki tobateli kimya mpe bopɛto ya lisangá, tokokoba kongɛngisa pole na biso, elingi koloba solo ya Bokonzi
42 Soki tobateli kimya mpe bopɛto ya lisangá, tokokoba kongɛngisa pole na biso, elingi koloba solo ya Bokonzi. (Mat. 5:16; Yak. 3:18) Na lipamboli ya Nzambe, tokozala na esengo ya komona ebele ya bato mosusu oyo bakoyeba Yehova mpe bakosangana na biso mpo na kosala mokano na ye.