Mokanda ya lisangani ya Mikóló-Bakambi
Epai na yo moninga na biso mosakoli ya nsango malamu,
Ezali mpenza libaku malamu kozala na bomoko na losambo ya Nzambe ya solo kaka moko, Yehova! Tozali “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” mpe apesi biso mosala mosantu ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi oyo esili kotyama, mosala oyo ekobikisa bato. (1 Ko. 3:9; Mat. 28:19, 20) Mpo tósala mosala yango na kimya mpe na bomoko na mokili mobimba, tosengeli kobongisama malamu.—1 Ko. 14:40.
Buku oyo ekosalisa yo oyeba ndenge lisangá ya bokristo ezali kotambwisama lelo. Elobeli libaku malamu mpe mikumba oyo ozali na yango ndenge ozali Motatoli ya Yehova. Soki ozali kosepela na mikumba na yo mpe kosala malamu makambo basɛngi yo, ‘okokóma makasi na kondima.’—Mis. 16:4, 5; Gal. 6:5.
Yango wana, tozali kolendisa yo oyekola buku oyo malamu mpenza. Luká ndenge okoki kosalela makambo yango na bomoi na yo. Na ndakisa, soki okómi mosakoli oyo azwi naino batisimo te, makambo nini osengeli kosala mpo ozwa batisimo mpe okóma Motatoli ya Yehova? Bongo soki ozwá batisimo, osengeli kosala nini mpo okola na elimo mpe osalela Yehova lisusu mingi? (1 Tim. 4:15) Osengeli kosala nini mpo lisangá ezala na kimya? (2 Ko. 13:11) Buku oyo epesi biyano na mituna yango.
Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, okoki kosala nini mpo okokisa masɛngami ya kokóma mosaleli na misala mpe na nsima kokóma nkulutu? Lokola ebele ya bato ya sika bazali kaka koya na ebongiseli ya Nzambe, mposa ezali mingi ya bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami mpo bátambwisa makambo. Buku oyo ekosalisa yo oyeba soki “koluka” kozwa mikumba na lisangá elimboli nini.—1 Tim. 3:1.
Tozali kobondela na motema moko ete buku oyo esalisa yo omona esika na yo na kati ya ebongiseli ya Yehova mpe obatela yango. Tolingaka yo mingi, mpe tozali kokoba kobondela ete ozala na kati ya bato oyo bakosepela libela na libela kosambela Tata na biso ya likoló, Yehova.—Nz. 37:10, 11; Yis. 65:21-25.
Bandeko na yo,
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova