Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 73 lok. 172-lok. 173 par. 2
  • Yoane abongisi nzela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yoane abongisi nzela
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Azalaki Mopasoli nzela mpo na Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yoane Mobatisi abongisi nzela
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu akómi Masiya
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yoane azali kobongisa nzela
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 73 lok. 172-lok. 173 par. 2
Yoane Mobatisi azali koteya bato pene na Ebale ya Yordani

LITEYA 73

Yoane abongisi nzela

Yoane, mwana ya Zekaria ná Elizabeti, akómaki mosakoli ntango akómaki mokóló. Yehova atindaki Yoane mpo na koteya bato ete Masiya azali koya. Kasi Yoane azalaki koteya na basinagoga to na bingumba te; azalaki nde kosakola na esobe. Bato ya Yerusaleme mpe ya Yudea mobimba bazalaki koya koyoka Yoane. Ateyaki bango ete mpo básepelisa Nzambe, basengeli kotika kosala makambo ya mabe. Nsima ya koyoka Yoane, bato mingi babongolaki mitema, mpe Yoane abatisaki bango na Ebale ya Yordani.

Yoane azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Azalaki kolata bilamba basalá na nsuki ya kamela mpe kolya mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba. Bato bazalaki koluka koyeba Yoane. Ata bato ya lolendo lokola Bafarisai ná Basadukai bayaki mpo na kotala ye. Yoane ayebisaki bango: ‘Bótika makambo ya mabe mpe bóbongola mitema. Bókanisa te ete boleki bato mosusu kaka mpo bolobi ete bozali bana ya Abrahama. Yango elakisi te ete bozali bana ya Nzambe.’

Bato mingi bayaki epai ya Yoane mpe batunaki ye: ‘Tósala nini mpo tósepelisa Nzambe?’ Yoane alobaki na Bayuda yango: ‘Soki ozali na bilamba mibale, pesá moko na moto oyo azangi.’ Oyebi mpo na nini alobaki bongo? Alingaki bayekoli na ye báyeba ete mpo básepelisa Nzambe, basengeli kolinga basusu.

Yoane alobaki na bakɔngɔli-mpako boye: ‘Bózala sembo mpe bóbubaka bato te.’ Alobaki na basoda ete: ‘Bóndimaka kanyaka te mpe bókosaka te.’

Banganga-nzambe ná Balevi mpe bayaki epai ya Yoane mpe batunaki ye: ‘Yo ozali nani? Moto nyonso alingi koyeba.’ Yoane alobaki na bango ete: ‘Nazali mongongo oyo ezali kobelela na esobe, oyo ezali komema bato epai ya Yehova, ndenge kaka Yisaya asakolaki.’

Bato basepelaki na makambo oyo Yoane ateyaki bango. Mingi bamitunaki soki Yoane azali Masiya. Kasi ayebisaki bango ete: ‘Moto oyo aleki ngai azali koya. Nabongi kofungola ata sandale na ye te. Nazali kobatisa na mai, kasi ye akobatisa na elimo santu.’

“Moto yango ayaki lokola motatoli, mpo na kopesa litatoli mpo na pole yango, mpo ete bato ya ndenge nyonso bándima na nzela na ye.”​—Yoane 1:7

Mituna: Mpo na nini Yehova atindelaki bato Yoane? Bato basalaki nini ntango bayokaki nsango na ye?

Matai 3:1-11; Marko 1:1-8; Luka 3:1-18; Yoane 1:19-28; Yisaya 40:3

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto