Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 81 lok. 190-lok. 191 par. 2
  • Lisolo Likoló ya Ngomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisolo Likoló ya Ngomba
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Luká Bokonzi, kasi biloko te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Ntina oyo Yesu azalaki Moteyi monene
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Bókoba kosala malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Nabengi bino baninga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 81 lok. 190-lok. 191 par. 2
Yesu azali kosala Lisolo Likoló ya Ngomba liboso ya ebele ya bato

LITEYA 81

Lisolo Likoló ya Ngomba

Nsima ya kopona bantoma 12, Yesu akitaki na ngomba mpe akendaki esika bato ebele basanganaki. Bato yango bautaki na Galile, na Tire, na Sidone, na Siri, mpe na ngámbo mosusu ya Yordani. Bayaki na bato oyo bazalaki na maladi ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki konyokwama na bademo. Yesu abikisaki bango nyonso. Na nsima, afandaki pene ya ngomba mpe abandaki koloba. Amonisaki makambo oyo tosengeli kosala soki tolingi kozala baninga ya Nzambe. Tosengeli koyeba ete tozali na mposa ya litambwisi ya Yehova mpe ya koyekola kolinga ye. Kasi tokoki kolinga Nzambe te soki tozali kolinga bato te. Tosengeli kosalela moto nyonso makambo na boboto mpe na bosembo, ezala mpe banguna na biso.

Yesu alobaki boye: ‘Tosengeli kosuka kaka te na kolinga baninga na biso. Tosengeli mpe kolinga banguna na biso mpe kolimbisa bazalani na biso na motema moko. Soki moto moko asilikeli yo, kende mbala moko epai na ye mpe sɛngá ye bolimbisi. Saleláká bato mosusu makambo ndenge olingaka básalela yo.’

Yesu azali kosala Lisolo Likoló ya Ngomba liboso ya ebele ya bato

Yesu apesaki mpe bato toli ya malamu na likambo etali biloko ya mokili. Alobaki ete: ‘Ezali na ntina mingi kozala moninga ya Yehova na esika ya kozala na mbongo mingi. Moyibi akoki koyiba yo mbongo, kasi moto moko te akoki koyiba boninga na yo na Yehova. Na yango, bótika komitungisa mpo na oyo bokolya, oyo bokomɛla, to oyo bokolata. Bótala bandɛkɛ. Nzambe asalaka ete bázanga eloko ya kolya te. Komitungisa ekobakisa bolai ya bomoi na bino te. Bóbosana te, Yehova ayebi oyo bosengeli na yango.’

Ebele ya bato wana bayoká naino moto azali koloba lokola Yesu te. Bakonzi ya mangomba na bango bateyá bango naino makambo wana te. Mpo na nini Yesu azalaki moteyi monene boye? Mpo makambo nyonso oyo azalaki koteya ezalaki kouta epai ya Yehova.

“Bómema ekanganeli na ngai na mapeka na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa, mpe bokopema.”​—Matai 11:29

Mituna: Tosengeli kosala nini mpo tókóma baninga ya Yehova? Yehova alingi tósalelaka bato makambo ndenge nini?

Matai 4:24–5:48; 6:19-34; 7:28, 29; Luka 6:17-31

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto