Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 87 lok. 204-lok. 205 par. 3
  • Elekeli ya nsuka ya Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elekeli ya nsuka ya Yesu
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Batosaki maloba ya nsuka ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bilei ya mpokwa ya Nkolo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Elambo ya Nkolo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • ‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 87 lok. 204-lok. 205 par. 3
Yesu abandisi Bilei ya Mpokwa ya Nkolo elongo na bantoma na ye ya sembo zomi na moko

LITEYA 87

Elekeli ya nsuka ya Yesu

Mbula na mbula, Bayuda bazalaki kosala Elekeli na mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana. Yango ezalaki kosalisa bango bákanisa ndenge Yehova alongolaki bango na boombo na Ezipito mpe ndenge amemaki bango na Mokili ya Ndaka. Na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu ná bantoma na ye basalaki Elekeli na shambrɛ moko ya likoló na Yerusaleme. Ntango bazalaki kosilisa kolya, Yesu alobaki na bango: ‘Moko na bino akokaba ngai.’ Esalaki bantoma mpasi, mpe batunaki Yesu boye: ‘Nani akokaba yo?’ Yesu azongiselaki bango ete: ‘Ezali moto oyo ngai nakopesa limpa oyo.’ Na nsima, apesaki Yudasi Mokeriota eteni ya limpa. Na mbala moko, Yudasi atɛlɛmaki mpe akendaki.

Na nsima, Yesu abondelaki, abukaki mampa bitenibiteni, mpe apesaki yango bantoma oyo batikalaki. Alobaki na bango: ‘Bólya limpa oyo. Yango elakisi nzoto na ngai, oyo nakopesa yango mpo na bino.’ Abondelaki mpe mpo na vinyo, mpe apesaki yango bantoma. Ayebisaki bango ete: ‘Bómɛla vinyo oyo. Yango elakisi makila na ngai, oyo nakopesa mpo masumu elimbisama. Napesi bino elaka ete bokozala bakonzi elongo na ngai na likoló. Bósalaka yango mbula na mbula mpo na kokanisa ngai.’ Bayekoli ya Yesu bayanganaka mbula na mbula na mpokwa wana. Likita yango ebengamaka Bilei ya Mpokwa ya Nkolo.

Nsima ya kolya, bantoma babandaki kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga. Kasi Yesu ayebisaki bango ete: ‘Oyo aleki monene na kati na bino ezali oyo azali komimona ete azali mwana moke mpenza, moto oyo azali na ntina te.’

‘Bozali baninga na ngai. Nazali koyebisa bino makambo nyonso oyo Tata na ngai alingi nayebisa bino. Etikali moke nakende epai ya Tata na ngai na likoló. Bino bokotikala, mpe bato bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozali kolingana. Bosengeli kolingana ndenge ngai nalingi bino.’

Na nsuka, Yesu abondelaki, asɛngaki Yehova abatela bayekoli na ye nyonso. Asɛngaki Yehova asalisa bango básalaka elongo na kimya. Abondelaki ete nkombo ya Yehova esantisama. Na nsima, Yesu ná bantoma na ye bayembaki loyembo mpo na kokumisa Yehova mpe babimaki. Ngonga oyo Yesu asengelaki kokangama ekómaki pene.

“Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino Bokonzi.”​—Luka 12:32

Mituna: Elaka nini Yesu apesaki bantoma na ye? Wapi mateya ya ntina mingi oyo Yesu ateyaki bantoma na ye na Elekeli ya nsuka oyo balyaki elongo?

Matai 26:20-30; Luka 22:14-26; Yoane 13:1, 2, 26, 30, 34, 35; 15:12-19; 17:3-26

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto