Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 101 lok. 234-lok. 235 par. 4
  • Batindi ntoma Paulo na Roma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batindi ntoma Paulo na Roma
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Zalá na mpiko mpo Yehova azali mosungi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • “Ata moto moko te akokufa”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Tosakola bokonzi ya Jehovah na molende nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Apesaki litatoli malamumalamu.”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 101 lok. 234-lok. 235 par. 4
Ntoma Paulo ná bamosusu bazali kobɛta mai to kotepatepa likoló ya mwa biteni ya masuwa oyo epanzani pembenipembeni ya esanga Malta

LITEYA 101

Batindi ntoma Paulo na Roma

Mobembo ya misato oyo Paulo asalaki mpo na kosakola esukaki na Yerusaleme. Kuna bakangaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Na butu, Yesu alobaki na ye na emonaneli moko ete: ‘Okokende kosakola na Roma.’ Balongolaki Paulo na Yerusaleme mpe bamemaki ye na Kaisaria, epai asalaki mbula mibale na bolɔkɔ. Ntango azalaki kosamba liboso ya Guvɛrnɛrɛ Festusi, Paulo ayebisaki ye ete: ‘Tiká ngai nakende kosamba na Roma epai ya Kaisala.’ Festusi alobaki: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala, okokende epai ya Kaisala.” Batyaki ntoma Paulo na masuwa moko oyo ezalaki kokende na Roma mpe bandeko mibale, Luka ná Aristarke, bakendaki elongo na ye.

Na mbu, mopɛpɛ ya makasi ebɛtaki mpe eumelaki mikolo ebele. Bato nyonso bakanisaki ete bakokufa. Kasi Paulo alobaki: ‘Mibali, anzelu moko ayebisaki ngai na ndɔtɔ ete: “Kobanga te, Paulo. Okokóma na Roma, mpe bato nyonso oyo bazali na masuwa bakobikisama.” Bózala na mpiko! Tokokufa te.’

Mopɛpɛ yango esalaki mikolo 14. Nsukansuka, bamonaki mokili. Ezalaki esanga ya Malta. Masuwa ekangamaki na zɛlo mpe ebukanaki na biteni, kasi bato nyonso 276 oyo bazalaki na masuwa bakómaki na mokili kozanga likama. Bato mosusu babɛtaki mai mpe basusu bamataki likoló ya biteni mosusu ya masuwa mpe bakendaki tii na libongo. Bato ya Malta basalisaki bango mpe bapeliselaki bango mɔtɔ mpo báyɔta.

Sanza misato na nsima, basoda bazwaki ntoma Paulo mpe bamatisaki ye na masuwa mosusu oyo ezalaki kokende na Roma. Ntango akómaki kuna, bandeko bayaki kokutana na ye. Ntango Paulo amonaki bango, apesaki Yehova matɔndi mpe azwaki mpiko. Atako azalaki mokangami, bapesaki ye nzela ya kofanda na ndako moko ya kofutela epai soda moko azalaki kokɛngɛla ye. Afandaki kuna mbula mibale. Bato bazalaki koya kotala ye, mpe azalaki koteya bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe Yesu. Paulo akomaki mikanda mpo na masangá ya Azia Moke mpe ya Yudea. Yehova asalelaki mpenza ntoma Paulo mpo na kopalanganisa nsango malamu epai ya bato ya bikólo.

“Kasi na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe, na ezaleli ya koyika mpiko na makambo mingi, na komekama, na bosɛnga, na mikakatano.”​—2 Bakorinti 6:4

Mituna: Mpo na nini Festusi atindaki ntoma Paulo na Roma? Nini ekómelaki ntoma Paulo ntango azalaki kokende na Roma?

Misala 21:30; 23:11; 25:8-12; 27:1–28:31; Baroma 15:25, 26

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto