LOYEMBO 5
Misala ya kokamwa ya Nzambe
Ya Papye
1. Nzambe oyebi nga’ malamu,
Ntango nalali mpe nalamuki.
Oyebi makanisi ya motema,
Maloba mpe banzela na ngai
oyebi.
Omoni kosalema na nga’,
Omonaki mpe mikuwa na nga’.
Na buku na yo nyonso ekomami.
Misala n’o ya kokamwa
nakumisi.
Molimo na ngai eyebi ndenge
boyebi na yo Nzambe ekamwisi.
Ata soki molili ezipi ngai,
Elimo na yo, Nzambe, emoni.
Esika nini namibomba
mpenza liboso na yo Yehova?
Na likoló to na kati ya Nkunda,
Na molili to na mai,
okomona.
(Talá mpe Nz. 66:3; 94:19; Yir. 17:10.)