LOYEMBO 7
Yehova azali makasi na biso
1. Yehova, yo nde nguya na biso;
Mobikisi, esengo na biso.
Toyebisi bato nsango na yo,
Ata basusu baboyi yango.
(MONDIMO)
Yehova, yo nde nguya na biso.
Toteyi bato nkombo na yo.
Na nguya, Yehova yo oleki.
Ekimelo na biso eza’ yo.
2. Tosepelaka na pole na yo;
Sikoyo nde tososoli solo.
Na Biblia nde toyokaka yo;
Biso toponi Bokonzi na yo.
(MONDIMO)
Yehova, yo nde nguya na biso.
Toteyi bato nkombo na yo.
Na nguya, Yehova yo oleki.
Ekimelo na biso eza’ yo.
3. Toza’ kotosa yo na esengo.
Ata Satana atyoli biso.
Akoki kokata biso motó,
Nde tii liwa biso kaka na yo.
(MONDIMO)
Yehova, yo nde nguya na biso.
Toteyi bato nkombo na yo.
Na nguya, Yehova yo oleki.
Ekimelo na biso eza’ yo.
(Talá mpe 2 Sa. 22:3; Nz. 18:2; Yis. 43:12.)