LOYEMBO 10
Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!
Ya Papye
1. Tópesa Yehova nkembo!
Tósakola nkombo na ye.
Tóganga: Mokolo na ye
Ebɛlɛmi, bámilɛngɛla.
Nzambe alobi ntango ya Bokonzi
Ya Yesu yango oyo.
Tóteya bato: Nzambe akosala
Makambo ya kokamwa!
(MONDIMO)
Tópesa Yehova nkembo!
Tókumisa bonene na ye!
2. Tóyemba nkembo ya Nzambe!
Tóbelela nkombo na ye.
N’esengo, tópalanganisa
Nsango ya Bokonzi na ye.
Nzambe azali monene kasi
Amikitisaka mpenza.
Na boboto ayokaka biso,
Mpe asalisaka biso.
(MONDIMO)
Tópesa Yehova nkembo!
Tókumisa bonene na ye!
(Talá mpe Nz. 89:27; 105:1; Yir. 33:11.)