LOYEMBO 21
Lukáká liboso Bokonzi ya Nzambe
Ya Papye
1. Nzambe asepelaka na Bokonzi
Ya Mwana n’e.
Mpo yango ekobongola,
Mokili oyo mpenza.
(MONDIMO)
Tólukaka nde liboso
Bokonzi ya Yehova.
Ntango nyonso tókumisa,
Mpe tósalela se ye.
2. Tomitunaka te soki
Lobi tokolya nini.
Tóluka naino Bokonzi.
Lobi, Nzambe ayebi.
(MONDIMO)
Tólukaka nde liboso
Bokonzi ya Yehova.
Ntango nyonso tókumisa,
Mpe tósalela se ye.
3. Sakolá nsango malamu;
Luká bato ya sembo.
Yebisá bango Yehova
Alaki Paradiso.
(MONDIMO)
Tólukaka nde liboso
Bokonzi ya Yehova.
Ntango nyonso tókumisa,
Mpe tósalela se ye.
(Talá mpe Nz. 27:14; Mat. 6:34; 10:11, 13; 1 Pe. 1:21.)