LOYEMBO 27
Komonana ya bana ya Nzambe
Ya Papye
1. Mosika te ban’a Nzambe
Bakomonana mpe
Bakoyangela ná Kristo
Kuna na likoló.
(MONDIMO)
Komonan’a ban’a Nzambe
Elongo na Kristo.
Bakolonga na etumba,
Mpe bakozwa mbano.
2. Etikali moke mpenza
Nkolo akobenga
Baoyo bazali na nse,
Bákende likoló.
(MONDIMO)
Komonan’a ban’a Nzambe
Elongo na Kristo.
Bakolonga na etumba,
Mpe bakozwa mbano.
(MOLƆNGƆ MOSUSU)
Ye ná bango bakobunda
Etumba ya nsuka.
Elongo na Mwana-Mpate,
Libala ya seko.
(MONDIMO)
Komonan’a ban’a Nzambe
Elongo na Kristo.
Bakolonga na etumba,
Mpe bakozwa mbano.
(Talá mpe Dan. 2:34, 35; 1 Ko. 15:51, 52; 1 Tes. 4:15-17.)