LOYEMBO 37
Nakosalela Yehova na molimo mobimba
Ya Papye
1. Yehova, Nzambe Monene,
Yo nde Nzambe na nga’ nalingá.
Nakobomela yo nzoto,
Mikolo nyonso, Nkolo na nga’.
Nakosala oyo olobi;
Nalingá mateya na yo!
(MONDIMO)
Obongi nasalela yo
Molimo mobimba, Yehova.
2. Sanza, minzoto, mpe moi
Ekumisaka nkombo na yo.
Ngai mpe nakosalela
Nzoto na nga’ seko mpo na yo.
Mposa na nga’: nasalela yo
Ntango nyonso mpo na seko.
(MONDIMO)
Obongi nasalela yo
Molimo mobimba, Yehova.
(Talá mpe Mib. 6:15; Nz. 40:8; 113:1-3; Mos. 5:4; Yoa. 4:34.)