LOYEMBO 69
Kende, sakolá Bokonzi!
Ya Papye
1. Kende kosakola Bokonzi,
Kende bipai nyonso.
Lokola olingaka bato,
Sungá báyeba solo.
Kosalela Yehova Nzambe
Eza’ lokumu monene.
Tɛlɛmá, kende kosakola;
Teyá bato nkombo’a Nzambe.
(MONDIMO)
Kende, sakolá Bokonzi,
panzá nsango na mpiko.
Kende, kangamá na Yehova
mpe tikalá sembo.
2. Biso nyonso mbangu liboso,
Tólanda batikali.
Mwana, elenge, mpe mobange,
Kotikala nsima te.
Nsango ya Bokonzi ya Nzambe,
Teyá bato, kopona te.
Yehova akosalisa yo;
Kobanga te, aza’ na yo!
(MONDIMO)
Kende, sakolá Bokonzi,
panzá nsango na mpiko.
Kende, kangamá na Yehova
mpe tikalá sembo.
(Talá mpe Nz. 23:4; Mis. 4:29, 31; 1 Pe. 2:21.)