LOYEMBO 71
Tozali limpinga ya Yehova!
Ya Papye
1. Limpinga ya Yehova
Ezali biso.
Mokonzi eza’ Kristo,
Monguna, Zabolo.
Atako botɛmɛli,
Tokotika te.
Tokoteya kaka,
Tokobanga te.
(MONDIMO)
Limpinga ya Yehova;
Kristo liboso.
Tóteya n’esengo
Bokonzi na ye.
2. Toza’ basaleli ya
Yehova Nzambe.
Na molende tozali
Koluka bampate.
Ntango tomoni bango,
Toleisi bango;
Tobengisi bango
Báya makita.
(MONDIMO)
Limpinga ya Yehova;
Kristo liboso.
Tóteya n’esengo
Bokonzi na ye.
3. Limpinga ya Yehova
Ezali biso,
Toza’ kolanda Kristo,
Tobongami solo.
Tózalaka ekɛngɛ,
Mpo tókwea te.
Tótikala sembo,
Tómitika te.
(MONDIMO)
Limpinga ya Yehova;
Kristo liboso.
Tóteya n’esengo
Bokonzi na ye.