LOYEMBO 85
Bóyambanaka
Ya Papye
1. Tóyamba moto nyonso’ayei awa
Koyoka Liloba ya Nzambe.
Apesi biso matey’a solo;
Matɔndi Yehova, mpo obengi biso.
2. Nzambe matɔndi mpo na bandeko,
Oyo baza’ koyamba biso.
Tokolɛngɛla bandeko yango.
Biso mpe tóyamba bato na makita.
3. Nzambe abengisi moto nyonso
Azwa solo mpe ayeba ye.
Ayambi biso na nzel’a Yesu.
Lokola Yehova, tóyamba basusu.
(Talá mpe Yoa. 6:44; Flp. 2:29; Em. 22:17.)