LOYEMBO 93
Pambolá makita na biso
Ya Papye
1. Pambolá makita oyo,
Yehova, tosɛngi yo.
Totɔndi yo mpo na yango;
Sopá elimo na yo.
2. Salisá tóyeba Biblia;
Mpo ebongisa biso.
Emonana na koteya
Mpe na kolinga bato.
3. Tata, na makita oyo,
Pesá kimya, bomoko.
Bizaleli toza’ n’ango,
Nkolo, ekumisa yo.
(Talá mpe Nz. 22:22; 34:3; Yis. 50:4.)