LOYEMBO 98
Makomami ekomami na elimo ya Nzambe
Ya Papye
1. Liloba ya Nzambe, mwinda
Na molili ya lelo.
Soki nde tolandi yango,
Tokomona nzel’a solo.
2. Yah apesi biso yango,
Mpo elakisa nzela.
Eza’ mpe kosunga biso
Mpo tóbongisa makambo.
3. Yehova apesi yango
Mpo alingaka biso.
Tótánga yango butu moi,
Nde tokokende liboso.
(Talá mpe Nz. 119:105; Mas. 4:13.)