LOYEMBO 102
‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’
Ya Papye
1. Tozali basumuki,
Toza’ putulu.
Ata bongo Yehova
Alingi biso.
Mawa mpe bolingo
Na y’eza’ monene.
Tólinga bato mpenza,
Tósunga bango.
2. Kondima ya bandeko
Elɛmbaka mpe.
Ɛɛ, tólendisa bango,
Mpo bábanga te.
Yehova ayebi,
Baza’ bato na ye.
Mpasi na bango eza’
Mpasi na biso.
3. N’esik’a kopamela
Bato balɛmbi,
Tózala nde boboto,
Tósunga bango.
Tólɛmba ndeko te,
Tósundola ye te.
Tóluka lolenge ya
Kosalisa ye.
(Talá mpe Yis. 35:3, 4; 2 Ko. 11:29; Gal. 6:2.)