LOYEMBO 110
“Esengo ya Yehova”
Ya Papye
1. Mosika te Bokonzi ya Yehova
Ekoyangela mokili.
Tósakola: Lobiko eza’ koya;
N’esengo tózela yango!
(MONDIMO)
Esengo euti na Yehova
Ezali nguya na biso.
Sepelá oza’ n’elikya kitoko,
Tósanzola Nzambe na biso.
Esengo euti na Yehova
Eza’ libateli mpenza.
Ɛɛ, tókangama na Nzambe Mokonzi.
Tósalela ye na esengo.
2. Nani’aleki Yehova na makasi?
Tóbanga te, Yah azali.
Tótɛlɛma mpe tóganga makasi;
N’esengo tóyembela ye!
(MONDIMO)
Esengo euti na Yehova
Ezali nguya na biso.
Sepelá oza’ n’elikya kitoko,
Tósanzola Nzambe na biso.
Esengo euti na Yehova
Eza’ libateli mpenza.
Ɛɛ, tókangama na Nzambe Mokonzi.
Tósalela ye na esengo.
(Talá mpe 1 Nt. 16:27; Nz. 112:4; Luka 21:28; Yoa. 8:32.)