LOYEMBO 116
Nguya ya boboto
Ya Papye
1. Yehova Nzambe, oleki mpenza
Na bwanya mpe nguya.
Kasi ozali mpenza boboto,
Tokokumisa yo seko.
2. Mwana na yo mpe, boboto mingi.
Abengi baoyo
Baza’ na mpasi mpe banyokwami,
Báya apemisa bango.
3. Lokola Nzambe mpe Mwana na ye,
Tózala boboto.
Soki tozali mpenza boboto,
Tokosalisa bandeko.
(Talá mpe Mika 6:8; Mat. 11:28-30; Kol. 3:12; 1 Pe. 2:3.)