LOYEMBO 117
Motema malamu
Ya Papye
1. Yehova, oza’ malamu,
Opambolaka biso!
Oza’ mosantu mpe sembo,
Yo, motema malamu.
Olimbisi biso bato
Na mawa na yo, Nkolo!
Tókende lisusu wapi?
Tokokumisa se yo.
2. Batatoli na yo, Nkolo,
Baza’ mpenza boboto;
N’etamboli ya kitoko,
Baza’ koteya bato.
Na bamboka mingi lelo,
Bato bayambi solo.
Sungá basaleli na yo
Mpo bákoba koteya!
3. Tokosala mpe malamu
Na bandeko na biso.
Bango nde tokosalisa
Koleka bato nyonso.
Yehova, pambolá biso
Mpo tósala bolamu
Na lisangá mpe libota,
Bisika nyonso toza’.
(Talá mpe Nz. 103:10; Mrk. 10:18; Gal. 5:22; Ef. 5:9.)