LOYEMBO 125
“Esengo na bato ya motema mawa!”
Ya Papye
1. Yehova Nzambe na biso
Azali motema mawa.
Alingaka mpenza bato,
Apesi biso biloko.
Baoyo batiki mabe,
Yah akolimbisa bango.
Ayebi toza’ putulu
Akokanga motema te.
2. Soki osali lisumu,
Mpo Nzambe alimbisa yo,
Bongolá mpenza motema.
Landá libondeli’a Kristo:
‘Tata, limbisá nga’ mpenza,
Ndenge nga’ mpe nasalaka.’
Wana okoyoka kimya,
Motema n’o ekokita.
3. Soki tokabeli bato,
Tópesaka na bolingo.
Tobo’ bákumisa biso,
Kopesa eza’ esengo.
Ɛɛ, Yehova amonaka.
Ye nde akofuta biso.
Tóyokela bato mawa
Tokosepelisa Nzambe.
(Talá mpe Mat. 6:2-4, 12-14.)