LOYEMBO 134
Bana bazali mokumba Nzambe apesi
Ya Papye
1. Mwasi mpe mobali na ye,
Ntango baboti mwana na bango,
Toboyi te, aza’ ya bango;
Kasi nde bábosana te:
Aza’ likabo ya Yehova,
Liziba ya bomoi mpe bolingo.
Ateyi baboti lolenge
Basengeli kobokola ye.
(MONDIMO)
Nzamb’apesi bino mokumba;
Asimbisi bino bomoi.
Bóteya ye nzela ya Nzambe;
Wana mpenza bolingi ye.
2. Malob’a Nzambe na biso
Efanda na motema na biso.
Tóyebisa yango na bana;
Wana mokumba na biso.
Tósolola yango na nzela,
Bipai nyonso, ntɔngɔ, butu, moi.
Lobi bábosana yango te,
Bázala sembo, bápambwama.
(MONDIMO)
Nzamb’apesi bino mokumba;
Asimbisi bino bomoi.
Bóteya ye nzela ya Nzambe;
Wana mpenza bolingi ye.
(Talá mpe Mib. 6:6, 7; Ef. 6:4; 1 Tim. 4:16.)