LOYEMBO 147
Nzambe alaki biso bomoi ya seko
Ya Papye
1. Tokokufa lisusu te,
Nzambe alaki biso.
Bato ya komikitisa
Bakozwa mabele.
(MONDIMO)
Yehova alaki
Bomoi ya seko.
Tósala makasi
Mpo tózwa yango.
2. Soki mokili mobimba
Ekómi Paradiso,
Kimya, bonsomi ekɔti;
Yehova, Mokonzi.
(MONDIMO)
Yehova alaki
Bomoi ya seko.
Tósala makasi
Mpo tózwa yango.
3. Etikali moke mpenza
Bakufi bakosekwa.
Kolela, mawa elongwe,
Na bolingo’a Nzambe!
(MONDIMO)
Yehova alaki
Bomoi ya seko.
Tósala makasi
Mpo tózwa yango.
(Talá mpe Yis. 25:8; Luka 23:43; Yoa. 11:25; Em. 21:4.)