LOYEMBO 149
Loyembo ya bolongi
Ya Papye
1. Tóyembela Yah. Nkombo na ye ezwi lokumu.
Azindisi banguna na mai monene.
Nguya n’e, nsuka;
Ye aleki banzambe nyonso.
Nkombo n’e Yehova,
Ye Molongi-etumba!
(MONDIMO)
Yehova, oleki na nguya,
Banda kala obongwanaka te.
Yo okoboma banguna na yo,
Mp’osantisa nkombo na yo.
2. Lelo bikólo etɛmɛli Yehova Nzambe.
Lokola Farao,
Bango mpe bakosambwa.
Mpe bakolela;
Bakokufa n’Armagedone.
Bakoyeba mpenza
Yehova aza’ Nzambe.
(MONDIMO)
Yehova, oleki na nguya,
Banda kala obongwanaka te.
Yo okoboma banguna na yo,
Mp’osantisa nkombo na yo.