Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lvs mok. 11 nk. 147-158
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
  • Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Tángá na “Bolingo ya Nzambe”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ZALÁ NA BOYOKANI MALAMU NA NZAMBE MPE NA MOLONGANI NA YO
  • LINGÁ YEHOVA MPO OZALA NA LIBALA YA MALAMU
  • MALOBA MPE MISALA NA YO EMONISA ETE OKUMISAKA LIBALA NA YO
  • “MBETO YA LIBALA EZALA NA MBINDO TE”
  • OYO OKOKI KOSALA MPO LIBALA NA BINO EZALA MAKASI
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
lvs mok. 11 nk. 147-158
Mwasi ná mobali bazali kosala elongo na esengo

MOKAPO 11

Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala

“Bolingo esilaka soki moke te.”​—1 BAKORINTI 13:8.

1, 2. Soki mikakatano ebimi na libala, yango elakisi ete libala elongi te? Limbolá.

LIBALA ezali likabo ya Yehova. Ekoki kobakisela moto esengo na bomoi. Atako bongo, libala na libala ekozala na mikakatano na yango. Na bantango mosusu, ekoki komonana lokola nde mikakatano yango ekosila te, mpe mwasi ná mobali bakoki komiyoka ete bazali lisusu kolingana te ndenge ezalaki liboso.

2 Tosengeli kokamwa te soki na bantango mosusu mikakatano ebimi na libala na biso. Kasi, yango elakisi te ete tolongi te na libala na biso. Ezali kutu na babalani mosusu oyo bazalaki na mikakatano ya makasi na libala na bango, kasi balongaki kobongisa boyokani na bango mpe libala na bango ebongaki. Ndenge nini?

ZALÁ NA BOYOKANI MALAMU NA NZAMBE MPE NA MOLONGANI NA YO

3, 4. Nini ekoki kosalema na libala?

3 Libala esangisaka bato mibale oyo bakeseni; mokomoko azalaka na makambo oyo ye alingaka mpe oyo aboyaka, azalaka na makanisi na ye, mpe ndenge na ye ya kosala makambo. Lisusu, ekoki kozala ete mwasi ná mobali bauti na bikólo to mimeseno oyo ekeseni. Esɛngaka ntango mpe milende mpo mwasi ná mobali báyebana malamu mpe báyekola komitya na esika ya moninga.

4 Nsima ya bambula, moto na moto akoki komipesa mingi na makambo na ye moko, mpe bolingo ya mwasi ná mobali ekoki kokita. Ekoki komonana lokola nde moto na moto azali kotambwisa bomoi na ye na ndenge na ye. Nini ekoki kosalisa bango bákóma lisusu na boyokani makasi?

Mobali moko ná mwasi na ye bazali koyekola elongo

Mpo tózala na libala ya malamu, tosengeli kolanda toli ya Biblia

5. (a) Nini ekoki kosalisa ndeko mobali to ndeko mwasi abatela boyokani ya malamu na molongani na ye? (b) Na kolanda Baebre 13:4, ndenge nini tosengeli kotalela libala?

5 Yehova apesi toli ya malamu oyo ekosalisa yo ná molongani na yo bókoba kozala na boyokani malamu na Nzambe mpe bino mibale. (Nzembo 25:4; Yisaya 48:17, 18) Alobi na biso: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.” (Baebre 13:4) Topesaka lokumu na eloko oyo tomoni ete ezali na valɛrɛ mpe na ntalo. Tobatelaka yango mpe tolɛngɛlaka yango. Yehova alingi tótalela libala ndenge wana.

LINGÁ YEHOVA MPO OZALA NA LIBALA YA MALAMU

6. Matai 19:4-6 emonisi ete Yehova atalelaka libala ndenge nini?

6 Yehova nde Mobandisi ya libala. Mwana na ye Yesu alobaki: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:4-6) Banda na ebandeli, Yehova alingaki ete libala eumela libela na libela. Alingaki bato ya libota bázala na bomoko, bázala na esengo, mpe básepela na bomoi elongo.

7. Nini ekosalisa mwasi ná mobali bábatela libala na bango?

7 Kasi, lelo bato oyo babalá bazali kokutana na makambo ebele oyo ezali komema mitungisi mpe mikakatano ndenge na ndenge. Na bantango mosusu, mikakatano ekoki kozala makasi tii mwasi ná mobali bakoki kokanisa ete bakokoka te, mpe nsukansuka okomona bakabwani. Kasi, koyeba ndenge oyo Yehova atalelaka libala ekoki kosalisa biso.​—1 Yoane 5:3.

8, 9. (a) Ntango nini tosengeli kolanda toli ya Yehova na libala na biso? (b) Ndenge nini tokomonisa ete tozwaka libala na valɛrɛ?

8 Toli ya Yehova ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. Ndenge tomonaki yango, Yehova apesi biso toli oyo: “Libala ekumisama.” (Baebre 13:4; Mosakoli 5:4) Soki tolandi toli ya Yehova ata na ntango oyo ezali mpasi, tokozwa kaka litomba.​—1 Batesaloniki 1:3; Baebre 6:10.

9 Mpo na komonisa ete tozwaka libala na valɛrɛ, tosengeli koboya kosala to koloba likambo oyo ekoki kobebisa yango. Kasi, tokoluka nde kokómisa makasi boyokani na biso ná molongani na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

MALOBA MPE MISALA NA YO EMONISA ETE OKUMISAKA LIBALA NA YO

10, 11. (a) Mikakatano nini ya minene ezalaka na mabala mosusu? (b) Mpo na nini ndenge tolobaka na molongani na biso ezali na ntina mingi?

10 Moto akoki kopesa molongani na ye mpasi na ndenge mingi. Toyebi ete mokristo asengeli ata moke te kobɛta molongani na ye to kosala eloko moko oyo ekoyokisa ye mpasi na nzoto. Nzokande, tokoki kozokisa molongani na maloba na biso. Maloba ekoki kokóma bibundeli. Mwasi moko alobi boye: “Mobali na ngai abɛtaka ngai na maloba. Nazali na bilembo na nzoto te, kasi motema na ngai etondi na bampota mpo akatelaka ngai mangala, lokola: ‘Nabaye makambo na yo!’ mpe ‘Ozali ata na ntina moko te!’” Mobali moko alobaki ete maloba ya mwasi na ye ezalaki ntango nyonso kosambwisa ye mpe azalaki kobamba ye bankombo. Alobi boye: “Nakokoka te kozongela makambo ya mabe oyo alobaka na ngai. Yango wana nakokaka te kosolola na ye, mpe natikalaka na mosala tii butu. Kuna, nazalaka na kimya koleka na ndako.” Lelo oyo, bato bazali na momeseno ya kobimisa maloba ya kofinga mpe maloba ya mabe oyo ekoki kopesa mpasi mingi na motema.

11 Soki mwasi ná mobali bazali kolobelana maloba ya mabe, bakoki kozokisana na motema bampota oyo ekoumela mpo esila. Ezali polele ete Yehova alingi te ete mwasi ná mobali bálobanaka ndenge wana. Kasi, okoki kozokisa molongani na yo na motema kozanga kutu oyeba yango. Mbala mosusu okanisaka ete ozalaka na boboto epai ya molongani na yo, kasi ye moko alobaka nini? Soki olobaki likambo moko oyo ezokisaki molongani na yo, okondima kosala mbongwana?​—Bagalatia 5:15; tángá Baefese 4:31.

12. Nini ekoki kobebisa boyokani ya moto oyo abalá ná Yehova?

12 Ndenge oyo olobaka na molongani na yo, na miso ya bato to ntango oyo bozalaka bino mibale ezali na ntina na miso ya Yehova. (Tángá 1 Petro 3:7.) Yakobo 1:26 ekundweli biso ete: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.”

Mwasi ná mobali bazali kosala elongo na esengo

13. Ezaleli nini mosusu ekoki kozokisa molongani na biso na motema?

13 Ezali na makambo mosusu oyo bato oyo babalá basengeli kokeba na yango. Na ndakisa, molongani na yo akoyoka ndenge nini soki obandi kolekisa ntango mingi na moto mosusu? Atako mbala mosusu ozali kosala yango na makanisi ya mabe te, na ndakisa kobima na mosala ya kosakola to ozali kopesa ye lisalisi mpo na likambo moko, ekopesa molongani na yo mpasi te? Ndeko mwasi moko alobaki: “Komona ete mobali na ngai apesaka ntango mpe likebi mingi na ndeko mwasi mosusu ya lisangá epesaka ngai mpasi. Etindaka ngai namiyoka ete ndeko mwasi yango aleki ngai.”

14. (a) Liteya nini ya ntina tozwi na Ebandeli 2:24? (b) Motuna nini tosengeli komituna?

14 Biso bakristo tozali na mokumba epai ya baboti na biso mpe bandeko na biso ya lisangá. Kasi, soki tobali, mokumba na biso ya libosoliboso ekómi epai ya molongani na biso. Yehova alobaki ete mobali “asengeli kokangama na mwasi na ye.” (Ebandeli 2:24) Tosengeli kotya likebi mingi na mayoki ya molongani na biso. Omituna boye: ‘Napesaka molongani na ngai ntango, likebi, mpe bolingo oyo esengeli mpe eyokani na mposa na ye?’

15. Mpo na nini moto oyo abalá asengeli kokeba ete akangama te na moto oyo azali molongani na ye te?

15 Kokangama na moto oyo azali molongani na yo te, ekoki kotya mobulu na libala. Tokoki komesana mingi na moto yango mpe kobanda kolulana na moto yango. (Matai 5:28) Bamposa yango ekoki kokóma makasi mpe kotinda yo osala likambo moko oyo ekoki kobebisa lokumu ya libala na yo.

“MBETO YA LIBALA EZALA NA MBINDO TE”

16. Etinda nini Biblia epesi mpo na libala?

16 Nsima ya koloba ete “libala ekumisama,” Biblia elobi: “Mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Baebre 13:4) Awa, maloba “mbeto ya libala” elimboli kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali. (Masese 5:18) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na limemya na likambo yango mpe tolingi kokómisa yango mbindo te?

17. (a) Ndenge nini bato mingi batalelaka ekobo? (b) Ndenge nini bakristo basengeli kotalela ekobo?

17 Lelo oyo, bato mosusu bamonaka ete ezali mabe te kozanga bosembo epai ya molongani. Tosengeli te kotika makanisi yango etambwisa biso. Yehova amonisi polele ete ayinaka pite mpe ekobo. (Tángá Baroma 12:9; Baebre 10:31; 12:29) Soki tosangisi nzoto na moto mosusu oyo azali molongani na biso te, tokokómisa libala na biso mbindo. Ekomonisa ete tozali na limemya te na mibeko ya Yehova, mpe tokobebisa boyokani na biso na ye. Na yango, tosengeli ata komeka kotya lokolo te na nzela oyo ekoki komema biso na ekobo. Yango elimboli mpe kolongola makanisi oyo ebongi te mpo na moto oyo azali molongani na biso te.​—Yobo 31:1.

18. (a) Mpo na nini ekobo ezalaki lokola kosambela banzambe ya lokuta? (b) Ndenge nini Yehova azalaki kotalela ekobo?

18 Na ntango ya Mibeko ya Moize, ekobo ezalaki lisumu moko monene, kaka lokola kosambela banzambe ya lokuta. Etumbu mpo na masumu yango mibale ezalaki liwa. (Balevi 20:2, 10) Na ndenge nini ekobo ezali lokola kosambela banzambe ya lokuta? Soki Moyisraele asambeli banzambe ya lokuta, awangani elaka na ye ya kozala sembo epai ya Yehova. Soki asali ekobo, awangani elaka na ye ya kozala sembo epai ya molongani na ye. (Kobima 19:5, 6; Kolimbola Mibeko 5:9; tángá Malaki 2:14.) Emonani polele ete na ntango ya kala, na miso ya Yehova, ekobo ezalaki lisumu monene mpenza.

19. Nini ekoki kosalisa biso tózala na ekateli ya kosala ekobo te?

19 Bongo lelo? Atako tozali lisusu na nse ya Mibeko ya Moize te, likanisi ya Yehova mpo na ekobo ebongwani te. Ndenge kaka tokolinga ata moke te kosambela nzambe ya lokuta, tosengeli ata moke te kozanga bosembo epai ya molongani na biso. (Nzembo 51:1, 4; Bakolose 3:5) Soki tosali bongo, ekomonana ete totyoli libala na biso mpe Nzambe na biso, Yehova.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 26.

OYO OKOKI KOSALA MPO LIBALA NA BINO EZALA MAKASI

20. Ndenge nini bwanya ekoki kosalisa na libala?

20 Okoki kosala nini mpo libala na yo ezala makasi? Biblia elobi: “Ndako ekotongama na bwanya, mpe ekopikama makasi na bososoli.” (Masese 24:3) Tokoki kokómisa ndako na biso esika ya malilimalili mpe ya kokimisa bato, to esika oyo bato bazali kosepela, komiyoka malamu mpe ete babatelami. Ezali mpe bongo mpo na libala. Moto ya bwanya asalaka nyonso mpo libala na ye ezala esika ya kobatelama, ya esengo, mpe esika oyo moto azali komiyoka malamu.

21. Ndenge nini boyebi ekoki kosala ete libala ezala makasi?

21 Mpo na ndako yango, Biblia ebakisi: “Na boyebi, bashambrɛ na yo ya kati ekotonda na biloko nyonso ya motuya oyo ezali na ntalo mingi mpe oyo esepelisaka.” (Masese 24:4) Makambo oyo oyekolaka na Biblia ekoki kobongisa mpenza libala na yo. (Baroma 12:2; Bafilipi 1:9) Soki ozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso elongo na molongani na yo, bólobela ndenge oyo bokoki kosalela makambo yango. Bólukaka ndenge oyo bokoki komoniselana bolingo mpe limemya, mpe ndenge ya komonisa boboto mpe kotyelana likebi. Sɛngá Yehova asalisa yo okolisa bizaleli oyo ekobongisa libala na bino mpe ekosala ete molongani na yo alinga yo.​—Masese 15:16, 17; 1 Petro 1:7.

Mobali moko azali kobondela elongo na mwasi na ye liboso básala losambo na kati ya libota

Tyelá Yehova motema mpo atambwisa bino na losambo na kati ya libota

22. Mpo na nini tosengeli komonisela molongani na biso bolingo, limemya, mpe kopesa ye lokumu?

22 Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela molongani na biso makambo na bolingo, kopesaka ye limemya mpe lokumu. Na ndenge yango, libala na biso ekokóma na esengo mpenza mpe ekoumela. Oyo eleki ntina, tokosepelisa Yehova.​—Nzembo 147:11; Baroma 12:10.

MITINDA YA BIBLIA

1 LIBALA NA BINO EKOKI KOKUMISA YEHOVA

“Bolingo esilaka soki moke te.”​—1 Bakorinti 13:8

Nini ekoki kosalisa biso tósilisa mikakatano na libala?

  • Mosakoli 5:4; Matai 19:4-6

    Libala nyonso ezalaka na mikakatano na yango. Kasi kowela kokabwana te na molongani na yo.

  • Nzembo 25:4; Yisaya 48:17, 18; Matai 6:33, 34

    Soki mwasi ná mobali babateli boyokani na bango na Yehova, libala na bango ekozala makasi mpenza.

2 MALOBA MPE MISALA NA YO EKOKI KOBONGISA TO KOBEBISA LIBALA NA YO

“Basengeli kokóma mosuni moko.”​—Ebandeli 2:24

Ndenge nini koboya kozokisa molongani na yo na motema?

  • Matai 5:28; Baefese 4:31

    Zalá sembo epai ya molongani na yo ata na makanisi na yo. Tyá likebi na mayoki ya molongani na yo. Soki oyebi ete ozali kopesa ye mpasi, ndimá kobongwana.

  • Bagalatia 5:15

    Tosengeli ata moke te konyokola molongani na biso na nzoto to na makanisi. Maloba ya mabe ebebisaka libala.

  • Masese 5:18; Baebre 13:4

    Na miso ya Yehova, ekobo ezali lisumu ya monene. Tosengeli kozala na ekateli ya kotikala sembo epai ya molongani na biso mpe kozwa libala na biso na valɛrɛ. Tosengeli ata mokolo moko te kobebisa lokumu ya Yehova to ya molongani na biso.

3 OKOKI KOKÓMISA LIBALA NA YO MAKASI

“Ndako ekotongama na bwanya.”​—Masese 24:3

Okoki kosala nini mpo libala na yo ezala malamu mpe ya esengo?

  • Masese 24:4; Matai 6:14, 15; Baroma 12:2; 1 Petro 3:1

    Zwáká ntango ya kosolola na molongani na yo. Saleláká molongani na yo makambo na bolingo, na boboto mpe pesáká ye limemya. Yekolá kolimbisa nokinoki.

  • Masese 14:1; 31:29; Bafilipi 1:9; 2:4; 1 Petro 3:7

    Sɛngá Yehova asalisa yo okóma mobali to mwasi ya malamu. Luká ndenge ya komonisa boboto mpe kotyela molongani na yo likebi mingi.

  • Baroma 12:10; 1 Petro 4:8

    Soki osali nyonso oyo okoki mpo na komonisa ete olingaka molongani na yo mpe opesaka ye lokumu, libala na bino ekozala malamu mpenza mpe bokosepelisa Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto