Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 12
  • Nini ekoki kosalisa yo okoba koyekola Bibia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekoki kosalisa yo okoba koyekola Bibia?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Biblia ekoki kosalisa yo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia ekoki kosalisa yo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Okoki mpenza mpo na kozwa batisimo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia elobi nini mpo na mosala mpe mbongo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 12
Liteya 12. Motatoli moko ya Yehova azali koyekola Biblia na mama mpe bana na ye mibale.

LITEYA 12

Nini ekoki kosalisa yo okoba koyekola Biblia?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Koyekola Biblia ememaka bolamu. Kasi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Ntango mosusu, okoki komituna soki okokoba koyekola Biblia. Mpo na nini ezali na ntina osala makasi mpo okoba koyekola? Nini ekoki kosalisa yo otika koyekola te ata soki okutani na mikakatano?

1. Mpo na nini koyekola Biblia ezali na ntina?

Biblia elobi ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebre 4:12) Biblia ezali na ntina mpo ezali komonisa makanisi ya Nzambe mpe ndenge oyo alingaka yo. Ekosalisa yo okóma na boyebi, bwanya mpe elikya ya solosolo. Mpe oyo eleki ntina, Biblia ekosalisa yo okóma moninga ya Yehova. Ntango ozali koyekola Biblia, ekokómisa bomoi na yo malamu mpenza.

2. Mpo na nini ezali na ntina koyeba valɛrɛ ya mateya ya Biblia?

Mateya ya Biblia ezali lokola biloko ya motuya mingi. Yango wana Biblia elendisi biso ‘tósomba solo mpe tótɛka yango ata moke te.’ (Masese 23:23) Soki toyebi ete mateya ya Biblia ezali na ntina, tokosala makasi mpo tókoba koyekola ata ntango tokutani na mikakatano.​—Tángá Masese 2:4, 5.

3. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo okoba koyekola?

Lokola Yehova azali Mozalisi oyo aleki na nguya mpe moninga na yo, alingi kosalisa yo mpo oyeba ye malamu. Akoki kopesa yo “mposa mpe nguya ya kosala yango.” (Tángá Bafilipi 2:13.) Yango wana, akoki kosalisa yo mbala nyonso oyo ozali na mposa ya kokoba koyekola mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola. Soki ozali na mposa ya nguya mpo na kolonga mikakatano to botɛmɛli, akopesa yo yango. Sɛngá Yehova mbala na mbala na libondeli asalisa yo okoba koyekola Biblia.​—1 Batesaloniki 5:17.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo okoba koyekola Biblia ata soki ozali na makambo mingi ya kosala to soki basusu bazali kotɛmɛla yo. Mpe talá ndenge Yehova akosalisa yo mpo okoba koyekola Biblia.

4. Tyá boyekoli na yo ya Biblia na esika ya liboso

Na bantango mosusu tozalaka na makambo mingi ya kosala, ekoki komonana ete tozali mpenza te na ntango ya koyekola Biblia. Nini ekoki kosalisa yo? Tángá Bafilipi 1:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini, makambo nini eleki ntina na bomoi?

  • Okoki kosala nini mpo na komonisa ete boyekoli na yo ya Biblia ezali na ntina?

A. Bililingi: Katini etondi na mabanga mpe zɛlo. 1. Mabanga mpe zɛlo. 2. Zɛlo na katikati ya katini. 3. Mabanga minene likólo ya zɛlo na katini mpe mabanga mosusu etikali na nse. B. Bililingi: 1. Mabanga mpe zɛlo. 2. Katini etondi na mabanga. 3. Katini oyo etondi na mabanga mpe babakisi zɛlo. Mwa zɛlo etikali na nse.
  1. Soki otye liboso zɛlo na katini mpe na nsima obakisi mabanga, mabanga mosusu ekozanga esika

  2. Kasi soki otye mabanga liboso, zɛlo nyonso ekokɔta. Ndenge moko, soki otye na esika ya liboso “makambo oyo eleki ntina” na bomoi, okosala makambo yango mpe okozala na ntango ya kosala makambo mosusu

Koyekola Biblia ekokisaka bamposa na biso ya elimo, elingi koloba, mposa ya koyeba Nzambe mpe ya kosambela ye. Tángá Matai 5:3, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bolamu nini tokozwa soki totye boyekoli ya Biblia na esika ya liboso na bomoi na biso?

5. Kobá koyekola ata soki batɛmɛli yo

Na bantango mosusu, bato mosusu bakoki kolɛmbisa yo nzoto mpo ozali koyekola Biblia. Talá ndakisa ya Francesco. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Azwaki mapamboli mpo akobaki koyekola (5:22)

Elilingi ya video ‘Azwaki mapamboli mpo akobaki koyekola.’ Francesco atiki baninga na ye nsima ya koyebisa bango ete akozala lisusu moninga na bango te.
  • Na video oyo, baninga mpe bandeko ya Francesco basalaki nini ntango ayebisaki bango makambo oyo azali koyekola?

  • Mapamboli nini azwaki mpo akobaki koyekola?

Tángá 2 Timote 2:24, 25, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Bandeko na yo ya libota mpe baninga na yo balobaka nini mpo na makambo oyo ozali koyekola?

  • Na kotalela bavɛrsɛ oyo, okosala nini ntango moto moko asepeli te mpo ozali koyekola Biblia? Mpo na nini?

6. Tyá motema ete Yehova akosalisa yo

Ntango tozali kopusana penene na Yehova, tokokóma na mposa makasi ya kosepelisa ye. Kasi ekoki kozala mpasi tóbongola makambo mosusu na bomoi na biso mpo eyokana na mibeko na ye. Soki ozali koyoka ndenge wana, kolɛmba nzoto te. Yehova akosalisa yo. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Yehova asalisi biso tóbongola bomoi na biso (3:56)

  • Na video yango, bambongwana nini Jim asalaki mpo na kosepelisa Yehova?

  • Nini ekamwisi yo na ndakisa na ye?

Tángá Baebre 11:6, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yehova akosala nini mpo na “baoyo bazali koluka ye na mposa makasi,” elingi koloba, baoyo basalaka makasi ya koyeba ye mpe kosepelisa ye?

  • Yehova ayokaka ndenge nini ntango amonaka ete ozali kosala milende mpo na koyekola Biblia?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Mpo na nini ozali koyekola Biblia?”

  • Okopesa ye eyano nini?

NA MOKUSE

Atako koyekola Biblia ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, yango ekosalisa yo osepela na bomoi libela na libela. Kobá kotyela Yehova motema mpe akopambola yo.

Bozongeli

  • Mpo na nini mateya ya Biblia ezali na motuya mingi mpo na yo?

  • Ndenge nini okoki kotya “makambo oyo eleki ntina” na esika ya liboso a bomoi na yo?

  • Mpo na nini osengeli kosɛnga Yehova asalisa yo okoba koyekola Biblia?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá mayele minei oyo esalisi bato mingi básalela ntango na bango malamu.

“Ndenge ya kosalela ntango na yo malamu” (Lamuká! ya 02/2014)

Talá ndenge Yehova asalisaki mwasi moko oyo mobali na ye azalaki koyeba te ntina oyo azalaki kosala makasi ya kosepelisa Nzambe.

Yehova apesaka biso makasi ya komema mokumba na biso (5:05)

Talá bolamu oyo mobali moko azwaki mpo mwasi na ye akobaki koyekola Biblia.

Ezalaki mpasi nandima solo (6:30)

Na bantango mosusu, bato balobaka ete Batatoli ya Yehova bakabolaka bato na mabota na bango. Yango ezali solo?

“Batatoli ya Yehova bapanzaka mabota ya bato to basangisaka yango?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto