Mbongwana ya ezalela ya basi na mikolo na basi
NA 1906, mokonzi Nicolas ya Russie azwaki mokanda, eutaki epai na basi oyo bakosalaka bilanga. Tala mwa maloba mazalaki na kati: “Uta bikeke mingi, basi oyo bakofandaka na mboka bazali ata na lotomo moko te. . . . Bazali kotalela biso ata lokola bato te, kasi lokola banyama bakosalaka misala makasi. Tosengi ete balakisa biso kotanga mpe kokoma; tosengi ete bana na biso ya basi bakota kelasi ndenge moko na bana na biso ya mibali. . . . Tondimi ete toyebi eloko te, kasi ezali foti na biso te.”
Oyo ezali mpenza ezaleli moko ya mawa ekeseni na ndenge Biblia emonisi mwasi oyo akoki mpe amemyami, oyo atangami lokola ndakisa, abongi ete amekolama mpe akumisama. (Masese 31:10-31) Nzokande, makambo mayebisamaki mpo na basi na Russie mamonisi solo oyo ebimisamaki na mokonzi na mayele Salomo: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Ya solo, boyangeli yango enyokoli bobele mibali te. Tokoki komonisa maloba yango lisusu lokola boye: ‘Mibali bazali na bokonzi likoló na mibali misusu mpe basi misusu mpo na kopesa bango mpasi.’ Kasi, lokola tokoki komona yango lelo na Union soviétique, ezalela ya basi ezali ndenge mosusu sikawa.
Na yango, lelo oyo “ndambo monene ya minganga mpe balakisi na Union soviétique bazali basi. Ndambo mibale kati na misato bazali ba économistes mpe pene na ndambo misato na minei na baoyo bazali na mosala etali kokolisa mayele ya bato bazali basi. Ntuku minei na mokama ya bato na sianse bazali basi. . . . Kati na basi nkoto oyo bazali kosala mosala ya ekonomi na mboka, 862 batangaki kino na université to na secondaire (mingi kati na bango basilisaki biteyelo yango to bakomaki pene na kosilisa)”. Les femmes en U.R.S.S. (Angl.)
Basi mpe politike
Likambo yango mpe emonanaki mwa mingi na mikili misusu. Nouvelle—Zélande ezalaki mokili ya liboso oyo epesaki nzela na basi ete bavoté, na 1893. Bongo mikili misusu milandaki longwa na 1917 kino na 1920, lokola Russie, Grande-Bretagne, Etats-Unis mpe Canada. Na Suisse, basi bazwaki lotomo yango ya kovoté bobele na 1971, wana basilaki kokota na misala ya politike.
Lelo oyo, basi bazali bobele kovoté te, kasi bazali kowelana na mibali mpo na oyo etali mikumba kati na politike. lsraël bazalaki na mwasi moko premier ministre, nkombo na ye Golda Meir; bobele bongo na lnde, bazalaki na lndira Gandhi. Kala mingi te, Grande-Bretagne mpe Yougoslavie bautaki kopona basi lokola ba premiers ministres. Na U.R.S.S., bato 492 kati na likita oyo ekotalaka makambo ya baloni, basali, mpe basoda, bazali basi. Elingi koloba ete 30 to 40 kati na mokama. Esambiselo eleki monene na Etats-Unis ezali sikawa na mwasi moko mpe, ntango balukaki ebonga ya bokonzi (président) na 1984, mpo na mbala ya liboso parti politike moko monene ebimisaki mwasi mpo ete akoka kowela ebonga ya vice—président. Na France, basi oyo bazali na misala mpo na kotambwisa mboka bazali pene na 15%.
Basi mpe mosala
Na Etats-Unis, na bisika mingi oyo bakomaki likoló na mabaya ete “Men at Work” (oyo elimboli ete “Mibali bazali na mosala”), na esika ya makomi yango bayaki kotya na nsima maloba oyo “People Working” (oyo elimboli ete “Bato bazali na mosala”). Mpo na nini maloba oyo ya bokatikati? Ezali mpo ete mwasi asili kozwa esika monene kati na makambo ya ekonomi. Ntalo ya basi oyo bamikotisi na mosala esili kobakisama mbala mibale na mibu 25 oyo euti koleka. Na 1970, basi oyo bazalaki kosala na biro bazalaki bobele 27%; mbula zomi na minei na nsima, bakomi 65 kati na mokama. Bamoko bazali kosala mpo na kozwa mosolo, bamosusu bobele mpo balingi kosala. Na bisika mosusu, wana mosala ya mwasi ekokani na oyo ya mobali, lifuti na bango mibale mpe ebandi kokokana mokemoke.
Basi mpe mateya, misala ya maboko, lingomba
Na mokili mobimba to na bisika mingi ya mokili, basi oyo bazali koyekola bazali kokoma se mingi. Motuya ya bilenge basi oyo bakoti kelasi elongwe na 95 millions na 1950 kino na 390 millions na 1985. Eleki mibu 25, na Espagne, basi oyo bayebaki kotanga te bazalaki mbala mibale koleka mibali oyo bayebaki kotanga te. Na 1983, likambo yango ebongwanaki makasi mpenza na boye ete bayekoli ya basi bazalaki ntuku misato kati na mokama na Université. Zulunalo Women in Britain elobeli mpo na “kokola ya kokamwa ya motuya ya bayekoli ya basi kati na ba Université” na Grande-Bretagne.
Na miziki, basi bazali mpenza kozwa esika ya liboso mpo na koyemba to kobeta ebeteli moko ya miziki. Liboso na 1935, na Etats-Unis, bobele basi oyo bazalaki ba harpistes to oyo bayebi kobeta nzenze nde bazalaki kokota na ba orchestres, mosala oyo mibali bazalaki koboya. Nzokande, sikawa, 40% ya bamizisié ya ba orchestres minene, ezala na barégió to na bingumba minene, bazali basi.
Basi bazali mpe kokota na molende nyonso na misala ya lingomba. Na Etats-Unis, basi mingi bazali komikomisa na séminaire, yango etomboli motango ya basi ba séminaristes longwa na 29% kino na 52%. Basi bazali koteya, bamosusu bazali kokoma mikonzi na mangomba. 11% ya basi bazali ba pasteurs na Sučde, mpe na Orient bamoko kati na basango ya lingomba na Anglican, bazali basi. The New York Times (ya le 16 février 1987) emonisaki ete “Lingomba ya misioni ezali na basi 968 lokola ministre”.
Yango ebimisi nini?
Ezali polele ete ezalela ya basi ebongwani mpenza na bambula oyo. Mbala mosusu omoni yo moko mpenza mbongwana yango. Kasi ekozala malamu na komituna: Mbongwana nyonso wana ebimisi bobele bolamu?