Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Yesu aleisi bankoto na bato na ndenge ya ekamwiseli
BANTOMA zomi na mibale batamboli na Galilai mobimba mpe basepeli mingi na ndenge basakoli nsango malamu na bisika yango. Sikawa, mwa ntango moke nsima na kobomama na Yoane, bazongi epai na Yesu mpe bayebisi ye makambo kitoko oyo bango bamonaki. Lokola amoni ete balembi mpe bazali ata na ntango ya kolya te mpo bato baleki mingi, (tala Malako 6:31) Yesu alobi na bango: “Boyaka na bino mpenza epai na lisobe mpe bopema moke,” (Tala Malako 6:31.)
Bamati bongo na bwato na bango, oyo ekokaki kozala pene na Kapernaume, mpe babandi kokenda esika na bango moko, mbala mosusu ezalaki na est ya Yordani, mosika na Betesaida. (Luka 9:10) Kasi bamoko bamonaki bango ntango bazalaki kokenda, mpe bamosusu bayoki nsango yango. Bango nyonso bapoti mbango mpe bakomi na esika yango ntango bwato ekomi na libongo. (Malako 6:33)
Wana bakiti na bwato, Yesu ayoki mawa liboso na bato nyonso wana, mpamba te bazali lokola bampate bazangi mobateli. Abikisi bongo bato bazalaki na bokono kati na bango mpe abandi koteya bango makambo mingi. (Tala Malako 6:34.)
Ntango ezali koleka noki, na motindo boye ete bayekoli na Yesu babelemi epai na ye mpe bayebisi ye: “Oyo ezali lisobe mpe moi esili koleka. Pesa bango nzela ete bakenda epai na epai na mboka mpo na komisombela biloko na kolya.” (Malako 6:35, 36)
Nzokande, Yesu ayanoli bango: ”Boleisa bango.” (Malako 6:37) Nsima na yango, mpo ayebi libela likambo oyo akosala, atuni Filipe mpo na komeka ye: “Tokosomba kwanga wapi ete baoyo balya?” (Yoane 6:5)
Mpo na Filipe likoki ya kosala likambo ezali te. Na yango, mibali 5 000 basangani wana, soko tobakisi bana mpe basi bakoki kokoma 10 000! Yango wana ayanoli epai na Yesu: “Kwanga na denali nkama mibale (denali moko ezalaki lifuta ya mokolo mobimba ya mosala), ekokoka mpo na bango te ete moto na moto azwa mwa ndambo moke,” (Yoane 6:7)
Mbala mosusu, mpo na komonisa ete likoki ezali mpo na koleisa etuluku monene ya bato wana, André alobi: “Mwana mobali azali awa oyo azali na mikate mitano na loso mpe mbisi mibale; kasi yango ezali nini kati na baoyo mingi boye?” (Yoane 6:9)
Lokola ezali eleko ya printemps, mpenzampenza liboso na Pake ya mobu 32, matiti ebimi mingi. Bongo lokola Yesu asengi bango yango, bayekoli bayebisi bato ete bafanda likolo na matiti na bituluku ya bato 50 mpe 100. (Malako 6:40) Bongo Yesu azwi mampa yango mitano mpe mbisi mibale, atomboli miso likolo mpe abondeli, nsima abandi kokata mampa mpe kokabola mbisi. (Malako 6:41) Apesi bilei yango epai na bayekoli, mpe bango, babandi kokabola yango epai na bato. Likambo ya kokamwa bato nyonso balei kino batondi!
Na nsima, Yesu alobi epai na bayekoli na ye: “Bolokota ndambo etikali ete eloko ebungana te.” (Yoane 6:12) Bilei bitikali bitondisi bitunga 12! Matai 14:13-21; Malako 6:30-44; Luka 9:10-17; Yoane 6:1-13.
◆ Mpo na nini Yesu aluki esika mpo ete bantoma na ye bakende kuna?
◆ Yesu akei na bayekoli na ye epai wapi, mpe ata bongo mpo na nini bakoki te kopema?
◆ Lokola butu elingaki kokoma, likambo nini bayekoli basengi Yesu ete asala, nzokande na ntina na bolamu ya bato, Yesu asali nkembo nini?