Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/7 nk. 10-15
  • Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolamu to matomba
  • Tosengeli koyekola kobanga Jéhovah
  • Bongisá motema na yo mpo na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mpo na nini kobanga Nzambe, kasi bato te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bangá Yehova mpe batelá mibeko na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/7 nk. 10-15

Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?

Tosa Nzambe mpe batela mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.​—MOSAKOLI 12:13.

1, 2. (a) Liyoki nini esengeli kopusa losambo oyo tozali kosala mpo na Nzambe? (b) Likambo nini mosusu Jéhovah azali kosenga epai na biso? (Deteronome 10:12)

EKAMWISI yo mpo tolobeli likambo ya “kobanga Nzambe”? Ntango mosusu bato mingi bazali koloba ete soki tolingi mpenza Nzambe ntina ya kobanga ye ezali te. Na bongo tokoki mpenza kozala na mayoki mibale oyo liboso na Nzambe? Mpe soki ee, bolamu nini kobanga Nzambe ekoki komemela biso?

2 Engebene Makomami, losambo mpe mosala oyo tozali kosala mpo na Nzambe esengeli kotambwisama na bolingo. Ezali yango Yesu amonisaki polele ntango azali koloba na biso na kolinga Jéhovah na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na elimo na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba. (Malako 12:30) Nzokande, liloba na Nzambe ezali komonisa mpe ntina ya kobanga Nzambe. Kati na Mosakoli 12:13, tozali kokuta toli oyo ya sikisiki: “Toyoka nsuka na likambo: Tosa Nzambe mpe batela mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.” Jéhovah azali komikosa wana azali kosenga biso ete tobanga ye mpe tolinga ye na mbala moko?

3. Mpo na oyo etali nsomo, eloko nini tosengeli kotalela?

3 Mpenza te soki totaleli ete ezali na mitindo mingi mikeseni ya kobanga. Ntango bato bazali koloba mpo na kobanga, bakanisaka mingimingi na ezaleli ya kobanga oyo elimwisaka elikya mpe ezali kobota kolemba. Ya solo, Jéhovah alingi te ete tolona liyoki motindo wana mpo na ye. Tata na biso ya likoló alingi ete toya epai na ye lokola mwana azali koya epai na tata na ye, komindimisaka mpenza ete ye alingi ye, kasi lisusu azali kobanga ete ayinama te epai na ye. Kobanga wana ekosalisa biso na kotosa ntango nyonso Tata na biso ya likoló soki ekomeli biso ete tomekama mpo na kosala mabe. Na bongo ezali nde “kotosa malamu” oyo baklisto basengeli komonisa.​—Baebele 5:7; 11:7.

4. Kobanga ya ndenge nini bolingo ezali kokweisa?

4 Jéhovah akokani na mosambisi mabe te oyo akosepela kopesa basaleli na ye etumbu mbala nyonso oyo basali libunga. Te, alingaka bango mpe azali na mposa ya komona bango ete bakokisa mikano na bango. Na bongo soki tosali libunga to lisumu, nsomo oyo tozali na yango mpo na Jéhovah ekoki kopekisa biso te na koyebisa ye yango (1 Yoane 1:9; 2:1) Nsomo wana mpo na botosi ezali oyo ya kotiolama to ya kobwakama te. Tozali kotanga mpenza kati na 1 Yoane 4:18: “Nsomo ekozalaka kati na bolingo te, kasi bolingo oyo esili kokoka ekobwaka nsomo libanda mpo ete nsomo ezali na etumbu.” Nzokande, “bolingo ya kokoka” ezali kopekisa biso te na kozala na limemya mozindo mpe nsomo oyo ebongi mpo na Jéhovah, Mozalisi na biso, Liziba ya bomoi.​—Nzembo 25:14.

Bolamu to matomba

5. (a) Motindo se moko ya kozwa bwanya ezali nini? (b) Nini ememaki momeli moko na kala ya drogue na kotika ezalela to etamboli na ye ya mbindo?

5 Totalela mwa bolamu to matomba oyo ezali kouta na “kobanga Jéhovah”. Na ndakisa ezali komema biso na kolona bwanya ya solo. Atako bato bazali koluka kozwa bwanya yango na mitindo ndenge na ndenge, bazali kolonga te mpamba te bazali koboya kotosa mobeko oyo ya ebandeli: “Kobanga Jéhovah ezali ebandeli ya mayele.” (Nzembo 111:10; Masese 9:10) Totalela ndenge nini nsomo yango esalisaki momeli moko ya kala ya drogue ete amonisa mayele. Mobali yango azali koyebisa: “Ntango nyonso oyo nazalaki koyekola koyeba Nzambe, nsomo ya koyokisa ye mawa to ya koyinama epai na ye ezalaki kokola epai na ngai. Nayebaki ete azali kotala ngai, mpe nazalaki mpenza na mposa ete andima ngai. Yango epesaki ngai nzela ya kobwaka drogue na ngai na w.c.” Mobali wana alongaki na kotika misala na ye ya mabe, apesaki bomoi na ye epai na Jéhovah, mpe azali sikawa ministre moklisto na Johannesburg, na Afrika ya Sudi.

6. Ndenge nini “nsomo ya Jéhovah” ezali kobatela na mabe, mpe yango ezali komema wapi?

6 Ozali na mposa ya kotika mabe? Na bongo yeba ete “kobanga Jéhovah elimboli koyina mabe”. (Masese 8:13) Ee, kobanga wana ya lobiko ekoki kobatela yo na misala nyonso ya mabe oyo Nzambe azali kokweisa, lokola likaya, bangi, molangwa mpe pite. Ezali kopesa yo nzela bobele na kosepelisa Jéhovah te, kasi lisusu na kobatela yo na mpasi nyonso oyo ezali kozwa baoyo bazali komipesa na misala wana, bakisa mpe maladi ya nsomo oyo bazali komibendela. (Baloma 1:26, 27; 12:1, 2; 1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Batesalonike 4:3-8) Kobanga Nzambe ezali kosalisa yo bobele na komibatela na oyo ezali mabe te; ezali komema na oyo ezali peto mpe lobiko. Na yango, eyebisameli biso ete “nsomo na kobanga Jéhovah ezali peto”.​—Nzembo 19:9.

7, 8. (a) Ndenge nini elenge mwasi moko amonaki ete “nsomo ya Jéhovah” ezali komema na bolamu? (b) Bolamu nini mosusu bato oyo bazali kobanga Jéhovah bazali kozwa?

7 Esengo, tala mokano mosusu ebele na bato bazali kolanda. Ndenge nini tokoki kozwa yango? Liloba na Nzambe elobi: “Esengo ezali na moto oyo akobangaka Jéhovah!” (Nzembo 112:1; 128:1) Ezali yango nde elenge moko oyo azalaki komitambwisa malamu te, oyo azalaki kosala misala ya bilimu mabe mpe azalaki na momeseno ya koyiba amonaki. Abandaki koyekola Biblia mpe ayebaki ntina ya koyoka mpe ya kobanga Jéhovah. Azali koyebisa: “Koyeba soki Jéhovah azali nani ezali likambo kitoko koleka oyo ekomela ngai naino te. Jéhovah asalisaki ngai koleka mpo na komona solo mpe esengo. Nazali koyoka lokola nazali na nyongo monene epai na ye mpamba te afungolaki ngai miso mpe apesaki ngai likoki ya kokanisa malamu mpe ya koyeba ye. Sikawa nazali na mposa ya kosalisa bamosusu na koyeba esengo yango.”

8 Jéhovah azali mpe kolaka kopesa likabo epai na ‘baoyo bazali kobanga nkombo na ye’. (Emoniseli 11:18) Epai mosusu, “Botosi na kotosa Jéhovah ekopesa bomoi; ye oyo azali na yango akoumela na kotonda; akokutana na mabe te”. (Masese 19:23 Ntembe ezali te, “nsomo ya Jéhovah” ekomemela biso makambo nyonso oyo tozali na yango mposa. Ntango nsomo yango esangani na komikitisa, litomba na yango ezali “bozwi, mpe lokumu mpe bomoi”.​—Masese 22:4; 10:27.

9. Mpo na nini, na lisalisi ya “nsomo na Jéhovah”, tozali na motinda moko ya bomoi oyo ezali komonisa bwanya? (Yobo 28:28; Mika 6:9)

9 Wana ezali elendiseli monene mpo na kobanga Nzambe. Boye te? Ntembe ezali te, “nsomo ya Jéhovah” eleki kitoko. Ezali mpo na yango nde, tozali na bomoi moko oyo ezali kopesa biso nzela na koyoka esengo ya solo-liyoki oyo ezali komonana mingi te na mikolo na biso lelo. Maloba oyo mapemami na Nzambe mazali mpenza kolendisa: “Ata moto na masumu akosala mabe mbala mokama mpe mikolo na ye mizali kofuluka mingi nde nayebi solo ete ekozala malamu epai na bango bazali kotosa Nzambe, baoyo bakobangaka liboso na ye.” (Mosakoli 8:12, 13) Nani akolinga te ete ‘yango eleka malamu’ mpo na ye? Nzokande, bobele baoyo bazali kobanga Nzambe nde bakozwa esengo.​—Nzembo 145:19.

10. Tanga bantina mosusu oyo esengeli kopusa biso na kobanga Nzambe?

10 Elikya yango ekoki kopesa biso nzela te na kozala na kobanga mozindo, ee, nsomo, mpo na Tata na biso ya likoló Jéhovah? Mpo na koloba solo, tosengeli kozala na nsomo ya lobiko oyo ya koyinama epai na ye. Tozali mpenza na botondi mingi epai na ye mpo na boboto nyonso oyo azali komonisa biso. Nyonso oyo tozali na yango euti na ye. (Emoniseli 4:11) Epai mosusu, azali Mosambisi oyo aleki, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpe azali na nguya ya koboma baoyo nyonso bazali kotosa ye te. Yango wana ntoma Paulo azali kopesa biso toli oyo: “Boluka sasaipi nzela na kobika na bino na nsomo mpe na kolenga.”​—Bafilipi 2:12; Osea 3:5; Luka 12:4, 5.

11. (a) Na mikolo oyo ya nsuka ezalela nini baklisto basengeli kobwaka? (b) Elimo to makanisi ya motindo nini tosengeli kolona?

11 Maloba oyo ezali koyebisa te ete tokoki kobika soko tozali komibanzabanza na eloko te mpe tozali kotya bobele milende mike mpe kozalaka na elikya ete, na lolenge moko to mosusu. makambo makotambola malamu mpo na biso. Baklisto oyo bazali kotya milende na mikolo ya nsuka mpo na kobatela boyokani na bango elongo na Ye oyo akoki kotanga kati na mitema na bango mpe koyeba makanisi mpe mayoki ya nse ya motema na bango, bakoki komonisa elimo ya boye te. (Yilimia 17:10) Jéhovah akondima lokola bato na ye bobele baoyo bazali komonisa ye limemya oyo esengeli kopesama na ye. Alobi: “Nde nakotalaka epai na moto oyo: ye oyo azali mosokemi mpe atutami na elimo.”​—Yisaya 66:2.

Tosengeli koyekola kobanga Jéhovah

12. (a) Ndenge nini Bayisraele basalisamaki koleka mabota mosusu nyonso? (b) Eloko nini Jéhovah azalaki kozela epai na bango na nsima?

12 Tosengeli kosimba makasi ntina ya kobanga Jéhovah na kotalelaka mitindo na ye ya kosala epai na libota ya Yisraele. Libota moko te lokola bango ezwaki likebi ya Nkolo ya molongo mobimba. (Deteronome 4:7, 8, 32-36; 1 Samwele 12:24) Bayisraele bamonaki na miso na bango makambo oyo Jéhovah asalaki epai na Baezipito baoyo, bazalaki na nsomo ata moke te mpo na ye, bazwaki bango na boombo mpe bazalaki konyokola bango. Likambo nini azalaki kozela epai na bango na nsima? “Yanganisa bato, mibali mpe basi mpe bana, mpe mopaya na kati na mboka na yo, ete bayoka mpe bayekola komemisa Jéhovah Nzambe na bino, mpe basenzela ete batosa maloba nyonso na mobeko oyo, mpe ete bana na bango, baoyo bayebaki yango te, bayoka mpe bayekola komemisa Jéhovah Nzambe na bino, mikolo nyonso ekoumela bino na mokili oyo bokokata ngambo na Yaladene mpo na kokamata yango.”​—Deteronome 31:12, 13; 14:23.

13. Lobanzo ya liboso ya baboti esengeli kozala nini?

13 Lokola Bayisraele, basaleli na Jéhovah ya eleko na biso ‘basengeli koyekola kobanga Jéhovah’. Oyo mokumba nini mpo na biso banso, bakisa baoyo kati na biso bazali na bana! Baboti, bomituna mituna oyo: ‘Ndenge nini nakoki kosalisa bana na ngai babenga Jéhovah na motema mobimba?’ Ntango bakokoma mikolo, soki balongwe na ndako, nini ekosalisa bango koleka, soki kobanga Nzambe te, mpo na kobatela bango kati na elimo, na makanisi mpe na nzoto? Jéhovah ye moko azali komonisa likambo yango polele na maloba oyo: “Ee, soko bazalaki bobele na motema boye seko, mpo na kobanga ngai mpe mpo na kotosa malako na ngai nyonso, ete batikala malamu, mpe bana na bango libela!”​—Deteronome 5:29; 4:10.

14. Tanga likambo oyo baboti basengeli kobosana yango te wana ezali bango koteya epai na bana na bango nsomo ya Jéhovah, mpe limbola ndenge nini bakoki kosalela yango.

14 Baklisto nyonso oyo basili kobokola libota bakondima mpenza ete ezali mokumba moke te. Nzokande, Liloba na Nzambe epemami ezali kopesa batoli mingi ya ntina mpo na baboti. Moko kati na yango ezali kotalela ntina ya kobanda koteya bana wana ezali bango naino mike. Tozali koyoka nini na wana? Ntango Bayisraele bazalaki koyangana mpo na kozwa mateya ya Jéhovah, “bana” na bango bazalaki elongo na bango. (Deteronome 29:10-13; 31:12, 13) Ya solo, basi Bayisraele bazalaki koya elongo na bana na bango ya mike na mabaku wana, mpamba te bato nyonso basengelaki kozala. Na bongo, “uta bolenge”, bana na bango ya mibali mpe ya basi bazalaki koyekola koyoka na bwanya nyonso na ntango ya makita wana. (2 Timote 3:15) Na bongo bomema “bana” na bino na makita. Soki makoki epesi bango nzela bobima na bango kati na mosala ya kosakola. Bana mingi bayekolaki kolakisa zulunalo to tract liboso ete bakokisa mbula ya kokota kelasi. Bobanda wana ezali bango naino moke, na nzela na makambo ya petee to ya mikemike, kolona epai na “bana” na bino “nsomo ya Jéhovah”.

15. Likambo ya mibale ezali nini, mpe ndenge nini baboti bakoki kotalela yango?

15 Likambo mosusu etali ntina ya kosala na boyokani na makambo oyo ozali koloba. Tokokoka kosala yango bobele soki tokangami na Liloba na Nzambe kati na batoli, disipline mpe malako oyo tozali kopesa epai na bana na biso. Mingi mpenza na ntango ya kominanola, bozala na likebi mpo ete botiola mitinda ya Biblia te. (Baefese 6:4) Esengeli milende mpo na kolonga. Nkutu ezali yango nde Liloba na Nzambe ezali koyebisa polele na maloba oyo: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotelema yo.” (Deteronome 6:4-9; 4:9; 11:18-21) Soki ozali kosala na boyokani na maloba na yo, okosalisa mingi bana na yo na kobanga Jéhovah na motema mobimba.

16. (a) Likambo ya misato ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina? (b) Mituna nini baboti bakoki komituna?

16 Baboti basengeli mpe kosala makasi mpo na kosimba elimo mpe mitema ya bana na bango na kolakisaka bango ete ‘babanga Jéhovah’, bango mpe. (Nzembo 22:23) Mpo na kolonga, esengeli na bango mpe kosalela batoli ya bonzambe ntango bazali kobongisa mpe kosembola bana na bango. Wana ezali likambo ya misato basengeli kotalela. Baboti, bomituna mituna oyo: ‘Nayekolaka Biblia ntango nyonso elongo na bana na ngai?’ Nazwaka mpenza litomba ya kokoka na mikanda lokola Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe mokanda Boyoka Moteyi monene mpo na koteya bana na ngai?’ ‘Mpo na baoyo basili kokola, nasalelaka mokanda Votre jeunesse-Comment en tirer le meilleur parti mpe masolo ebimisami kati na zulunalo Réveillez-vous! na lisolo “Les jeunes s’interrogent”?’ ‘Nakanaka masano ya peto oyo ekozala na bopusi mabe te likoló ya bana na ngai?’ ‘Nazali kotambwisa bana na ngai malamu?’ ‘Nazali kotyela bango mikano oyo ekosalisa bango na komonisa “nsomo malamu”?’​—Baebele 5:7.

17. Nani azali kozwa bolamu ntango bana bazali koyekola kobanga Jéhovah? Limbola eyano na yo?

17 Soki osali nyonso ekoki na yo mpo na kobokola bana na yo kati na “nsomo ya Jéhovah”, matomba mpe bisengo oyo ekomonana ekosalisa bango, kasi lisusu na yo moko. Tomonisa yango na kotangaka lisolo ya mwasi Témoin de Jéhovah moko, oyo, na mpokwa moko azalaki na “bolembu mpenza”, mpo na kozongela maloba na ye moko. Azwaki makasi na koyokaka mwana na ye ya mwasi ya mibu nsambo kosambela Jéhovah. Mai etondaki ye na miso mpe nsoi esilaki na mongongo ntango ayokaki libondeli na ye: “Merci mingi Jéhovah Tata ya boboto, mpo na makambo kitoko nyonso oyo osali mpo na ngai lelo. Mpe merci mpo na bilei. Salisa bandeko nyonso oyo bazali na boloko mpe na bisika ya mpasi bazwa bileli, Jéhovah , mpe bandeko mibali mpe basi nyonso ya mikili oyo bazali na nzala; salisa bango mpe bazwa bilei mingi, Jéhovah. Baoyo bazali na bokono, salisa bango babika mpo ete bakoka kokende na makita. Pesa nzela na baanzelu ete babatela ngai wana ezali ngai kolala na butu, babatela mama mpe papa, babatela ndeko na ngai ya mobali, babatela mami mpe papi, mpe babatela bandeko mibali mpe basi nyonso kati na solo. Nyonso wana nsima ya Mwana na yo Yesu. Amen.”

18. Mpo na oyo etali nsomo ya Jéhovah, ndenge nini tozali kokotisana bopusi kati na biso?

18 Mpo na oyo etali kobanga Jéhovah, tokanisa lisusu ete tozali komema bopusi epai na baninga na ndakisa oyo tozali kopesa. Baboti bazali na bopusi likoló ya bana na bango; bankulutu mpe basaleli na misala, likoló na lisangá; bakengeli ya circonscription, likoló ya masangá oyo bazali kotala. Na polele nyonso ezali mpenza mpo na ntina oyo nde mikonzi na Yisraele basengelaki kotanga Mobeko ya Nzambe mikolo nyonso ya bomoi na bango, mpo na ‘koyekola kobanga Jéhovah’. (Deteronome 17:18-20) Ndakisa oyo mokonzi azalaki kopesa mpo na kobanga Jéhovah ekokaki komema bopusi likoló ya ekólo mobimba.

19. Lisolo ya Bayisraele emonisi nini?

19 Lisolo ya bato emonisi ete, lokola libota, Bayisraele batikaki kobanga Jéhovah. Bakanisaki ete kozala ya temple kati na Yelusaleme ekozala libateli mpo na bango, lolenge moko ya “porte-bonheur”, na yango batosa to baboya kotosa mibeko ya Nzambe. (Yilimia 7:1-4; Mik 3:11, 12) Kasi bazalaki komikosa, mpamba te Yelusaleme mpe temple na yango ebomamaki. Na nsima, ntango bazongisamaki esika moko lokola libota, bazangaki lisusu komonisa epai na Jéhovah nsomo oyo esengeli na ye. (Malaki 1:6) Tokoki koyekola makambo mingi kati na masolo wana, lokola tokomona yango na lisolo oyo elandi.

20. Na mokuse, mpo na nini bosengeli kobanga Jéhovah?

20 Na bongo tobosana te ete nsomo ya Jéhovah ezali kokitisa te bolingo oyo tozali na yango mpo na ye; nkutu, ezali koyeisa yango makasi. Na kotosaka mibeko ya Jéhovah, tozali komonisa bobele te ete tozali kobanga ye, kasi lisusu ete tolingaka ye. Nsomo mpe bolingo ya Jéhovah ezali na ntina monene koleka. Bakoki kokabola yango te. Ezali mpenza na ntina ete baboti balona epai na bana na bango nsomo malamu mpe bolingo ya Jéhovah! Mpe esengo nini monene yango ezali kopesa epai na biso banso, bilenge mpe mikolo! Na bongo tokomisa maloba oyo ya mosakoli lokola ya biso moko: “Pesa ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”​—Nzembo 86:11.

Bozongeli

◻ Ndenge nini tokoki mbala moko kolinga Jéhovah mpe kobanga ye?

◻ Bolamu nini bozali kozwama na nsomo ya Jéhovah?

◻ Tanga makambo misato ya ntina oyo ekopesa nzela na baboti basalisa bana na bango na kobanga Jéhovah na motema mobimba?

◻ Mpo na oyo etali nsomo ya Jéhovah, ndenge nini tozali kokotisana bopusi kati na biso?

[Elilingi na lokasa 12]

Nsomo ya Jéhovah ezali kosalisa bilenge na kopika liboso na masenginya

[Elilingi na lokasa 14]

Baboti basengeli kosalisa bana na bango na kolona nsomo malamu ya Jéhovah

[Elilingi na lokasa 15]

“Ekozala malamu epai na bango bazali kotosa Nzambe, baoyo bakobangaka liboso na ye.”​—Mosakoli 8:12

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto