Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/9 nk. 16-20
  • Ondimi kotatola mpo na Nzambe ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ondimi kotatola mpo na Nzambe ya solo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntembe ebetelami banzambe mosusu
  • “Bokoyeba bango na mbuma na bango”
  • Nani azali kotatola mpo na Jéhovah?
  • Litatoli mpo na Bokonzi
  • Tomekola bolingo na Nzambe
  • Monyokoli ezali kobakisa litatoli
  • Batemwe ya Nzambe ya solo bayanganisami
  • Likambo lizali kosambama na molongo mobimba etali mpe yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Nzambe nini tosengeli kosambela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mangomba nyonso ezali ndenge moko? Nyonso ememaka epai ya Nzambe?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/9 nk. 16-20

Ondimi kotatola mpo na Nzambe ya solo?

“‘Bino . . . bozali batatoli na ngai, Jéhovah alobi bongo. Ngai nazali Nzambe.’”​—YISAYA 43:12.

1. Mpo na nini tosengeli kokumisa Nzambe ya solo?

MWA ntango moke liboso ete akufa, Yesu ‘atombolaki miso na likolo’ mpe abandaki kosambela. Asambelaki “Nzambe ya solo bobele moko”. (Yoane 17:1, 3) Nzambe ya solo mpe ya bomoi azali se moko, ye wana Nkolo moyangeli ya molongo mobimba, Mozalisi. Lokola bomoi na biso euti epai na Nzambe na solo, esengeli na biso tokumisa ye lokola ebongi na ye, ndenge Emoniseli 4:11 elobi yango ete: “Jéhovah, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.”

2. (a) Tokoki koloba boni mpo na Nzambe ya solo? (b) Ndenge nini Nzambe ya solo azali kosolola elongo na bato balingi kosambela ye?

2 Nzambe ya solo akotika libela te makambo oyo epesi mpasi mingi na bikelamu na ye awa na nse; asilaki mpe koyebisa basambeli na ye eloko nini akosala mpe eloko nini azali kosenga epai na bango liboso ete akokisa bikateli na ye. (Amos 3:7) Ndenge nini azali kosolola elongo na bato bazali koluka solo? Azali kosalela bato bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kozala balobeli na ye. “Jéhovah alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai . . . Liboso na ngai nzambe mosusu asalamaki te, mpe mosusu akozala nsima na ngai te. Ngai, ngai nazali Jéhovah; mobikisi mosusu azali te, bobele ngai.” (Yisaya 43:10, 11) Nzokande, ndenge nini tokoki koyeba bato oyo Nzambe ya solo azali kosalela bango lokola batatoli? Kokesena nini ezali kati na basaleli na ye na nsango na bango elongo na basambeli na banzambe mosusu?

Ntembe ebetelami banzambe mosusu

3. Ntembe nini Jéhovah abeteli banzambe nyonso mususu?

3 Yisaya, apemamaki na Nzambe, asakoli ntembe oyo Jéhovah abeteli banzambe nyonso mosusu: “Nani kati na bango [banzambe na mabota] akoki koyebisa likambo oyo [esakweli ya solo] mpe komonisa biso makambo na kala [oyo masengeli kobima] [Lokola bazali banzambe] Tika ete babimisa batatoli na bango mpo na kolobela bango [banzambe yango], [bato na mabota] bayoka mpe baloba ete, Ezali solo.” (Yisaya 43:9) Na maloba yango, Jéhovah abeti ntembe na banzambe nyonso oyo bato bazali kosambela, kosengaka na bango bamonisa ete bazali solo banzambe Batatoli na bango basengeli kobimisa bilembeteli mpo na komonisa ete bakoki kotyela bango motema mpe bazali banzambe babongi kosambelama.

4. Ndenge nini toyebi ete banzambe ya mabota ya kala bazalaki banzambe bazangi ntina?

4 Banzambe yango mpe basambeli na bango babimisi mbuma nini? Bamemeli bato kimya, bolamu, nzoto kolongono mpe bomoi ya solosolo? Lisolo ya makambo ya kala emonisi ete ebele ya banzambe ya mabota ya kalakala bazalaki ata na ntina te ata na nguya te. Mpe lelo oyo, moto ata moko akosambelaka bango te. Bazali lisusu te. Bibele na banzambe oyo esambelamaki kala na Ezipito, na Asulia, na Babilone, na Médo-Perse, na Grece, na Rome mpe na mikili misusu bamonanaki ete bazali banzambe ya lokuta. Lelo oyo okokuta bikeko yango bobele kati na mikanda ya Histware to na ba-musées.

5. Motuna nini tokoki komituna na ntina na banzambe ya ntango na biso?

5 Nzokande, banzambe ya mikolo na biso mpe basambeli na bango, baleki bankoko na bango ya kala? Ba hindous bazali na bamilio ya banzambe. Ba Budiste, bakatolike, ba konfisianiste, Bayuda, ba Protesta, ba Shintoiste, ba Taoiste mpe bandimi mosusu mingi bazali na banzambe na bango. Na Afrike, na Asie mpe na biteni mosusu ya mokili, bazali kosambela bibale, mopepe, ngomba, banyama, mpe biloko bizangi mpema. Nationalisme, matérialisme, mpe lolendo mpo na bomoto na yo, ekomi banzambe mpo ete bato mingi bamipesi se na yango. Lolenge nini na losambo elakisami solo na ye oyo alobi ete: “Ngai nazali Jéhovah, mpe mosusu azali te, Nzambe mosusu azali te, bobele ngai.”​—Yisaya 45:5.

“Bokoyeba bango na mbuma na bango”

6. Ndenge nini tokoki kokesenisa losambo ya solo na losambo ya lokuta?

6 Yesu alakisaki ndenge tokoki koyeba losambo ya solo mpe losambo ya lokuta. Alobaki: “Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango. . . . nzete malamu na nzete malamu ekobota mbuma malamu nde nzete mabe na nzete mabe ekobotaka mbuma mabe. . . . Nzete na nzete oyo ekobotaka mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.” (Matai 7:16-19) Na yango, mpo na komona na nini Nzambe ya solo akeseni na banzambe ya lokuta, mpe na nini basambeli ya solo bakeseni na basambeli ya lokuta, tosengeli kotalela bambuma oyo bazali kobota. Ezali bambuma “malamu”, to bambuma “mabe”?

7. Lisolo ya ekeke oyo ya ntuku mibale eteyi biso nini na ntina na mangomba?

7 Na ndakisa, lingomba nini elongi kotya kimya ya solo kati na bandimi na yango na mokili mobimba? Basangani na lingomba ya solo, oyo bazali bandeko na elimo, basengeli kobomana te. Nzokande, bato milio mokama basili kokufa na boumeli ya bitumba oyo bisalemaki na mangomba Mpo na yango, bandimi ya lingomba moko babomanaki bango na bango. Bakatolike babomaki bakatolike, baprotesta babomaki baprotesta, ba musulmans babomaki bamusulmans, bongo na bongo mpo na mangomba mosusu.

8. Bato mosusu bakomaki nini na ntina na mabe ya mangomba na mikolo na biso?

8 Na lisolo moko ezalaki na moto ya likambo ete “Mobulu na nkombo ya Nzambe”, Mike Royko, lokola ete azali koloba na Nzambe, alobaki boye mpo na mangomba: “Mpo na kosambela yo, bandimi na bango bazali kobomana mingi. Mpo na ngai, bango bazali kokanisa ete soki camp na bango elongi mpo na koboma camp mosusu, wana bakomonisa ete lolenge na bango ya kosambela eleki malamu.” Lisolo yango elandani boye: “Atako pape azali komilakisa lokola moto na kimya, bandimi ya lingomba na ye bayebani lokola bato basili kotangisa makila mingi ntango basilikaki”. Bobele bongo, Jimmy Carter, président ya kala ya Etats-Unis, alobaki mokolo mosusu ete ‘mokili ekomi na ligboma’ mpe abakisaki: “Mposa makasi ya kosambela, oyo mbele esengeli kosangisa bato esika moko mpenza kati na bolingo, ezali nde kozwisa bato ligboma kino koboma bazalani na bango.”

9. Mpo na nini tosengeli te kosambela “banzambe ezangi ntina”?

9 Bambuma oyo ya mabe ekeseni mpenza na oyo basambeli na Nzambe na solo basengeli kobota. (Bagalatia 5:19-23) Na yango, bato oyo bazali kopesa lisungi na bango na mangomba mpe na mitindo na makanisi oyo ezali kobimisa bitumba, bazali basambeli ya banzambe ya lokuta lokola ezalaki bongo Baezipito, Baasulia, bato na Babilone mpe mabota mosusu ya Kalakala oyo bazalaki kosambela “banzambe ezangi ntina mpe ekolobaka te”. (Habakuku 2:18) Mpe lokola na kala maloba na esakweli na Nzambe ya solo makokanaki likolo na losambo ya lokuta, ekozala se ndenge moko na mikolo na biso oyo. “Banzambe ya lokuta bakolimwa nyonso.” (Yisaya 2:18) Na yango, tosimba likebi oyo Jéhovah akebisi biso ete: “Bopengwa epai na banzambe na lokuta te.”​—Levitike 19:4.

Nani azali kotatola mpo na Jéhovah?

10. Bato kati na mangomba ya mokili bazali kotatola mpo na Nzambe ya solo?

10 Motatoli na Nzambe na solo asengeli kozala moto oyo azali kotatola mpo na Nzambe. Basangani na mangomba na mokili bazali kopesa litatoli oyo? Balobelaka yo mpo na kondima na bango? Bayaka kotala yo na ndako mpo na kotatola na yo na ntina na nzambe na bango? Nzambe ya solo abetanaki ntembe na banzambe ya lokuta ete babimisa batatoli na bango kasi eloko moko emonani te. Bandimi na mangomba na mokili bazali kopesa litatoli yango te. Bazali na likoki te ya koloba na yo nani azali Nzambe ya solo mpe mikano na ye ezali nini, Bakonzi na bango bateyaki bango solo te. “Bazali bakufi miso baoyo bazali kokamba bakufi miso na nzela. Soko mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Matai 15:14.

11. Bobele banani bazali kotatola mpo na nkombo ya Nzambe ya solo?

11 Banani bandimi kopesa ntango na bango, biloko na bango mpe ata bomoi na bango mpo na kotatola na ntina na Nzambe na solo? Nani azali kokebisa bato mpo na oyo Nzambe ya solo alobi ete: “Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai”? (Yisaya 42:8) Banani bazali koteya bazalani na bango na ntina na Oyo ekomami boye mpo na ye ete: “Bobele yo oyo azali na nkombo Jéhovah Oyo-Aleki likolo na mokili mobimba”? (Nzembo 83:18) Wana ezalaki ye na mokili, Yesu akokaki koloba na ntina na Nzambe ya solo: “Nasili kolimbola nkombo na yo epai na bato.” (Yoane 17:6) Na mikolo na biso, bobele ba Témoins de Jéhovah nde bakoki koloba boye. Na yango, nkombo na bango, Témoins de Jéhovah, ebongeli bango solo!

Litatoli mpo na Bokonzi

12. Eloko nini ya ntina monene batatoli ya solo basengeli kosakola yango?

12 Batatoli na Nzambe na solo basengeli koyebisa nkombo na ye; kasi longola yango, eloko nini mosusu etali mokano na ye basengeli kolobela yango? Yesu amonisaki yango ntango ateyaki bayekoli na ye basambelaka Nzambe ya solo na maloba oyo: “Tika bokonzi na yo eya!” (Matai 6:10) Bokonzi na Nzambe na likolo ezali Boyangeli oyo mokolo mosusu ekotambwisa mabelé mobimba. (Danyele 2:44) Yesu asalelaki yango mingi kati na koteya na ye lokola theme na ye. (Matai 4:23) Lokola ezali ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosilisa bampasi ya bato, Mwana na Nzambe apesaki toli oyo: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye.”​—Matai 6:33.

13. (a) Mpo na oyo etali kosakola Bokonzi ya Nzambe ndenge ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola yango, makambo mamonisi nini? (b) Ndenge nini mosala ya kosakola Bokonzi emonisi ete Jéhovah azali Nzambe se moko oyo bisakweli na ye bizali solo?

13 Banani lelo bazali kopesa litatoli na Bokonzi na Nzambe? Professeur Braden, oyo ayekolaki mangomba na mozindo, ayanolaki na motuna oyo ntango alobaki: “Ba Témoins de Jéhovah batondisi mabelé mobimba na kosakola na bango. . . . Lingomba moko te kati na mokili emonisi molende mingi mpe mpiko mingi lokola ba Témoins de Jéhovah mpo na oyo etali kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi.” Nzokande, professeur yango akomaki maloba oyo esili bongo koleka mibu 40. Lelo oyo, litatoli monene koleka ezali kopesama mpo na Bokonzi, mpamba te motuya ya Batemwe ebakisami mingi. Lelo oyo bazali koleka milio misato na ndambo kati na masangá koleka 54 900 na mokili mobimba. Bazali kotatola mpo na Bokonzi mpe motuya na bango ezali kobakisama noki. Mbuma oyo kitoko emonisi polele ete Jéhovah azali Nzambe na bisakweli ya solo. Na kopemama na ye, Mwana na ye Yesu asakolaki boye mpo na eleko na biso: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14; Yoane 8:28.

Tomekola bolingo na Nzambe

14. Ezaleli nini batemwe ya solo ya Nzambe basengeli komekola yango, mpe tokoloba boni mpo na baoyo bazali kolanda lilako yango te?

14 Batatoli na solo na Nzambe basengeli komekola ezaleli na ye oyo monene: bolingo.’ “Ye oyo akolingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Ee, ‘bana na Nzambe mpe bana na Satana bakomonana polele na likambo oyo. Moto na moto oyo azangi kosalaka boyengebene auti na Nzambe te; na oyo azangi kolinga ndeko na ye lokola. Yango wana tolingana. Pelamoko Kaina te, oyo autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye’.​—1 Yoane 3:10-12.

15. Nini ezali komonisa ete ba Témoins de Jéhovah bazali na bolingo ya solo?

15 Bobele ba Témoins de Jéhovah nde bazali komonisa bolingo ya motindo oyo. Bazali kosambela banzambe ya bitumba te, soki mpe ya nationalisme to mpe ya racisme. Bazali kopesa maboko na etumba moko te mpe bazali komikotisa na matata moko te mpo na yango mbele ekosengela na bango koboma bandeko na bango ya elimo oyo bazali na mikili misusu. Lokola Yesu alobaki yango, “basangani na mokili te”, basili ‘kozongisa mopanga na esika na yango’.​—Yoane 17:14; Matai 26:52.

16. Ndenge nini makambo bato mosusu bakomaki ezali kosalisa biso na koyeba batemwe ya solo ya Nzambe?

16 Tala makambo makomamaki nsima na boyekoli moko na moto ya likambo “Mitindo ya sika ya komonela mobulu mpe kolongisa yango” (Angl.): “Ba Témoins de Jéhovah bazali ntango nyonso kobatela ezaleli na bango ya boklisto, ya kozanga komikotisa na makambo ya mokili mpe koboya mobulu nyonso . . . Mpo ete baboi kosala mosala ya soda mpe kokumisa bilembo ya ekolo, bazali kosambisa bango, bazali kotya bango na boloko mpe bazali kobetama na bibele ya bato kati na mikili mingi . . . Atako bongo, Batemwe babimisaka mobulu te.” O Tempo, zulunalo moko ya mokili ya Brezile ekomaki boye: “Atako mangomba minene mazali mingi, oyo propagande na yango esili kokoma bipai nyonso na mokili, moko te ezali komonisa bolingo lokola bango.” Yesu alobaki ete bolingo oyo ya solo, ezali elembo ekomonisa batatoli ya solo ya Nzambe. “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”​—Yoane 13:35.

Monyokoli ezali kobakisa litatoli

17, 18. Likambo nini na basanza eleki emonisi ete monyokoli ekoki kokolisa litatoli mpo na Bokonzi?

17 Ntango mosusu monyokoli ekobakisaka litatoli mpo na Bokonzi. Na motindo yango, na lnde, epai kuna ba Témoins de Jéhovah bazali bobele soko 8 000, litatoli monene esili kopesama na basanza eleki, mpo na nkombo mpe mikano ya Jéhovah, na likambo ebimelaki bilenge Batemwe 11; bana wana balandaki ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso, oyo balobaki na miso ya tribinale moko ete: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Babenganaki bana oyo na kelasi mpo ete baboyaki koyemba nzembo ya kokumisa ekolo, kasi tribinale ya nsuka to Cour supreme etalelaki likambo yango, mpe engebene zulunalo Deccan Herald ya Bangalore, bazuzi balobaki ete nzembo wana “esengisami te na bato nyonso na lnde ete bayemba yango”. Bazuzi balobaki lisusu ete bana “bazangaki limemya te”; koboya koyemba “ekokaki kotalelama lokola botomboki te”; bazuzi bapesaki etinda ete bana bazonga na kelasi.

18 Bobele zulunalo wana moko elobaki lisusu boye: “Bana wana baboyaki koyemba hymne national mpamba te ba Témoins de Jéhovah bamitalelaka ete bazali baklisto mpe bamipesi mobimba na bango mpo na kosalela Bokonzi ya Nzambe . . . . Mpo na yango, bazali kosangana na likambo ya politike ata moko te.” Zulunalo The Telegraph ya mboka Calcutta elobaki nde boye: “Epai mosusu, etamboli ya bana-kelasi oyo etambwisi nsango ya ba Témoins de Jéhovah bipai nyonso . . ., nzokande liboso na yango bayebanaki mpenza te kati na mokili na biso.” Ee, liboso ete nsuka eya, ‘nsango malamu ya bokonzi ekosakolama mpo na litatoli na mabota nyonso’.​—Matai 24:14.

Batemwe ya Nzambe ya solo bayanganisami

19. Bato na motema sembo oyo balingi kosambela Nzambe ya solo basengeli kosala nini?

19 Na mikolo na biso, Jéhovah, Nzambe ya solo, azali kosenzela ete basaleli na ye bapesa litatoli mpo na bokonzi na ye mpe mikano na ye. Wana ezali bango kosakola nsango na ye na molende mpe na nguya, Jéhovah azali koyanganisa longwa na mabota nyonso motuya monene ya bato ya motema sembo, mpe motuya na basambeli na ye ezali kobakisama (Yisaya 2:2-4) Na ntango ya kala, Jéhovah asikolaki bato oyo bazalaki na mposa ya kosambela ye, nzokande bakangamaki na boombo na Babilone-epai kuna bato bazalaki kosambela bibele ya banzambe ya lokuta; bobele bongo lelo bato na motema sembo bazali kotika banzambe na bango ya lokuta mpe babandi kosambela Nzambe ya solo.​—Yisaya 43:14.

20, 21. Mpo na nini ezali likambo na noki ete bato batika banzambe ya lokuta uta sikawa mpe bazala batali mpamba te?

20 Boni mpo na yo, ondimi kotatola mpo na Nzambe ya solo? Omitii na ngambo na losambo na solo, koboya kosangana na bosopi makila mpe na misala ya mbindo ya mokili mpe ya banzambe na yango ya lokuta? Liloba na Nzambe epesi toli oyo: “Bino bato na ngai bobima na ye [losambo ya lokuta oyo eutaki na Babilone], ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.” (Emoniseli 18:4) Ee, “bobima” na losambo ya lokuta, bosala noki lokola mwa ntango ezali naino. Kosala te lokola mobali oyo, etunamaki ye na zulunalo moko ya Bakatolike na ntina na losambo oyo alingaka, ayanolaki ete: “Ngai nasepelaka kotala ba Témoins de Jéhovah. Nandimaka mateya na bango mingi, kasi nalingi kokoma moko na bango te.”

21 Nzokande, mosika te bafandi nyonso ya mabelé bakosengela komonisa na ngambo nini bazali ntango Jéhovah akokokisa ekateli na ye likolo na banzambe ya lokuta mpe basambeli na bango: “Banzambe baoyo basali likolo mpe mokili te bakolimwa longwa na mokili mpe na nse na likolo oyo.” (Yilimia 10:11) Na ntango wana, motali mpamba akozala te. Ekozala se baoyo bazali batatoli na Nzambe na solo mpe baoyo bazali batatoli na ye te. (Matai 24:37-39; 2 Petelo 2:5; Emoniseli 7:9-15) Boni mpo na yo, ondimi kozala motatoli na Nzambe na solo? Osengeli kozala motatoli na ye. Yoka maloba na mokomi na nzembo: “Nzambe na biso azali Nzambe na kobikisa. Kobika na ntango na kufa ezali mpo na Nkolo Jéhovah.”​—Nzembo 68:20.

Bozongeli

◻ Ntembe nini Nzambe ya solo abeteli banzambe ya lokuta?

◻ Nini ekosalisa biso tokesenisa losambo ya solo na losambo ya lokuta?

◻ Mbuma nini emonisi ete banzambe ya mokili ya lelo baleki banzambe ya Kala te?

◻ Bambuma nini kitoko batatoli na Nzambe na solo basengeli kobota yango, mpe banani bazali kobota mbuma yango?

◻ Mpo na nini ezali likambo na nokinoki kotika uta sikawa losambo ya lokuta?

[Bililingi na lokasa 16]

Lelo oyo, moto moko te azali kosambela lisusu banzambe ezangi ntina, oyo bato ya kala bazalaka kosambela

[Elilingi na lokasa 17]

Na ekeke ya nkutu mibale, bato soko 100 milió basili kokufa kati na bitumba, nzokande mangomba ya mokili epesaki maboko na bitumba yango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Foto ya U.S. Army

[Elilingi na lokasa 18]

Yesu alobaki ete eloko ekomonisa batemwe ya solo ezali bolingo kati na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto