Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Nani azali tata ya bakonzi na mangomba ya Bayuda?
Tozali na mobu 32 ya ntango na biso, na eleko ya elambo na Mingombo. Koswana ebimi kati na Yesu mpe bakonzi na mangomba ya Bayuda. Yesu alobi na bango ete: “Nayebi ete bozali bana na Abrahame; kasi bozali koluka ete boboma ngai mpo ete liloba na ngai ezali na efandelo kati na bino te. Ngai nakosololaka yango emoni ngai epai na Tata nde bino bokosalaka yango eyoki bino epai na tata na bino.”
Yesu amonisi polele ete tata na bango, ata atangi nkombo na ye te, akeseni na tata na ye. Lokola bayebi te soko Yesu azali koloba mpo na nani, bakonzi na mangomba ya Bayuda bayanoli ye boye: “Tata na biso azali Abrahame”. Bakanisi ete bazali na kondima lokola yango na Abrahame, ye oyo azalaki moninga na Nzambe.
Kasi Yesu ayokisi bango nsoni na eyano oyo: “Soko bozali bana na Abrahame, bosala misala na Abrahame.” Na yango mwana nyonso ya malamu amekolaka tata na ye. “Kasi sikawa boluki koboma ngai, moto oyo ayebisi bino makambo na solo mayoki ngai epai na Nzambe. Abrahame asalaka bongo te.” Abakisi: “Bino bozali kosala misala na tata na bino.”
Kino sikawa bazali koyeba te soko Yesu azali kolobela mpo na nani. Balobi lisusu ete bazali bana na Abrahame: “Biso tozali bana na ekobo te.” Yango wana, mpo na kondimisa ete bazali basambeli ya solo lokola Abrahame, balobi lisusu boye: “Tozali bobele na tata moko, ye Nzambe.”
Kasi Nzambe azali solo Tata na bango? Yesu alobi boye: “Soko Nzambe azali nde tata na bino mbele bokolingaka ngai. Mpo ete ngai nabimi na Nzambe mpe nazali awa. Mpamba te nayei na ntina na ngai moko te kasi ye atindi ngai. Mpo na nini bokososola lisolo na ngai te.”
Yesu asali makasi mpo na komonisa epai na bakonzi yango ya mangomba makambo oyo makoki kobimela bango na ndenge baboi ye. Kasi sikawa alobeli bango na polele nyonso: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino.” Diable azali tata ya motindo nini? Yesu alobi ete azali mobomi mpe abakisi: “Azali mobuki na lokuta mpe tata na lokuta.” Mpe asukisi boye: “Ye oyo auti na Nzambe akoyokaka maloba na Nzambe. Na ntina oyo bokoyokaka te mpo ete bouti na Nzambe te.”
Lokola maloba na Yesu makweisi bango, Bayuda basiliki mpe bazongiseli ye boye: “Tolobi nde na elonga te ete yo Mosamaria mpe ozali na elimo mabe?” Babengi ye “Mosamaria” mpo na kotiola ye mpe komonisa mabe na ye, mpamba te libota na Basamaria eyinami na Bayuda.
Kozanga koyanola na efundeli na bango; Yesu alobi: “Ngai nazali na elimo mabe te kasi nazali kotosa Tata na ngai; nde bino bozali kotiola ngai.” Apesi lisusu elaka oyo ekamwisi bato: “Soko nani akotosa liloba na ngai, libela akomona kufa te.” Ya solo, alingi koloba te ete baoyo bazali komekola ye bakokufa te mokolo mosusu. Yesu alingi nde koloba ete bakobomama mpo na libela te, to bakokufa “liwa ya mibale” te, oyo mpo na yango elikya ya lisekwa ezali te.
Nzokande Bayuda bakangi ntina ya maloba na Yesu te. Babakisi boye: “Sikawa toyebi ete ozali na elimo mabe. Abrahame akufaki mpe basakoli lokola, mpe yo olobi ete, Soko nani akotosa liloba na ngai, libela akoyeba kufa te. Yo nde oleki Abrahame tata na biso oyo akufaki? Basakoli mpe bakufaki. Ozali komizalisa lokola nani?”
Na boumeli ya lisolo na bango mobimba, emonani polele ete Yesu alingi koyebisa epai na bato yango ete ye azali Masiya oyo alakamaki. Kasi na esika ete ayanola mbala moko na motuna na bango mpo na komiyebisa soko azali nani, apesi ndimbola oyo: “Soko nazali komikumisa, lokumu na ngai ezali mpamba. Nde Tata na ngai azali kokumisa ngai, ye oyo bolobi mpo na ye ete, Azali Nzambe na biso. Nde boyebi ye te, kasi ngai nayebi ye. Soko nalobi ete nayebi ye te, nakozala lokola bino, mobuki na lokuta.”
Bongo na nsima alobeli lisusu mpo na Abrahame: “Abrahame, tata na bino, asepelaki komona mokolo na ngai; amonaki yango mpe ayokaki esengo.” Na yango, na miso ya kondima, Abrahame asepelaki liboso ete Masiya oyo alakamaki aya. Na motó makasi na bango, Bayuda balobi epai na Yesu: “Ozali naino na mbula ntuku mitano te, mpe omoni Abrahame?”
Mpo na yango Yesu ayanoli: “Solo solo nalobi na bino ete, Naino ezalaki Abrahame te, ngai nazali.” Alingi kolobela wana na ntina na bomoi na ye oyo azalaki na yango lokola ekelamu na nguya na elimo liboso ya kobotama na ye lokola moto awa na mabele.
Lokola basiliki mpo Yesu alobi ete azalaki na bomoi liboso na Abrahame, Bayuda balokoti mabanga mpo na kobwakela ye yango. Kasi abombami mpe abimi na temple, kozanga likama. Yoane 8:37-59; Emoniseli 3:14; 21:8.
◆ Ndenge nini Yesu amonisi ete ye mpe banguna na ye bazali na tata moko te?
◆ Mpo na nini Bayuda balobi ete Yesu azali Mosamaria?
◆ Na ndimbola nini Yesu alobi ete bayekoli na ye bakomona kufa te?