Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/2 nk. 7-11
  • Okozwa bolamu na kondimana ndenge na ndenge ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okozwa bolamu na kondimana ndenge na ndenge ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondimana mpo na nganga ya likoló
  • Kondimana ya sika mpe basangani mosusu ya libota na ndaka
  • Kondimana na Yesu mpo na Bokonzi
  • Kondimana ndenge na ndenge oyo ekangani na mokano na seko na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mapamboli minene koleka na nzela ya kondimana ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bokokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Yehova azali Nzambe ya kondimana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/2 nk. 7-11

Okozwa bolamu na kondimana ndenge na ndenge ya Nzambe?

“Mpo na yo mabota nyonso makopambwana. Bongo bato na kondima bazali kopambwama esika moko na mosembwi Abrahame.​—BAGALATIA 3:8, 9.

1. Lisolo na bato emonisi nini mpo na matomba ya biyangeli ndenge na ndenge?

BATO bazali koloba mpo na bakonzi ya Erope na ekeke ya XVIII ete bazalaki “bakonzi mabe oyo bangengisami”. ‘Bazalaki na mposa malamu ya koyangela bato na bango na boboto mpenza lokola oyo ya tata epai na bana, kasi mikano na bango mpe mabongwani oyo basalaki elongaki ata moke te‘’. (L’Encyclopédie américaine) Kokwea na bango ezalaki moko na bantina minene ya masangá ya botomboki oyo ebimaki epai na epai na Erope.

2, 3. Na nini Jéhovah akeseni na bakonzi ya mokili oyo?

2 Jéhovah akeseni mosika na bakonzi ya bato oyo bazali bongolabongola. Na ntembe te, bato bazali na mposa na mbongwana oyo ekoki kosilisa bokeseni mpe bampasi, kasi elikya ezali moke. Nzokande, ntina ya kobanga ezali te na kokanisa ete mokolo mosusu Nzambe akoki kobongola bikateli na ye oyo akozwa mpo na kosilisa bokeseni mpe bampasi nyonso. Kati na mokanda oyo epalangani mingi koleka, Nzambe apiki makasi ndaka oyo asalaki ya kopambola mpo na libela baoyo bamonisi kondima, kozanga kotalela mokili na bango, mposo na bango, mayele na bango to esika na bango kati na bato. (Bagalatia 3:28) Kasi ndaka yango ezali solo?

3 Nsima na kolobela eteni ya ndaka oyo Nzambe apesaki na Abrahame ete: “Ee, na kopambolaka nakopambola yo”, ntoma Paulo abakisaki ete “Nzambe akoki kobuka lokuta te”, ‘tolendisami makasi ete tosimba elikya oyo etyami liboso na biso.’ (Baebele 6:13-18) Tokokolisa elikya na biso na mapamboli yango na kotalelaka motindo nini kitoko Nzambe atyaki moboko mpo na kokokisa elikya yango.

4. Ndenge nini Nzambe asalelaki kondimana ndenge na ndenge mpo na kokokisa mokano na ye?

4 Ndenge tomonaki yango, Nzambe asalaki elongo na Abrahame kondimana engebene yango libota moko esengeli kokokisa mokumba ya ntina monene mpo na lipamboli ya “mabota nyonso ya mabelé”. (Genese 22:17, 18) Bayisraele bazalaki libota na mosuni, kasi na ndimbola ya elimo oyo eleki ntina, Yesu Klisto azalaki mosangani aleki monene na libota ya Abrahame. Yesu azalaki mpe Mwana, to Libota, na Abrahame Monene, Jéhovah. Mpo na baklisto oyo ‘bazali bato na Klisto’, bango bazali eteni ya mibale ya libota ya Abrahame. (Bagalatia 3:16, 29) Nsima na kosala kondimana ya Abrahame, Nzambe abakisaki mpo na mwa ntango Kondimana ya Mibeko oyo asalaki elongo na libota na Yisraele. Kondimana yango endimisaki ete Bayisraele bazalaki bato na masumu oyo basengelaki na nganga ya libela mpe mbeka ya kokoka. Yango ebatelaki molongo ya libota na ndaka mpe esalisaki mpo libota yango eyebana. Kondimana ya Mibeko emonisaki mpe ete na lolenge moko to mosusu, Nzambe akobimisa libota ya banganga-balandi. Kondimana ya Mibeko ezalaki naino kosalelama ntango Nzambe asalaki kondimana mosusu elongo na Davidi mpo na kobimisa libota ya bakitani ya bokonzi na Yisraele. Kondimana elongo na Davidi mpo na Bokonzi esakolaki mpe ete moto akobima oyo akoyangela libela na mabelé.

5. Mituna nini misengeli kozwa biyano?

5 Ata bongo, emonanaki lokola makambo to mikano mosusu ya Kondimana ndenge na ndenge yango ekokaki nyonso te to ezalaki polele te. Na ndakisa, soki Libota oyo ekoya esengelaki kozala mokonzi na molongo ya Davidi, ndenge nini mokonzi yango akokaki kozala nganga ya seko aleki banganga oyo bazalaki liboso na ye? (Baebele 5:1; 7:13, 14) Bokonzi na ye ekoki kozala monene koleka mokili moko? Ndenge nini basangani na eteni mosusu ya libota bakokokisa masengami mpo na kozala kati na libota ya Abrahame Monene? Mpe ata soki bakokisi yango, lokola mingi kati na bango bazali bakitani na Davidi te, mokili nini bakoyangela? Totala ndenge nini Nzambe akamataki bameko engebene mibeko na kosalaka kondimana mosusu ndenge na ndenge mpo na koyanola mituna yango na ntina na bolamu na biso ya seko.

Kondimana mpo na nganga ya likoló

6, 7. (a) Engebene Nzembo 110:4, Kondimana mosusu nini Nzambe asalaki? (b) Lisolo nini ya Biblia esalisi biso na koyeba kondimana yango oyo ebakisamaki?

6 Ndenge tomonaki yango, engebene Kondimana ya Mibeko, Nzambe asalaki Kondimana elongo na Davidi na kolakaka ye mokitani (libota) oyo akoyangela seko na mabelé. Kasi Jéhovah ayebisaki mpe Davidi boyei na nganga ya seko. Davidi akomaki ete: “Jéhovah asimbi ndai mpe akobongola liloba na ye te ete: Yo ozali nganga ya seko na motindo na Melekisedeke!” (Nzembo 110:4) Ndai yango ya Nzambe, oyo ezalaki bobele Kondimana na Jéhovah ye mpenza elongo na Nganga oyo akoya, elakisaki nini?

7 Melekisedeke azalaki mokonzi na Saleme ya kala, oyo emonani ete ezalaki na esika oyo bayaki nsima kotonga engumba na Yelusaleme (nkombo oyo ezali na liloba “Saleme”). Lisolo ya bokutani na ye na Abrahame emonisi ete azalaki mokonzi mpe azalaki kosambela “Nzambe Oyo-Aleki-Likoló”. (Genese 14:17-20) Nzokande, maloba na Nzambe, mazwami na Nzembo 110:4 mamonisi ete Melekisedeke azalaki mpe nganga, yango ekomisi ye moto akeseni mpenza. Ye moko azalaki mokonzi mpe lisusu nganga bobele na esika oyo bakonzi na molongo ya Davidi mpe banganga na libota ya Levi bakokisaki na nsima mokumba oyo Nzambe apesaki bango.

8. Kondimana oyo elekaki kobima ya nganga akokani na Melekisedeke esalamaki elongo na nani, mpe ebimisaki matomba nini?

8 Paulo apesi biso bandimbola mosusu mpo na Kondimana yango oyo elakaki kobima na nganga akokani na Melekisedeke. Alimboli mpenzampenza ete ye oyo “Nzambe abengaki nganga monene na motindo na Melekisedeke” ezali moto mosusu te bobele Yesu Klisto. (Baebele 5:4-10; 6:20; 7:17, 21, 22) Melekisedeke oyo, na ntembe te, abotamaki na baboti ya mosuni, libota na ye eyebani te. Na motindo moko, na esika ete asangola libula na bonganga na bondeko elongo na Melekisedeke engebene endimiseli ya mokanda, Nzambe ye mpenza nde aponaki Yesu lokola nganga. Bonganga na Yesu ekoleka epai na mokitani moko te, mpamba te “azali nganga libela”, bolamu ya mosala na ye ya bonganga ekoumela mpe seko. Tokoki kosepela na kozala na nganga oyo “akoki kobikisa bango bakobelema na Nzambe na nzela na ye”, nganga oyo akoki koteya mpe kotambwisa bato na bosembo seko.​—Baebele 7:1-3, 15-17, 23-25.

9, 10. Ndenge nini kondimana oyo ya mitano esalisi biso na koyeba malamu mpenza kokokisama ya mokano na Nzambe?

9 Likambo mosusu ya ntina ezali ete mikumba na Mokonzi-Nganga oyo Yesu azali kokokisa, esuki na etando ya mabelé te. Kati na Nzembo epai alobeli Kondimana etali nganga oyo akokani na Melekisedeke, Davidi akomi lisusu ete: “Jéhovah alobelaki Nkolo na ngai ete: Fanda na loboko na ngai ya mobali, kino ekotya ngai bayini na yo lokola etemelo na makolo na yo.” Na ndenge yango, Yesu, Nkolo na Davidi, asengelaki kozwa esika na likoló penepene na Jéhovah. Ezali yango esalemaki ntango abutaki na likoló. Longwa likoló, Klisto akoki koyangela elongo na Tata na ye mpo na kozala na bokonzi likoló na bayini na ye mpe kokokisa makatami na Nzambe.​—Nzembo 110:1, 2; Misala 2:33-36; Baebele 1:3; 8:1; 12:2.

10 Na yango, Kondimana yango ya mitano esalisi biso na koyeba malamu mpenza na motindo nini kitoko Jéhovah akokisaki mokano na ye. Emonisi sikisiki ete mosangani aleki monene ya libota na ndaka akozala mpe nganga ya likoló mpe akoyangela lokola Mokonzi-Nganga likoló na molongo mobimba.​—1 Petelo 3:22.

Kondimana ya sika mpe basangani mosusu ya libota na ndaka

11. Mokakatano nini ezalaki mpo na basangani mosusu ya libota na ndaka?

11 Kondimana elongo na Abrahame elakisi biso ete Yesu akomaki mosangani aleki monene ya libota na ndaka mpo na lotomo ya kobotama oyo azalaki na yango. Azalaki mokitani mpenza ya nkoko Abrahame mpe andimamaki lokola Mwana na Abrahame Monene na lolenge na ye ya moto ya kokoka. Kasi tóloba nini mpo na bato oyo bazali na libaku malamu ya kokoma basangani mosusu ya libota na Abrahame, “basangoli na libula ya elaka”? (Bagalatia 3:29) Lokola bazangi kokoka mpe bazali bakitani na mosumuki Adam, mbele babongaki te kozala basangani na libota ya Jéhovah, Abrahame Monene. Ndenge nini bakokaki kolonga mokakatano ya kozanga kokoka? Likambo oyo bato bakokaki kosala te Nzambe asalaki yango.​—Matai 19:25, 26.

12, 13. (a) Na maloba nini Jéhovah asakolaki kondimana mosusu? (b) Likambo nini ya sika ya kondimana yango ezali na ntina mpenza?

12 Wana Mibeko mizalaki naino na litomba, Nzambe akomisaki esakweli oyo: “Nakosala Kondimana ya sika elongo na ndako na Yisraele mpe ndako na Yuda, pelamoko Kondimana oyo nasalaki elongo na batata na bango te. . . . Kondimana na ngai, oyo bango babebisi . . . Nakotya Mobeko na ngai na kati na bango; nakokoma yango na mitema na bango; nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai. Bakolakisa lisusu te . . . ete: Oyeba Jéhovah! mpo ete banso bakoyeba ngai . . . Nakolimbisa bokeseni na bango, nakokanisa mpe masumu na bango lisusu te.”​—Yilimia 31:31-34.

13 Kondimana yango ya sika ezalaki na eloko mosusu ekesenisaki yango: epesaki nzela na kolimbisama ya masumu, kasi emonani ete ‘ekesenaki’ na oyo etalaki mbeka na banyama engebene Mibeko. Yesu alimbolaki polele likambo yango mokolo ya liwa na ye. Nsima na kosala Pake elongo na bayekoli na ye ndenge esengamaki na Mibeko, Klisto abandisaki Elambo na Nkolo. Basangani na ekaniseli yango ya mbula na mbula bakabolaki kopo moko ya vinyo, oyo Yesu alobelaki na maloba oyo: “Kopo oyo ezali elembo na Kondimana ya sika mpo na makila na ngai oyo masengeli kosopama mpo na bino”.​—Luka 22:14-20, MN.

14. Mpo na nini kondimana ya sika ezali na ntina mpo na kobima ya basangani mosusu ya libota ya ndaka?

14 Na ndenge yango, Kondimana ya sika ekomaki na motuya mpo na makila na Yesu. Mpo na mbeka yango ya kokoka, Nzambe ‘akolimbisa libunga mpe lisumu’ mbala moko mpo na libela. Kanisa na oyo yango elakisaki! Lokola azalaki na likoki ya kolimbisa masumu nyonso na bato na kondima oyo bazali kati na libota ya Adam, Nzambe akokaki kotalela bango lokola bazangi lisumu, kobota bango lokola bana na elimo ya Abrahame Monene mpe kopakola bango na elimo santu. (Baloma 8:14-17) Kondimana ya sika oyo ekomaki na motuya mpo na mbeka na Yesu epesi bongo bayekoli na ye nzela ya kokoma basangani mosusu ya libota na Abrahame. Paulo akomaki: “Na nzela ya liwa na ye, (Yesu alukaki) kobebisa ye oyo azali na bokonzi na kufa, ye wana Diable mpe [alukaki] kokangola baoyo nyonso bakomi baombo mikolo minso na bomoi na bango mpo na kobanga liwa. Mpo toyebi ete akosungaka baanze te kasi libota ya Abrahame.”​—Baebele 2:14-16; 9:14.

15. Banani basali kondimana ya sika?

15 Yesu azalaki Moyokanisi ya kondimana na sika mpe azalaki lisusu mbeka oyo ekomisaki yango na motuya; kasi banani basalaki kondimana yango? Yilimia asakolaki ete Nzambe akosala Kondimana yango elongo na “ndako na Yisraele”. Azalaki kolobela Yisraele ya mosuni te, oyo ekatamaki ngenga na nse na Mibeko, mpamba te kondimana ya sika elongolaki oyo ya kala. (Baebele 8:7, 13) Nzambe akomaki koyokana sikawa na Bayuda mpe Bapakano oyo, mpo na kondima bakatamaki ngenga na motema na nzela na elimo, na maloba na elilingi. Yango eyokani na maloba ya Nzambe oyo esakolaki ete ‘mibeko na ye mikokomama na elimo mpe na mitema’ na baoyo bakokotisama kati na kondimana ya sika. (Baloma 2:28, 29; Baebele 8:10) Paulo abengaki Bayuda yango ya elimo ete “Yisraele na Nzambe”.​—Bagalatia 6:16; Yakobo 1:1.

16. Ndenge nini kondimana ya sika esangani na kokokisama na maloba masakolamaki na Exode 19:6?

16 Lokola Nzambe azalaki koyokana sikawa na Yisraele ya elimo, likoki moko epesamelaki bato uta ntango yango. Mpo ete, ntango Nzambe apesaki Mibeko, asakolaki ete bana na Yisraele bakokoma mpo na ye “bokonzi na bangana mpe libota na bulee”. (Exode 19:6) Nzokande, Yisraele ya mosuni ekomaki te mpe mbele ekokaki ata mbala moko te kokoma libota oyo basangani na yango nyonso bakozala bakonzi mpe banganga. Nzokande, Bayuda mpe Bapakano oyo bandimamaki lokola basangani mosusu ya libota na Abrahame bakokaki kokoma bakonzi mpe bangangaa. Ezali yango ntoma Petelo andimisi bango na kolobaka: “Bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee, bato baponami, ete boyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili.” Akomi lisusu ete ‘libula likosila te libombami kuna na likoló mpo na bango’.​—1 Petelo 1:4; 2:9, 10.

17. Mpo na nini kondimana ya sika ezali “malamu koleka” kondimana ya Mibeko?

17 Na yango, kondimana ya sika mpe kondimana ya Abrahame oyo eumeli mingi koleka, ezali kosala elongo mpo na kobimisa basangani mosusu ya libota na ndaka. Kondimana yango ya sika oyo esalami kati na Jéhovah mpe baklisto babotami na elimo, epesi nzela na kosalama na libota ya likoló ya bakonzibanganga kati na libota ya bokonzi ya Abrahame Monene. Na bongo toyebi mpo na nini Paulo alobi ete ezali “Kondimana oyo eleki malamu, awa ezali yango kokangama na bilaka bileki malamu”. (Baebele 8:6) Bilaka yango bisakolaki na ndakisa ete bato na kondima bakosepela na bolamu ya kozala na mobeko ya Nzambe ekomami na mitema na bango, ete Nzambe akokanisa masumu na bango lisusu te mpe ete banso ‘bakoyeba Jéhovah, longwa na oyo aleki moke kino na oyo aleki monene’.​—Baebele 8:11.

Kondimana na Yesu mpo na Bokonzi

18. Na ndimbola nini kondimana ndenge na ndenge oyo totaleli kino sikawa ekokisaki mokano na Nzambe mobimba te?

18 Na kokanisaka likoló na kondimana motoba oyo touti kolobela, tokoki kokanisa ete toyebi bibongiseli nyonso ya mibeko oyo Nzambe azwaki mpo na kokokisa mokano na ye. Nzokande, Biblia emonisi biso kondimana mosusu ekangani na oyo nyonso touti kolobela, kondimana oyo ezali kongengisa biteni mosusu ya likambo yango ya monene. Baklisto oyo babotami na elimo bazali solo kozela ete ‘Nkolo asikola bango na mabe nyonso mpe abikisa bango mpo na Bokonzi na ye na likoló’. (2 Timote 4:18) Na likoló, bakozala libota na bakonzi-banganga, kasi bakoyangela likoló na teritware nini? Ntango bazali kobuta na likoló, Klisto asilaki kobanda kokokisa mokumba na ye ya nganga monene azangi masumu. Mpe asila kotelema na nguya ya Bokonzi mpo na koyangela molongo mobimba. (Nzembo 2:6-9; Emoniseli 11:15) Na bongo mosala na bakonzi-banganga mosusu ekozala nini?

19. Ntango nini mpe ndenge nini kondimana na nsambo mpe na ntina esalemaki?

19 Mokolo ya le 14 Nisan ya mobu 33, na mpokwa oyo abandisaki Elambo na Nkolo mpe alobaki mpo na “kondimana ya sika mpo na makila [na ye]”, Yesu alakisaki Kondimana mosusu ya nsambo oyo tokotalela. Alobaki na bantoma na ye ya sembo: “Nde bino batob bosili koumela na ngai elongo kati na makambo na ngai ya mpasi. Pelamoko Tata na ngai asalaki kondimana elongo na ngai mpo na Bokonzi ngai mpe nasali kondimana elongo na bino mpo na Bokonzi, ete bolya mpe bomela na mesa na ngai kati na Bokonzi na ngai, mpe bofanda na bakiti na Bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.” (Luka 22:20, 28-30, MN) Ndenge Tata asalaki kondimana elongo na Yesu mpo azali nganga na motindo na Melekisedeke, ndenge moko mpe Klisto asalaki kondimana na ye mpenza elongo na bayekoli na ye ya sembo.

20. Kondimana mpo na Bokonzi esalemaki elongo na nani, mpe mpo na nini? (Danyele 7:18; 2 Timoté 2:11-13

20 Na ntembe te bantoma 11 baumelaki elongo na Yesu kati na bampasi na ye, mpe kondimana yango emonisaki ete bakofanda na bakiti na Bokonzi. Epai mosusu, Emoniseli 3:21 elobi sikisiki ete baklisto nyonso babotami na elimo oyo bakomonisa bosembo na bango, bakofanda na bakiti na Bokonzi ya likoló. Na ndenge yango, kondimana yango etali bato 144 000 nyonso, baoyo basombami na makila na Yesu ete bamemama na likoló mpo na kokokisa mikumba ya banganga mpe ‘mpo na koyangela na mabelé.’ (Emoniseli 1:4-6; 5:9, 10; 20:6) Na nzela na Kondimana yango, Yesu asangisi bango na ye mpo na koyangela. Ezali lokola mwasi moko ya lokumu abalani na mokonzi moko oyo azali koyangela. Akozala bongo na likoki ya koyangela elongo na ye.​—Yoane 3:29; 2 Bakolinti 11:2; Emoniseli 19:7, 8.

21, 22. Mapamboli nini tokoki kolikya kozwa na nzela ya kondimana nyonso?

21 Bolamu nini kondimana yango ekomemela bato na botosi? Ezala Yesu ezala ba 144 000 moto moko te akokokana na bayangeli mabe bangengisami oyo ‘balongaki te kosilisa mikakatano’. Nzokande, tozali na kondimisama ete Yesu azali nganga monene “oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi akweaki na masumu te”. Na bongo ‘akoki kosangana’ na bolembu ya bato, “bampate mosusu”, ndenge moko na baklisto bapakolami, bakoki kobelema “na bosolo” epai na kiti na bokonzi na Nzambe, na nzela ya Klisto. Bazali mpe bongo na likoki ya “kozwa mawa mpe komona ngolu na kosungama na ntango na bosenga”.​—Baebele 4:14-16; Yoane 10:16.

22 Baoyo Yesu asalaki kondimana elongo na bango mpo bakoma bakonzi mpe banganga penepene na ye, bazali mpe kosangana na kopambola bato. Lokola na ntango na kala banganga na libota ya Levi basalaki mosala na bango mpo na libota mobimba ya Yisraele, baoyo bakofanda na bakiti na bokonzi elongo na Yesu bakosambisa bafandi nyonso ya mabelé na boyengebene. (Luka 22:30) Lokola bazalaki bato, bakonzi-banganga yango bakozala na likebi mpo na bamposa ya bato. Basangani mosusu yango ya libota na ndaka bakosala elongo na Yesu mpo ete ‘mabota nyonso mapambolama’.​—Bagalatia 3:8.

23. Eloko nini moto na moto asengeli kosala mpo na kotambola engebene kondimana nyonso oyo?

23 Bato banso oyo balingi kozwa mapamboli yango malakami mpo na bato, mpe kozwa bongo bolamu na kondimana ndenge na ndenge ya Nzambe, babyangami sikawa ete basala yango. (Emoniseli 22:17) Lolenge eleki malamu ya komonisa mposa yango ezali ya koyangana na Elambo na Nkolo oyo ekosalema mokolo ya Mercredi 22 Mars 1989 nsima na kolala ya moi. Uta sikawa zwa ebongiseli ete oyangana elongo na moko na masangá ya ba Témoins de Jéhovah na mpokwa yango. Okoyeba kuna makambo mingi lisusu matali Kondimana ndenge na ndenge ya Nzambe mpe okokanga ntina malamu koleka lisusu ndenge nini okoki kozwa na yango litomba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Ata mabongwani minene oyo basalaki, matikaki bafandi na mboka na bobola na bango, matikaki bato minene na bolamu na bango mpe na matomba na bango etali mpako, matikaki bazwi na bokabwani na bango na boyangeli mpe na bato mosusu. . . Mpo na makambo yango oyo elekaki ndelo, bakonzi mabe oyo bangengisami balongaki te kosilisa mikakatano ya makambo na politike mpe ya nkita ya eleko wana.”-Lolenge ya bomoi ya bafandi ya Erope-Ebandeli na yango mpe elikya na yango: Libula ya lelo (Angl.)

b Yesu azali moko na bato oyo basali kondimana ya sika te. Azali nde Moyokanisi na yango, azangi masumu mpe bongo asengeli na lilimbisi te. Lisusu, azali na ntina te ya kokoma mokonzi mpe nganga mpo na kondimana yango, mpamba te ye azali mokonzi mpo na kondimana esalamaki elongo na Davidi mpe lisusu nganga na motindo na Melekisedeke.

Bozongeli

◻ Mpo na nini kondimana oyo elobelami na Nzembo 110:4 esalemaki, mpe ekokisaki nini?

◻ Kondimana ya sika esalami kati na nani mpe nani, mpe ndenge nini ebimisi libota ya bakonzi-banganga?

◻ Mpo na nini Yesu asalaki kondimana mosusu kati na ye moko mpe bayekoli na ye.

◻ Wapi kondimana nsambo oyo touti koyekola?

[Etanda na lokasa 8]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Kondimana na Edene Genese 3:15

Kondimana elongo na Abrahame

Kondimana na Mibeko

Kondimana elongo na David mpo na Bokonzi

Kondimana mpo na kozala nganga-nzambe na motindo na Melekisedeke Mosangani aleki-monene ya Libota na ndaka

Mosangani aleki-monene ya Libota na ndaka

Basangani mosusu ya Libota na ndaka Bolamu ya seko

[Etanda na lokasa 11]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Kondimana na Edene Genese 3:15

Kondimana elongo na Abrahame

Kondimana na Mibeko

Kondimana na Sika

Kondimana elongo na David mpo na Bokonzi

Kondimana mpo na kozala nganga-nzambe na motindo na Melekisedeke Mosangani aleki-monene ya Libota na ndaka

Mosangani aleki-monene ya Libota na ndaka

Kondimana mpo na Bokonzi na makolo

Mosangani mosusu ya Libota na ndaka

Bolamu ya seko

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto