Mituna na batangi
◼ Na Bileli 4:10, mpo na nini bamama oyo baliaki bana na bango babengami basi na mawa?
Kolobelaka ezalela na kozanga elikya ya Bayuda na boumeli ya kozingama ya Yelusaleme na basoda ya Babilone na mobu 607 liboso ya ntango na biso, Yilimia akomaki: “Maboko na basi, ata bazali na mawa masili kolamba bana na bango mpenza. Bakomi lokola bilei na bango na ntango na libebi na mwana mwasi na bato na ngai.”—Bileli 4:10.
Bikeke mingi liboso, Moïse akebisaki Bayisraele ete na mikolo mikoya bakokaki kozwa to “lipamboli” to “kolakelama mabe”. Basengelaki komeka mapamboli soko bakobatela mibeko na Nzambe, kasi bakomibendela bampasi soko batiki banzela na ye ya bosembo. Lokola bakomaki kino ezalela ya kolia bana na bango ezalaki wana moko na makama oyo na nsomo. (Deteronome 28:1, 11-15, 54, 55; 30:1; Levitike 26:3-5, 29) Likambo yango esalamaki nsima wana ete Jéhovah atikaki libota oyo ezangaki botosi mpe ezangi kondima na maboko ya bato na Babilone.
Na Bileli 4:10, mosakoli Yilimia abendi likebi likolo na likambo oyo ya solo: mama oyo azali moboti ayokaka mpenza mpasi mpe mawa mingi mpo na bana na ye, akobatela bango. (1 Mikonzi 3:26, 27; 1 Batesaloniki 2:7) Nzokande, nzala oyo ekolaki na Yelusaleme oyo ezingamaki ezalaki makasi kino ete bamama oyo bazali baboti, oyo mbala mingi bazalaka na ezaleli ya mawa, balambaki bana na bango mpe baliaki bango.—Tala Bileli 2:20.
Ezaleli motindo moko ebimaki nsima wana Bayuda babwakaki Masiya, oyo akebisaki bango mpo na kozingama lisusu ya mboka Yelusaleme na mikolo mizalaki liboso. (Matai 23:37, 38; 24:15-19; Luka 21:20-24) Mokomi na masolo ya bato Josèph akomi mpo na moko na makambo ya nsomo ya bozingami yango, na mobu 70 liboso ya ntango na biso: “Marie, mwana mwasi ya Eléazare . . . abomaki mwana na ye, alambaki ye, na koliaka eteni moko mpe kobombaka eteni mosusu.”-Etumba na Bayuda, Mokanda Vl, mokapo XXI, traduction française d‘Arnaud d‘Andilly, édition Lidis, 1973, kasa 889, 890.
Na ntembe te, kotika mibeko mpe mitinda ya Jéhovah ezali nzela na mayele te.