Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/8 nk. 30-31
  • Atiki nzela ya liwa mpo na kolanda nzela ya bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Atiki nzela ya liwa mpo na kolanda nzela ya bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini nakoki kolongwa na boombo ya badrɔgɛ?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/8 nk. 30-31

Atiki nzela ya liwa mpo na kolanda nzela ya bomoi

NA BOUMELI ya bambula mingi, bomoi na ngai ebebisamaki na komela drogue. Nabandaki na drogue oyo ezali makasi mingi te kino nakomaki na oyo ya makasi koleka, lokola LSD. Na nsuka drogue eyaki komonana lokola ete yango nde ekosikola ngai na mikakatano na ngai moko mpe mikakatano mosusu mitali bomoi. Na mawa nyonso, nabendaki bilenge mosusu kino kolanda ngai na nzela ya liwa.

Lokola nayebanaki ete nazali motekisi na drogue, la police ezalaki koluka ngai. Esengeli naloba polele ete nazalaki na kobanga, mpo nayebaki ete soko nakangami nakosala bambula ebele na boloko. Na bongo nazalaki kobika kati na nsomo; kasi, ekokaki te mpo na kobongola bizaleli na ngai.

Baboti na ngai bamekaki kosalisa ngai na komema ngai na lopitalo mpo na kosalisama. Bazalaki na elikya ete bankisi mpe kosalisama oyo nazalaki kozwa ekosilisa mokakatano na ngai; nzokande, bobele ntango oyo nabimaki, baboti na ngai bayaki komona ete lisalisi ya monganga ekoki kobongola ngai te. Bamekaki lisusu kosalisa ngai na komemaka ngai epai ya sango. Esimbaki mpe te. Nabandaki komela marijuana mpe masanga se liboso na ye, lokola soki azalaki wana te. Nalingaki mpenza kobongwana te.

Oriana, fiansé na ngai, azalaki na botemeli makasi mpo na lolenge ya bomoi na ngai; nzokande, nalingaki te ete aboya ngai. Na kotala malamu, ezalaki wana elendiseli malamu mpo ete nakoka kobongwana. Nzokande te, nakobaki komela drogue na kobombama, komonisaka epai na Oriana ete nazalaki kobela. Naumelaki te kozala kimbambala. Nazalaki komitiela elaka ete na kotika, ete nakolonga, kasi ezalaki mpamba. Nazalaki bobele kozinda makasi na nzela ya liwa.

Lokola nalingaki mpenza kobala Oriana noki, tokendeki kotala moto moko na nkombo ya Robert oyo ayebi kobongisa na kati ya ndako (kotia langi to bililingi), mpo asala mwa bambongwana kati na ndako na biso. Mwasi ya moto yango azalaki Témoin de Jéhovah, mpe asololaki na biso mpo na kondima na ye. Na ebandeli, lisolo esepelisaki Oriana koleka ngai; ata bongo, moke moke nayaki koyeba ete Ba Témoins de Jéhovah bandimaka makasi ete mosika te Nzambe akobongola mabelé paradis mpe ete bato bakofanda na yango libela kati na kimya.

Nalingaki ngai moko koluka komona soko ezalaki solo ete, “uta sikawa, Ba Témoins de Jéhovah bazali komonisana bolingo mpe botosi”, engebene maloba ya mwasi yango. Mpe Oriana na ngai tokendeki na Salle du Royaume. Nayokaki nsoni mpo na basuki na ngai ya milai mpe bilamba na ngai ya mabe, kasi na boyambi oyo batemwe bamonisaki biso, namonaki mbala moko ete nazalaki epai na ngai. Nazalaki na mayoki ete nakoki kotiela bango motema. Emonanaki polele ete bolingo mpe botosi ya solo ezalaki makambo ya solo mpo na bango.

Kobanda mokolo wana, nabandaki koyangana ntango nyonso na makita ya boklisto, mpe nabandaki koyekola Biblia elongo na Ba Témoins de Jéhovah. Nakatisaki nsuki na ngai mpe nabongolaki lolenge na ngai ya kolata. Lisusu, na kosalaka makasi mingi, nayaki kotika komela likaya mpe drogue. (2 Bakolinti 7:1) Ata bongo, likambo mosusu ezalaki kotia nkaka na bomoi na ngai. Na yango, kozanga koyeba, nakomaki momeli monene ya masanga. Ntango nazalaki komela eloko moko ezalaki kotambola malamu te: nazalaki koswana na bato mpe nakomaki na zuwa mingi mpo na Oriana. Nakotaki na mitungiseli mingi. (Masese 23:29-35) Nasalaki bongo makasi mpo nalonga ezaleli oyo mabe, mpe na lisalisi na Jéhovah, na nguya ya libondeli mpe na lisalisi ya Ba Témoins de Jéhovah, nayaki kotika libela ezaleli oyo mabe na bomoi na ngai.

Mwasi na ngai mpe ngai moko tozwaki batisimo na le 23 août 1974. Na nzela na solo, bomoi na biso ezalaki sikawa na ntina. Na ndenge nabongwanaki, na esika na ngai ya mosala babandaki kopesa ngai limemya. Mwasi na ngai mpe ngai moko tozalaki na mosala oyo tozalaki kofutama mpo na yango; kasi, tomonaki ete etikali mpo na biso ntango moke mpo na mosala ya biso na bulee. Soki tolingi kozala na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah, esengelaki na biso kosala mbongwana na bomoi na biso, soki te, bolingo na biso ya liboso mpo na solo ekokaki kokoma mpio. Na yango tokomaki bapionniers na 1979, mpo tokoka komipesa mingi mpe ntango nyonso kati na kosakola.

Mpo na nini nazwaki likatami oyo? Na yango, nakokaki kozala wapi sikawa soki kongengisama na solo te? Lelo oyo, baoyo bazalaki kotambola elongo na ngai na nzela ya liwa, bazali bameli masanga, to baboyami na bato ya libota na bango, to lisusu bakota boloko - to bakufa. Nzokande, mpo na ngai, ezali nsango ya Biblia nde esikolaki ngai. Ezala kosalisama to mokano na ngai likambo moko te elongaki. Esengelaki na ngai bopusi makasi: nazwaki yango na kosalaka molende ya kosala boninga ya solo elongo na Jéhovah Mozalisi. Sikawa, nalingi na bosembo nyonso kosala nyonso oyo ekoki na ngai mpo ete nasalisa baoyo bazali baombo ya drogue, mpe baoyo bazali konyokwama mpe bazali koluka ndenge ya kobima kati na mitungisi na bango. Tozali na mpiko kati na mosala ya boklisto, Oriana mpe ngai tozali kokokisa mikano oyo. Tozwaki esengo ya kosalisa bato mingi na kokota kati na nzela ya bomoi. Kati na bango ezali na bato misato oyo ngai moko nateyaki bango kala komela drogue. Sikawa, nazali mokengeli ya circonscription na nord ya ltalie. Likambo moko ezali solo: Komela drogue ezali lokola nzela oyo nokinoki to ata ndele, ekomema na liwa, to bomoi ezanga ntina mpe ezanga avenire. Maloba mazangi ngai mpo na koyebisa botondi na ngai epai na Jéhovah Nzambe. Alakisaki ngai nzela mpo na kolongwa na molili esika nazalaki mpe amonisi ngai nzela ya bomoi, nzela etondi na kongenga, oyo ezali komema na bomoi ya seko.-Lisolo euti epai na Ruggero Polotti.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto