Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/11 lok. 3
  • Ndenge nini yo otalelaka mibeko zomi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini yo otalelaka mibeko zomi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Mibeko zomi ya Nzambe ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mibeko Zomi etaleli yo na nini?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Mibeko zomi Milimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bolingo ya Nzambe eumelaka seko
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/11 lok. 3

Ndenge nini yo otalelaka mibeko zomi?

MAKANISI na bato makabwani likoló na Mibeko Zomi na Biblia. Ba adventistes nun babatelaka sabata poso na poso bazali koloba ete bato nyonso basengeli kotosa mibeko oyo. Mpo na ba luthériens, balobi ete “ezali liboke na mitinda kitoko koleka oyo mipesamaki likoló na yango moto asengeli kotonga bomoi na ye”. Molobeli moko na Lingomba ya katolike alimbolaki mpo na ye ete: “Mpo na moto oyo azali kokanga ntina na yango malamu, Mibeko Zomi, mikoki lisusu lelo, kosalisa lokola moboko na bomoi na moklisto.”

Na yango, mangomba mosusu malobi ete esengeli kolanda Mibeko Zomi moko na moko, wana mangomba mosusu mazali komona yango bobele lokola motambwisi na bizaleli malamu. Kati na encyclopédie (Encyclopœdia of Religion and Ethics) ekoki kotangama boye: “Ata mokanda moko mokomami na bato naino mozali te na bopusi mingi likoló na bomoi na lingomba mpe na bizaleli malamu lokola Mibeko Zomi.” Mpo na nini ezali bongo? Totalela naino oyo elobami kati na Mibeko Zomi yango, oyo na maloba moke, mizali na nguya. Kasi, mizali kolimbola nini mpo na yo?

[Etanda na lokasa 3]

Mibeko Zomi

1. Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.

2. Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te (. . .).

3. Okotanga nkombo na Jéhovah Nzambe na yo mpamba te (. . .).

4. Kanisa mokolo na sabata mpe talela yango ete ezali bulee. Okosala mosala mikolo motoba (. . .) Na mokolo yango okosala mosala soko moke te, yo te mpe mwana mobali na yo te, mpe mwana mwasi na yo te, mpe moombo mobali na yo te, mpe moombo mwasi na yo te, mpe bibwele na yo te, mpe mopaya na lopango na yo te (. . .).

5. Kumisa tata na yo mpe mama na yo (. . .).

6. Okoboma te.

7. Okosala ekobo te.

8. Okoyiba te.

9. Okoloba matatoli na lokuta na ntina na mozalani na yo te.

10. Okolula ndako na mozalani na yo te. Okolula mwasi na mozalani na yo te, soko moombo mobali na ye te, soko moombo mwasi na ye te, soko ngombe mobali na ye te, soko mpunda na ye te, soko eloko nini ezali na mozalani na yo te.”​—Exode 20:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto