Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/2 nk. 20-24
  • “Motioli na mibeko” amonisami polele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Motioli na mibeko” amonisami polele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobeko ya kolinga mozalani na yo
  • Motioli na mibeko emonisami polele
  • Mpo na nini komonisa ye polele mpe na molende?
  • Ekateli na Nzambe mpo na “motioli na mibeko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Toluka koyeba “motioli na mibeko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Klisto ayinaki ezaleli ya kotyola mibeko—bongo yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/2 nk. 20-24

“Motioli na mibeko” amonisami polele

“Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, . . . ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”​—EMONISELI 18:4.

1, 2. (a) Ndenge nini tokoki koyeba motioli na mibeko? (b) Nzambe akanisi nini na ntina na baoyo bazali koloba ete bazali kosambela ye, kasi bazali na ngambo mpo na makila masopami?

LILOBA na Nzambe esakolaki koya ya ‘motioli na mibeko’. Esakolaki mpe ndenge Klisto Yesu, Momonisi na Likoló oyo azali kokokisa bikateli na Nzambe, asengeli ‘koboma mpe kobebisa nyee’ motioli na mibeko oyo. (2 Batesaloniki 2:3-8) Lokola emonisaki yango masolo moleki, motioli na mibeko ezali bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Uta kala, batikaki solo oyo ezali kati na Liloba na Nzambe mpo na kolanda mateya ya bopakano, lokola Trinité, lifelo ya móto mpe kozanga kokufa ya molimo. Lisusu koleka, misala na bango mizali na boyokani te na mibeko ya Nzambe. Bakonzi ya mangomba bakokani na bato oyo mpo na bango ntoma Paulo akebisaki Tito, na kolobaka ete: “Balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali koangana ye. Bazali bato na bosoto, na kozanga botosi mpe babongi mpo na mosala moko malamu te.”​—Tito 1:16.

2 Yesu alobaki ete: “Bokeba mpo na basakoli na lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba na mpate nde katikati bazali bankoi na kongala.” Basakoli na lokuta bakobimisa “bambuma ya mabe”. (Matai 7:15-17.) Ngambo monene ya bakonzi na mangomba na oyo etali kosopa makila ezali elembeteli ete bazali kobota bambuma ya mabe. Na boumeli ya bikeke, bapesaki maboko na bitumba bibengami croisades (kobengana bamusulma na Yelusaleme), konyokola mpe koboma bato oyo baboyaki mateya na bango (lnquisition) mpe bitumba ya mokili, makambo oyo masopaki makila ya bamilió na bato. Ntango na bitumba wana basambeli na lingomba moko bazalaki kobomana, bakonzi na mangomba na ngambo nyonso mibale babondelaki mpo na bituluku na bango mpe bapambolaki babundi. Nzokande, ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali mpeto na makila ya bato nyonso.” (Misala 20:26) Mpo na bakonzi na mangomba ezali bongo te. Mpo na bango Nzambe alobi boye ete: “Ata bokobondelaka mabondeli mingi mpenza, nakoyoka te; maboko na bino matɔndi na makila.”​—Yisaya 1:15

3. Makambo nini minene makosalema na mokili mobimba mabelemi noki?

3 Ntango oyo Nzambe akosambisa motioli na mibeko ebelemi noki. Mosika te, lokola Yesu asakolaki yango, “ekozala na bolɔzi monene lokola emonani longwa na ebandeli te, ekobima mpe boye lisusu te”. (Matai 24:21) Bolozi oyo ekokani na mosusu te ekobanda na kobomama ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya losambo ya lokuta, oyo esangisi mangomba nyonso ya boklisto ya mokili oyo. Bakonzi ya politike “bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu, bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na móto”. (Emoniseli 17:16.) Bolozi monene ekosuka na kobomama ya biteni mosusu bitikali ya mokili ya Satana na Armagedon, “etumba na mokolo monene na Nzambe Mozwi na​—Nguya​—Nyonso”.​—Emoniseli 16:14, 16; 19:11-21.

Mobeko ya kolinga mozalani na yo

4. Eloko nini baoyo bazali kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo basengeli komikundola?

4 Lokola makambo oyo minene masengeli kobima na mokili mobimba mosika te, mitinda nini baoyo ‘bazali kosambela Tata na elimo mpe na solo’ basengeli kotosa? (Yoane 4:23) Ya, liboso, basengeli komikundola maloba oyo ya Yesu: “Soki bokotosa malako na ngai, bokoumela kati na bolingo na ngai lokola ngai natosi malako na Tata na ngai mpe naumeli na bolingo na ye. Lilako na ngai ezali boye: ete bolinganaka pelamoko ngai nasili kolinga bino. Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye. Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino.”​—Yoane 15:10-14; 1 Yoane 5:3.

5, 6. (a) Lilako nini Yesu apesaki na bayekoli na ye, na nzete na yango bakomonisa ete bazali basambeli ya solo ya Nzambe? (b) Na likambo nini lilako yango ezalaki ya sika?

5 Na yango esengeli na baklisto ya solo kolinga bazalani na bango, mingimingi bandeko na bango ya mibali mpe ya basi na bipai nyonso. (Misala 10:34; Bagalatia 6:10; 1 Yoane 4:20, 21). Ee, baklisto basengeli kozala na ‘bolingo mozindo bamoko epai na bamosusu’. (1 Petelo 4:8.) Bolingo oyo bazali na yango na kati ya mokili mobimba ezali kotatola ete bazali basambeli ya solo ya Nzambe, mpamba te Yesu alobaki boye ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, bolinganaka bamoko na bamosusu, bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”​—Yoane 13:34, 35.

6 Na likambo nini lilako oyo ezalaki ya sika? Na nse ya Mibeko na Moise, Bayuda bazwaki etinda oyo: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Nzokande, na kobakisaka maloba oyo: “lokola ngai nalingi bino”, Yesu asɛngaki likambo mosusu koleka. Bolingo na ye esengelaki komema kino kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na bazalani, mpe bayekoli na ye basengelaki kondima koseka bobele bongo. (Yoane 15:13) Na yango, bolingo etombwamaki na nivo moko ya likolo, mpo ete kondima kokufa mpo na moto mosusu esengamaki te na Mibeko ya Moise.

7. Lingomba nini etosaki na mobeko oyo ya bolingo na ekeke ya ntuku mibale?

7 Lingomba nini etosaki mobeko oyo ya bolingo na ekeke oyo ya ntuku mibale? Ezali mangomba ya boklisto ya mokili oyo te, mpamba te basangani na yango babomanaki na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba mpe na bitumba mosusu oyo ebomaki bamilió ya bato. Nzokande, na mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah bazali kotosa mobeko oyo ya bolingo. Bazali kokuta te na bitumba ya mabota, mpamba te Yesu alobaki ete bayekoli na ye ‘basengeli kozala bato ya mokili te’. (Yoane 17:16) Na yango, bakoki koloba lokola ntoma Paulo, ete bazali ‘mpeto na makila ya bato nyonso’. Mpo na kopesa ndakisa ya likambo oyo, totalela maloba ya yambo ya ekateli moko ezwamaki na basaleli ya Jéhovah baoyo bayanganaki na assemblée moko na Washington, le 27 Novembre 1921:

“Biso, baklisto baoyo tozali kotya molende mpenza mpo na kolanda mateya ya Klisto Yesu Nkolo na biso mpe na Bantoma na ye, tolobi ete: bitumba ezali bozoba ya bonyama, ezali likama mpo na bizaleli malamu mpe ezali kopesa nsoni na bato oyo bazali baklisto; mitinda miteyamaki na Nkolo Yesu Klisto mipekisi baklisto kosangana na bitumba, kosopa makila to kosala mobulu.”

8. Lisolo na bato elobi nini mpo na ezaleli ya ba Témoins de Jéhovah na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?

8 Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah basalelaki etinda oyo na ntango ya Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba? Kati na etumba yango, oyo ebomaki bato mingi koleka kati na lisolo ya bato, bato soko 50 milió bakufaki, kasi ata moto moko te abomamaki na Témoin de Jéhovah. Bakonzi ya mangomba na Alemanye, bapesaki maboko na lolenge moko to mosusu na bokonzi ya nazi. Nzokande, na nse na boyangeli ya nazi, ba Témoins de Jéhovah baboyaki kokɔta na makambo nyonso ya politike mpe baboyaki kopesa losako to kokumisa Hitler to kokɔta na mosala ya soda. Mpo na yango, kati na bitumba wana babomaki bandeko na bango te ya mikili misusu, soko mpe moto mosusu. Kati na mokili mobimba ba Témoins de Jéhovah bakutaki na bitumba te.

9. Eloko nini ekomelaki ba Témoins de Jéhovah na Alemanye mpe na Autriche na nse na boyangeli ya nazi?

9 Ba Témoins de Jéhovah mingi bapesaki bomoi na bango mpo na baninga na bango, kotosaka bongo mobeko ya bolingo. Tala oyo tokoki kotanga likolo ya Batemwe kati na mokanda Kirchenkampf in Deutschland (Etumba ya Mangomba na Alemanye), ya Friedrich Zipfel: “Bato ntuku libwa na nsambo kati na nkama moko ya basangani ya etuluku moke oyo banyokwamaki na bakonzi ya nazi. Ndambo na misato kati na bango babomamaki to bakufaki mpo na minyoko, nzala, bamaladi to misala makasi. Minyoko makasi oyo ezwaki bango mpo ete baboyaki kotika kondima na bango, mpe yango etumolaki banazi.” Na mokili ya Autriche, 25% ya ba Témoins de Jéhovah babomamaki, babetamaki kino liwa, to bakufaki na maladi to kolemba kati na ba camps ya minyoko ya ba nazi.

10. Baoyo bakufaki mpo ete batosaki mobeko ya bolingo Bazalaki na elikya nini?

10 Baoyo babomamaki kati na minyoko mpo ete bazalaki kotosa mobeko ya bolingo bakufaki na elikya makasi ete “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na (bango) mpe bolingo bosili (bango) kotalisa na nkombo na ye”. (Baebele 6:10) Bayebi ete “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”. (1 Yoane 2:17) Bazalaki na elikya ya solo ya kosekwisama, yango nde ekopesa bango nzela ya kozwa bomoi ya seko.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15

11. Na likambo nini basaleli ya Jéhovah bakeseni na bato mosusu, mpe bazali kokokisa esakweli nini?

11 Bobele basaleli ya Jéhovah nde bazali kotosa etinda oyo, elobamaki na ntoma Petelo mpe bantoma mosusu liboso ya tribinale monene: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Ezali yango ba Témoins de Jéhovah bazali kosala. Ezali mpo na yango bazali kosungama na “elimo santu oyo Nzambe apesi na bango bakotosaka ye lokola mokonzi”. (Misala 5:32) Bazali bongo kozwa makasi ya kokokisa esakweli ekomamaki na Yisaya 2:2-4. Mokapo oyo esakolaki ete na eleko na biso losambo ya solo esengeli kozongisama mpe bato na mabota nyonso mpe mangomba nyonso bakosopana kuna mpo na kosangana na yango. Bato yango basengeli ‘kotula mipanga na bango mizala bitimweli to kongo mpe makonga na bango mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, mpe bakoyekola bitumba lisusu te’. Basaleli ya Jéhovah bazali komibongisa kozala na bomoi kati na mokili ya sika, mokili ya kimya; mpo na yango bazali koyekola bitumba lisusu te kasi bazali koyekola nde bolingo.​—Yoane 13:34, 35

12. Baoyo bazali kotosa mobeko ya bolingo basengeli kosala nini mpo na bazalani?

12 Bolingo ya boklisto elimboli lisusu ‘kolinga moninga na yo lokola yo moko’. Yango wana basaleli na Nzambe bakoki kobomba mpo na bango moko te makambo oyo bayebi. (Matai 22:39) Ezali naino na bato mingi lisusu oyo bakolinga kosalela Nzambe mpe kozala na bomoi kati na mokili ya sika oyo Nzambe alakaki epai na bato. Wana ntango ezali naino, bato yango, bango mpe, bazali na mposa ya koyekola mobeko ya bolingo mpe solo na ntina etali Moyangeli na molongo mobimba, Jéhovah Nzambe. Basengeli koyekola ete bobele Jéhovah nde abongi na losambo na biso, mpe koyeba ndenge nini ebongi mpo na kosambela ye. (Matai 4:10; Emoniseli 4:11) Baoyo bayebi makambo oyo bazali na mokumba ya koteya yango epai na bamosusu, mpo ete bango mpe bakoka kosepela na ngolu ya Jéhovah.​—Ezekiele 33:7-9, 14-16

Motioli na mibeko emonisami polele

13. Wana ezali biso kopesa litatoli na mokili mobimba, nasengeli mpe koyebisa nini, mpe mpo na nini?

13 Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Wana ezali bango kopesa litatoli oyo na mokili mobimba, esɛngami na basaleli ya Nzambe koyebisa mpe bikateli na ye likolo ya lingomba ya lokuta, mingimingi bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo. Liboso na Nzambe, ezali bango nde bakweisami mingi koleka bamosusu, mpamba te bazali komiloba ete bazali baklisto. Basengeli komonisema polele, mpo ete bato oyo balingi kosalela Nzambe basikolama na bopusi na bango mpe bakoka kokokisa masɛngami mpo na kobika Yesu alobaki ete: “Solo ekosikola bino.”​—Yoane 8:32.

14. Nsango nini ya polele na ntina na losambo ya lokuta esengeli koyebisama?

14 Mpo na yango, ba Témoins de Jéhovah basengeli koyebisa nsango oyo epemami mpe etali mangomba ya lokuta ete: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te. Mpo ete libondo na masumu na ye likomi kino na likolo, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye. . . . yango wana, na mokolo moko malozi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na moto, mpo ete Jéhovah Nzambe mosambisi na ye azali makasi.”​—Emoniseli 18:4-8.

15. Nini ekomaki na 1914 na ntango oyo etyamaki na Jéhovah, mpe nini esalamaki nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?

15 Bisakweli na Biblia bimonisi ete “mikolo na nsuka” na biloko mabe na ntango oyo ebandaki na 1914, mbula ya makambo (2 Timoté 3:1-5, 13; Matai 24:3-13). Kobanda eleko wana, tozali kobika na “ntango ya nsuka”. (Danyele 12:4) Nokinoki nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na ntango etyamaki na Jéhovah, Batemwe babandaki kopalanganisa na molende nyonso mosala ya kosakola Bokonzi na Nzambe, lokola yango esakolamaki na Matai 24:14. Lisusu, batiaki milende mingi mpo na komonisa polele lingomba ya lokuta, mingimingi kelasi ya bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo ya lipengwi, ya motioli na mibeko.

16. Koleka bambula 70, mosala ya komonisa polele motioli na mibeko ezwi bokoli ya ndenge nini?

16 Uta koleka bambula 70 mpe ntango nyonso na molende makasi, basaleli na Nzambe bazali kokebisa bato mpo na misala na bizimbiseli oyo motioli na mibeko amipesi na yango. Batemwe bazalaki bobele moke nsima na Etumba ya Liboso na mokili mobimba. Sikawa, bakomi “libota makasi” ya bato koleka milió misato na ndambo, baministre ya molende oyo babongisami kati na masangá koleka 60 000 kati na mokili mobimba. (Yisaya 60:22) Na nzela ya mosala na bango, oyo ezali kokola ntango nyonso, baklisto bazali kolakisa na molende Bokonzi na Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na bato mpe, na libaku bobele moko oyo, bazali komonisa polele soki bakonzi na mangomba bazali banani: motioli na mibeko mpe mozimbisi.

Mpo na nini komonisa ye polele mpe na molende?

17. Mpo na nini basaleli ya Jéhovah bazali komonisa polele mpe na molende nyonso motioli na mibeko?

17 Mpo na nini, uta bambula mingi, basaleli ya Jehovah bazali komonisa polele mpe na molende motioli oyo na mibeko? Ezali mpo ete bamilio na bato oyo bazali ebele monene ya bampate ya Jéhovah mpe baoyo bazali kotambolaka na nzela ya lobiko basengeli kobatelama na mokili ya Satana, mpe kotemela losambo ya lokuta (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9-14). Lisusu, soki bakonzi na mangomba bamonisami polele te, bato na mitema malamu baoyo basangani naino te na etonga na Nzambe bakoyeba te ndenge nini kobima na nzela ya mabe. Na bongo bato yango basengeli kokebisama mpo na likama, lokola bato na ntango ya Yesu bakebisamaki mpo na bokosi ya bakonzi na mangomba ya eleko na bango. “Bazali bakufi miso baoyo bazali kokamba bakufi miso na nzela Soki mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Matai 15:14; tala lisusu 2 Bakolinti 4:4; 11:13-15.

18. Baoyo bazali koluka solo basengeli koyeba nini?

18 Bakonzi na mangomba basangani na mokili ya Satana. (Yoane 8:44) Nzokande, ezali mokili oyo Mozalisi akoboma yango nyonso mosika te. (2 Petelo 3:11-13; 1 Yoane 2:15-17) Yango wana totangi boye kati na Liloba na Nzambe ete‘. “Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.” (Yakobo 4:4) Bakonzi na mangomba bazali kotya likebi ata moke te na likebisi oyo mpe balandeli komikɔtisa na makambo ya mokili. Bazali kondimisa bato na bango ete bakonzi ya politike bakosala mokili moko kitoko; kasi ezali elikya ya lokuta oyo bazali kopesa bango, mpamba te mokili oyo eyangelami na Satana etikali moke ekolimwa. Na yango, baoyo batii elikya na bango na mokili bazali komitika kozimbisama . Bazali nde na mposa ya koyoka solo likolo na ntango ezali koya ya mokili mpe mpo na makambo makosalema nsima. Masese 14:12: 19:21: Matai 6:9.10: Emoniseli 21:4. 5.

19. Ndenge nini emonisamaki polele kala mingi te ete bakonzi na mangomba balingi mokili?

19 Kala mingi te, bapanzi nsango balobelaki polele mpo na etamboli mabe ye bakonzi mosusu na mangomba, na komonisaka polele etamboli na bango ya pite mpe mposa ya biloko kitoko mingi ya mosuni ya bapastere mosusu baoyo bazali koloba na televizió. Mosali na nzembo moko akomaki nzembo moko oyo ezaleki na titre: “Soki Yesu akobima na televizio mbele alingaki kolata (montre) Rolex na motuya ya (5 000 000 de zaires)? ”Nzembo oyo ebakisaki lisusu ete: “Soki ekokaki kozonga awa na mabelé, Yesu mbele akokaki kosala politike, mbele akokaki kozala na ndako ya mibale ya kitoko mingi na Palm Springs (engumba oyo ezali kitoko mingi) mpe mbele akokaki koluka kobomba bozwi na ye?” Lisusu, basango mingi bazali kokweisa te ezaleli ya mibali kosangana na mibali mosusu, mingi kati na bango mpe bazali kosalaka yango; na mikolo oyo na Etats Unis, Lingomba ya katolike ezali kobimisa bamilió ya ba dollars mpo ne kofuta mabota ya bana oyo basango babebisaki mpo na kosangisa nzoto na bango na makasi.​—Baloma 1:24-27; 1 Bakolinti 6:9, 10.

20. Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengeli kolanda komonisa polele etamboli mabe ya motioli na mibeko?

20 Basaleli na Nzambe bakoki kokanga miso te likolo na etamboli mabe ya bakonzi oyo na mangomba; esengeli toloba makambo oyo polele mpo na bolamu na bazalani. Ebele monene na bampate mosusu basengeli kobatelama likolo na baoyo bazali komeka komema bango na kozanga kotosa mibeko na Nzambe. Mpo na baoyo “bazali kokimela mpe bazali kolela na ntina na makambo na mbindo nyonso mazali kosalema”, baklisto ya solo basengeli koluka bango mpe koyanganisa bango mpo ete bakoka kozwa litomba na kotambwisama mpe kobatelama na Mobateli monene na bampate”, Jéhovah Nzambe, mpe na “mobateli aleki malamu na bampate”, Klisto Yesu.​—Ezekiele 9:4; Yoane 10:11; Masese 18:10.

21. Nsango nini ba Témoin de Jéhovah bazali kolunda kosakola yango?

21 Na yango, basaleli na Nzambe bazali kokakatana te na kosakola ete Nzambe akosopa nkanda na ye likolo na mokili mobimba ya Satana, mpe likolo na motioli na mibeko, bokonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Bazali kosukola na molende nyonso nsango oyo anzelu asakolaki kati na Emoniseli 14:7: “Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye ekomi.” Kati na kosakola na bango, bazali kobosana te, likebisi ya nokinoki oyo epesami na Emoniseli 18:4, na ntina na losambo ya lokuta: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete . . . bozwa moko na malozi na ye mpe te.”

Bozongeli

◻ Eloko nini ekokomela motioli na mibeko, mpe mpo na nini?

◻ Mokumba nini basaleli ya Jéhovah bazali na yango epai na bazalani?

◻ Mpo na nini basaleli ya Jéhovah bazali mpeto na makila ya bato nyonso?

◻ Tosengeli kosala nini mpo na Babilone Monene?

◻ Mpo na nini tozali kolanda kosakola nsango ya nguya kotemela motioli na mibeko?

[Elilingi na lokasa 23]

Liboso ya tribinale monene bantoma balobaki boye ete: ‘Ekoki ete totosa Nzambe lokola mokonzi, liboso na kotosa bato.”

[Elilingi na lokasa 24]

Bato ya mitema sembo basengeli koyeba nini ezali avenir ya mokili mpe mangomba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto