Kopesa litatoli na bisika ya misala motindo na Bajaponé na kobuka mbuma
YESU KLISTO apesaki etinda ya komema litatoli kino “nsuka ya mokili”, elingi koloba ekosalama mpe na bisika ya misala. (Misala 1:8) Na Japon, ezali mpasi mingi komema nsango ya Bokonzi epai na bato oyo bazali kosala na babiro to na ba société minene oyo ezali ya Leta te. Basakoli na lisangá moko bazuaki ndingisa ya kolakisa baperiodike kati na babiro ya misala ya Leta na ntango ya bopemi ya midi. Liboso ete bakende na ndako oyo ya monene, babondelaki Jéhovah mpo apesa bango molende, kasi balataki mpe na lolenge ya malamu mpe bazalaki kokeba mpo na etamboli na bango. Balataki nkutu ba insignes oyo likolo na yango nkombo ekomamaki mpe nkombo na bango ya ba Témoins de Jéhovah.
Mpo na kobanda lisolo na mosali moko, bazalaki koloba na ye ete: “Nasengi excuse; nazali na ndingisa ya kosolola na bato nyonso ya ndako oyo. Likambo yango ekotungisa yo mpo na koyoka ngai wana ezali yo kolya?” Batemwe yango basengelaki kozala na mayele mpe kosalela maloba oyo ‘mazali na elengi na mongwa’. (Bakolose 4:6) Ntango balekaki na mbala‘ya liboso, bakabolaki baperiodike 39, kasi esengelaki na bango bakoka kozonga mbala minei mpo na kokutana na bato 1 500 baoyo bazali kosala kati na ndako monene oyo na ba étages nsambo. Batikaki baperiodike koleka nkama, bazwaki ba abonema mpe basalaki bavizite ya sika epai na bato mingi.
Na yango, directeur moko andimaki ete Temwe moko azongela ye. Ntango ayokaki botangi ya verset moko ya Biblia kati na Traduction du monde nouveau, alobaki ete: “Biblia oyo ezali mpasi te na koyoka. Oyo natangaki ekomamaki na lokota ya bajaponé ya kala mpe ezali mpasi mpo na kotanga yango.” Poso elandaki, asombaki Traduction du monde nouveau.
Yo mpe, okoki kosala molende koleka kati na teritware ya lisangá na yo mpo na kosakola nsango malamu epai na “bato ya lolenge nyonso”, bakisa mpe baoyo bazali kosala na babiro to na ba société?—Tala lisusu 1 Timoté 2:4.