Mituna ya batangi
◼ Tokoki kosukisa na ntina ya Matai 7:13, 14 mpe Luka 13:24 ete, ata kati na bato oyo bakosekwa, mingi na bango akoboya losambo ya solo?
Te, ba versets oyo ezali kolobela likanisi wana te. kasi ezali koyokana mingi mpenza na likanisi oyo lizali kopesa nzela na kozwa bomoi na Bokonzi ya likolo.
Maloba na Yesu oyo makomami na Matai 7:13, 14 ezali kati na lisolo na ye na likolo na ngomba Tala yango oyo: “Boingela na ekuke ya nkaka. Mpamba te ekuke ezali monene pe nzela ezali na esika ya monene yo ekoleka kino na libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango po ete ekuke ezali na nkaka mpe zela ekangani oyo ekoleka na bomoi‘ mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.”
Mingi ya makambo oyo Yesu alobaki na ntango wana ezalaki kolobela mpenza Bokonzi ya likolo. Na ndakisa, abandaki na maloba oyo: Esengo na baoyo bayebi bamposa bango ya elimo, mpo ete bokonzi likoló ezali ya bango.” Alobaki ete oyo bazali na motema ya peto ‘bakomona Nzambe’ mpe ete ‘’Bokonzi na makolo” ezali ya “baoyo basili konyokwama na ntina na boyengebene (Matai 5:3,8, 10; M.N.) Na nsima bobele kati ya diskur wana. Yesu lobaki na ntina ya nzela monene yo ezali komema na libebi mpe nzela moke oyo ezali komema na bomoi. kati na yango abakisaki boye: “Ezali oyo nyonso te bakobengaka ngai: nkolo, Nkolo, nde bakokota na bokonzi ya makolo, kasi ye oyo akosalaka mokano ya Tala na ngai oyo azali na makolo.”—Matai 7:13, 14, 21, M.N.
Luka 13:24 ezali na ndimbola ekokani, lokola oyo ba versets ya zingazinga na yango ezali komonisa. Nsima ete Yesu asilisaki kopesa masese mibale na ntina na ’’bokonzi na Nzambe”, moto moko atunaki ye nkolo, bato bakobikisama bazali mingi te?‘ Mpe Yesu ayanolaki boye: :sala makasi mpo na kokota na ekuke ya nkaka mpamba te nalobi na bino ete, mingi bakomeka kokota de bakokoka te,” Liloba ”mingi“ ezali kolobela baoyo balukaki kokola wana ekuke esili kokangama ezali kolobela ‘basali na mabe” baoyo babongi te na kozala elongo na “Abrahame mpe lsaka mpe Yakobo mpe basakoli nyonso kati na bokonzi ya Nzambe”. Bakanisaki ete bakozala liboso ”kati na bokonzi ya Nzambe”, nzokande bakozala bato ya nsuka, oyo elimboli lokola ete, bakozala mpenza te.—Luka 13:18-30.
Ba versets ya zongazonga ezali komonisa ete Yesu azalaki koloba na ntina ya kokota kati na bokonzi ya likoló oyo na Nzambe. uta ntango molai bakonzi ya Bayuda bazalaki kozwa esika ya lokumu, mpamba te bakokaki kotanga liloba na Nzambe. Bakanisaki ete bazali bazwi na elimo mpe sembo na miso ya Nzambe na bokeseni na bapakano oyo bango bazalaki koboya (Yoane 9:24-34.) Nzokande, Yesu alobaki ete bakongoli na mpako mpe basi ya pite oyo bandimaki nsango na ye mpe babongwanaki bakokaki kozwa ngolu na Nzambe.—Tala Matai 21:23-32: Luka 16:14-31.
Bapakano oyo bakomaki bayekoli na Yesu babongaki na kondimama lokola bana ya elimo na Nzambe ntango libengami mpo na kokende likoló ebandaki kosalema na Pantekote ya mobu 33. (Baebele 10:19, 20.)Atako bibele mingi bayokaki mateya na Yesu. kasi bato oyo bandimaki mpe bazwaki elikya ya kokende likoló bazalaki bobele moke. Nzokande, etonga moke ya bato oyo babotami na elimo. baoyo bazwi mbano oyo bakoki kokokana na Yakobo oyo azali kolya elongo na Jéhovah (Abrahame monene) mpe mwana na ye (oyo amonisami na lsaka) na likoló. Ezalaki wana mpenza nde mbano oyo mpo na yango esengelaki kosala makasi. kasi mingi na baoyo bayokaki mateya ya Yesu basalaki yango te.
Na yango, zongazonga ya ba versets wana mibale emonisi biso ete maloba na Yesu (oyo elakisi ete bobele moke na bate nde bazali koleka na nzela ya moke oyo ezali komema na bomoi mpe basili kobika) elobeli liboso mpenza oyo ekopesa nzela na kozwa ngolu na Nzambe na eleko oyo Ye azalaki kopesa elikya ya bomoi na likolo. Bobele moke mpenza nde bandimaki libéngami yango kati na baoyo nyonso bayokaki nsango ya solo. mpe bayekolaki makambo masɛngami mpo na kozwa elikya ya kokende likoló mpe bamimonisaki sembo.—Matai 22:14; 24:13; Yoane 6:60-66.
Ezali na ntina mpenza ya koyeba ete ata na eleko na biso, awa Biblia ezali na mobimba na yango mpe bisakweli ya Nzambe na ntina etali mikolo ya nsuka ezali kokokana polele mpenza, kasi bobele bato moke nde bazali kondimama na boklisto mpe bazali komonisa nsango ya mpiko kati na mosala ya Jehovah. Motindo na makambo oyo ekokani na lisese oyo kati na yango Yesu alobelaki mabele makeseni. Alobaki ete bamoko bakoyoka “liloba ya bokonzi”, kasi Satana akopikola oyo ekonamaki. Bamosusu bakoyamba liloba na esengo mpenza. kasi na boumeli ya ntango bakotika kondima na bango likoló ya mpasi to minyoko. Mpo na kosukisa bamosusu bakobota mbuma te likolo ya makambo ya biloko mabe ya ntango oyo mpe mposa mabe ya mosolo’.—Matai 13:16-23.
Tokoki kondimisama ete ekozala mpenza ndenge mosusu na boumeli ya mokolo na kosambisama na ntango oyo bamilio mpe bamilio na bato bakosekwa. Satana akozwa lisusu nzela te ya kopikola nkona ya solo oyo ekokonama kati na mitema na bango. Bakotelemela monyoko te to makambo ya biloko mabe ya ntango oyo te. Bakoteyama kati na mokili ya boyengebene mpe bakomona likamwisi ya Nzambe, yango lisekwa ya bakoli mpe kobikisama ya mabota. Ezali solo ete, ata na ntango wana, bamosusu bakosimba ntina te. (Tala Yoane 11:45-53.) Kasi tozali na bantina malamu ya kokanisa ete mingi bakosimba ntina ya liloba, bakondima yango mpe bakobika.