Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/5 nk. 10-15
  • Banga Jéhovah, Ye oyo akoyokaka mabondeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banga Jéhovah, Ye oyo akoyokaka mabondeli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobelema epai na Mokonzi na seko
  • Privilège ya bato nyonso te
  • Ndenge nini ‘kosambela kati na elimo santu’
  • Jéhovah ayokaka ntango nyonso
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mabondeli nini mandimami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mabondeli na yo emonisaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/5 nk. 10-15

Banga Jéhovah, Ye oyo akoyokaka mabondeli

“Yo okoyokaka mabondeli bato nyonso bakoya epai na yo.”​—Nzembo 65:2. seko”.

1. Mpo na nini tosengeli komizela ete Jéhovah asenga mwa makambo epai na baoyo balingi kobelama pene na ye kati na libondeli?

JÉHOVAH NZAMBE azali “Mokonzi na seko’’. Azali mpe ’Ye oyo akoyokaka mabondeli’, “bato nyonso bakoya epai na ye. (Emoniseli 15:3; Nzembo 65:2.) Kasi na lolenge nini bato yango basengeli koya epai na ye? Bakonzi ya mokili basengaka epai na bato oyo bazali komonana liboso na bango ete batosa mwa mitinda mitali molato mpe etamboli. Bobele bongo Mokonzi na seko esengi mwa makambo epai na moto nyonso oyo alingi kotelema liboso na ye na lilombo mpe na mabondeli ya botondi.​—Bafilipi 4:6, 7.

2. Mituna nini mizali kotunama na ntina na libondeli?

2 Likambo nini Mokonzi na seko azali kosenga epai na baoyo bazali kobelema penepene na ye na kosambelaka ye? Nini oyo akoki kobondela mpe ayokama? Mpe na ntina na likambo nini tokoki kobondela?

Ndenge ya kobelema epai na Mokonzi na seko

3. Bandakisa nini tozali na yango ya mabondeli oyo malobamaki Kalakala na basaleli ya Nzambe, mpe bazalaki kobelema pene na ye na nsima ya moto mosusu?

3 Liboso na kokoma mosumuki, Adam, ye oyo azalaki “mwana na Nzambe”, asengelaki kozala na masolo ya boninga elongo na Mokonzi na seko. (Luka 8:38; Genese 1:26-28) Ntango Abele, mwana ya Adam, apesaki epai na Nzambe “bana na liboso kati na etonga na ye”, na ntembe te alendisaki makabo yango na malombo mpe masanzoli (Genese 4:2-4) Noé, Abrahame, Yisaka mpe Yakobo batongaki bitumbelo na mbeka mpe babelemaki epai na Jéhovah na kobondelaka ye ntango bapesaki ye makabo. (Genese 8:18-22; 12:7, 8; 13:3, 4, 18; 22:9-14; 26:23-25; 33:18-20; 35:1, 3, 7) Mpe mabondeli na Salomo, na Ezela mpe na bakomi na nzembo oyo bapemamaki na Nzambe emonisi ete Bayisraele bazalaki kobelema epai na Nzambe kozanga ete baleka nsima ya moto mosusu.​—1 Mikonzi 8:22-24; Ezela 9:5, 6; Nzembo 6:1, 2; 43:1; 55:1; 61:1; 72:1; 80:1; 143:1.

4. (a) lolenge nini ya sika ya kobelema pene na Nzambe kati na libondeli ebandisamaki na ekeke ya liboso? (b) Mpo na nini ebongi mpenza ete tosambela na nkombo na Yesu?

4 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso lolenge mosusu ya sika ya kobelema epai na Nzambe kati na libondeli epesamaki. Kobanda ntango yango, esengelaki kosala yango na nsima ya Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo alingaki mpenza bato. Na boumeli ya bomoi na ye liboso ya koya na mokili, Yesu asalelaki Nzambe na esengo nyonso lokola “mosali na mayele” mpe azalaki kosepela na bana na bato. (Masese 8:30, 31) Awa na mabelé, Yesu asalisaki bato na bolingo nyonso kati na elimo, abikisaki bato na maladi mpe asekwisaki ata bakufi. (Matai 9:35-38; Luka 8:1-3, 49-56) Koleka nyonso, ‘apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na bato mingi’. (Matai 20:28.) Yango ebongi mpenza ete baoyo balingi kozwa litomba na lisiko babelema epai na Jehovah na nsima ya moto yango oyo alingi mingi bato. Sikawa ezali wana lolenge bobele moko ya kobelema epai ya Mokonzi na seko, mpamba te Yesu ye moko alobaki ete: “Moto akokoma epai na Tata te soko na nzela na ngai te”, mpe: “Soko bokolomba Tata eloko nini na nkombo na ngai, akopesa bino yango.” (Yoane 14:6; 16:23) Kosala mabondeli na nkombo na Yesu elimboli kondima ye lokola mwango ya kobelema epai na Ye oyo akoyokaka mabondeli.

5. Liyoki nini Nzambe azali na yango epai na mokili ya bato, mpe bopusi nini liyoki wana ezali na yango likoló na libondeli?

5 Tosengeli mpenza kosepela na bolingo oyo Jéhovah amonisaki mpo na kopesa lisiko. Yesu alobaki: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili (ya bato) na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Bozindo ya bolingo na Nzambe emonisami malamu kati na maloba oyo ya mokomi na nzembo: ’’Mpo ete lokola molai na lola ezali na likolo na mokili, boboto na ye ezali monene boye epai na baoyo bakobangaka ye. Mosika pelamoko yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipengweli na biso. Pelamoko tata akoyokela bana na ye mawa, boye Jéhovah akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye. Mpo ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:11-14) Ezali mpenza elendiseli na koyeba ete mabondeli ya ba Témoins de Jéhovah oyo bamipesi mazali komata epai na Tata moko oyo atondi na bolingo na nzela na Mwana na ye!

Privilège ya bato nyonso te

6. Ezalela nini tosengeli kozala na yango mpo na kobelema pene na Jéhovah kati na libondeli?

6 Bakonzi na mokili bapesaka nzela epai na moto nyonso te mpo na kokota na ndako ya mokonzi kozanga ete amiyebisa naino liboso. Koyambama epai na mokonzi ezali privilege moko ebatelami bobele mpo na mwa ndambo na bato. Ezali motindo moko mpo na libondeli. Ya solo, baoyo bazali kobelema epai na Mokonzi na seko na nzela na Yesu Klisto na kozalaka na limemya oyo ebongi mpo na bokonzi na ye ya nkembo bakoki kolikya ete bakoyokama. Esengeli kobelema epai na Mokonzi na seko na limemya mozindo. Baoyo balingi koyokama basengeli komonisa ezalela ya “kobanga Jéhovah”.​—Masese 1:7.

7. “Kobanga Nzambe” elimboli nini?

7 “Kobanga Jéhovah” elimboli nini? Ezali limemya mozindo mpo na Nzambe, esangani na nsomo ya lobiko ya kozanga koboyama epai na ye. Kobanga wana ya limemya mpo na Jéhovah ezali kouta na botondi mozindo mpo na motema na ye boboto. (Nzembo 106:1) Yango elimboli kondima ye lokola Mokonzi na seko, oyo azali na lotomo mpe na nguya ya kopesa etumbu, ata ya liwa, epai na moto nyonso oyo akotosa ye te. Baoyo bazali komonisa ezaleli ya kobanga Jéhovah bakoki kosambela ye na elikya ete bakoyokama.

8. Mpo na nini Nzambe ayokaka mabondeli ya baoyo bazali kobanga ye?

8 Mpenzampenza, Nzambe ayokaka te mabondeli ya bato mabe, oyo bazangi bosembo mpe baoyo bazali kotambwisama na boyengebene na bango moko. (Masese 15:29; Yisaya 1:15; Luka 18:9-14) Nzokande, azali koyoka baoyo bazali kobanga ye mpamba te bazali kotosa mitinda na ye ya sembo. Kasi esengelaki na bango kosala likambo mosusu koleka: komipesa epai na ye kati na libondeli mpe komonisa polele likambo yango na kozwaka batisimo kati na mai. Yango epesi bango privilege ezangi ndelo mpo na kosambela ye.

9, 10. Likoki ezali mpo ete bato oyo bazwi naino batisimo te bakoka kobondela na elikya ete bayokama.

9 Mpo na koyokama epai na Nzambe, esengeli koyebisa kati na libondeli mayoki oyo makokani na mokano na Nzambe. Ee, osengeli kozala mokosi te, kasi kokokisa mpe lisengami mosusu. Ntoma Paulo akomaki ete, ‘soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babelemi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye solo.’ (Baebele 11:6) Kasi, tokoki kolendisa bato oyo babatisami naino te na kosambela kati na elikya ete bakoyokama?

10 Koyebaka ete libondeli ezali privilege epesami mpo na mwa ndambo na bato, Salomo asengaki na Jéhovah ete ayoka bobele bapaya oyo bazalaki kosambela na kotalaka epai na tempelo na Ye, na Yelusaleme. (1 Mikonzi 8:41-43) Bikeke mingi na nsima, Korneye, moto na kobanga Nzambe oyo azalaki Moyuda te, ’’abondelaki Nzambe ntango nyonso”. Ntango azwaki boyebi ya solo, amipesaki na Nzambe, ye oyo apesaki ye elimo santu. Nsima na yango, Korneye mpe Bapakano mosusu babatisamaki. (Misala 10:1-44) Na mikolo na biso, tokoki kolendisa moto nyonso oyo akomi pene na komipesa na Nzambe, mpo na kobondela, lokola esalaki yango Korneye. Kasi soko moto moko azali koyekola mpenza Makomami te, ayebi masengami na Nzambe te na ntina etali libondeli mpe abandi naino komonisa te ezalela moko malamu liboso na Nzambe, tokoki koloba te ete azali kobanga Jéhovah, ete azali na kondima to azali koluka ye na motema na ye mobimba. Na yango azali na likoki te ya kosala epai na Nzambe mabondeli oyo Nzambe akoki kondima yango.

11. Nini akomelaki bato mosusu oyo bazalaki pene na komipesa na Nzambe, mpe likambo nini basengeli komituna?

11 Bato oyo, na eleko moko, bazalaki kokola kino kokoma pene mpo na komipesa na Nzambe balembaka mbala mosusu. Soki bazali kolinga Nzambe mpenza te mpo na komipesa mobimba epai na ye, bakoki komituna soki libaku kitoko ya kosambela ye epesameli bango ntango nyonso. Yango ezali bongo te, mpamba te baoyo bazali kobelema epai na Nzambe basengeli koluka ye na motema moko, mpe koluka boyengebene na bopolo. (Sofoni 2:3) Moto nyonso oyo azali mpenza kobanga Jéhovah azali kondima ye, azali komipesa epai na ye mpe azali komonisa likambo yango na kozwaka batisimo. (Misala 8:13; 18:8) Bobele bandimi oyo babatisami nde bazali na privilege ezangi ndelo ya kobelema epai na Mokonzi na seko kati na libondeli.

Ndenge nini ‘kosambela kati na elimo santu’

12. Ntango nini bokoki koloba ete ‘tozali kosambela kati na elimo santu’?

12 Nsima wana moto moko amipesi na Nzambe mpe amonisi likabo yango na kozwaka batisimo, azali na likoki ya ‘kosambela kati na elimo santu’. Na ntina yango, Yuda akomaki: “Nde bino, balingami, bomilendisa na kondima na bino, oyo na bulee mpenza, kobondelaka kati na elimo santu; bomibatela kati na bolingo na Nzambe; botalela mawa na Nkolo na biso Yesu Klisto, kino na bomoi na seko.” (Yuda 20, 21) Moto azali kosambela kati na elimo santu ntango azali kosala yango na nse na bopusi ya elimo, to nguya na mosala na Nzambe, mpe na boyokani na oyo Liloba na Ye ezali koteya Makomami, oyo mapemamaki na elimo ya Jéhovah, mazali kolakisa biso ndenge nini tokoki kosambela mpe makambo nini to sengeli kosenga kati na libondeli. Na ndakisa, tokoki kosambela Nzambe na elikya ete apesa biso elimo santu na ye. (Luka 11:13) Ntango tozali kosambela kati na elimo santu, mabondeli na biso mazali komonisa lolenge ya motema oyo Jéhovah azali kondima.

13. Soki tozali kosambela kati na elimo santu, likambo nini tokoboya kosala, mpe toli nini ya Yesu tokolanda?

13 Ntango tozali kobondela kati na elimo santu, mabondeli na biso matondi na maloba ya lolendo te. Ezali mpe na maloba oyo masili kobongisama kala te mpo na kozongelaka yango kati na motema. To masanzoli mazangi ntina, masanzoli ya likolólikoló. Mabondeli motindo wana mazali komonana mingi kati na boklisto ya lokuta mpe kati na mangomba mosusu ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta. Kasi, mpo na baklisto ya solo, bazali kolanda toli oyo ya Yesu: “Ekobondela bino, bozala lokola bakosi te, baoyo balingi kotelema mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo na nzela ete bamonana na bato. Ezali bino kobondela bolobaloba lokola ekosalaka bapakano te, mpamba te bazali kokanisa (na libunga) ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango. Bokoki kozala lokola bango te.”​—Matai 6:5-8.

14. Maloba nini ya mayele malobamaki na ntina na libondeli?

14 Longola Yesu mpe bakomi mosusu ya Biblia, bato mosusu balobaki maloba na mayele mpo na ntina etali libondeli. Na ndakisa, John Bunyan (1628-1688), mokomi moko ye moto na Angleterre, akomaki ete: “Libondeli ezali eyambweli ya molimo na sembo, ya mayele mpe ya bolingo liboso na Nzambe, na nsima ya Klisto, kati na nguya mpe na lisalisi ya Elimo, mpamba te ezali wana nde biloko Nzambe alakaki.” Thomas Brooks ministre moko ya lingomba ebengami puritain (1608-1680) alobaki boye: “Nzambe atalaka elobeli ya mabondeli na bino te, ata yango etondi na maloba kitoko ndenge nini; to na lolenge ya kobongisama ya mabondeli na bino te, ata yango ezali milai ndenge nini; to na ebele ya makambo oyo botondisi kati na mabondeli na bino te, ata yango ezali ya mayele mingi ndenge nini. Te, azali kotala nde bosembo na mabondeli na bino.” Mpo na kosukisa, totanga maloba mosusu oyo ya Bunyan: “Ntango tozali kosambela, eleki malamu tozala na motema sembo mpe tozanga maloba na esika ete tozala na maloba bongo tozanga motema sembo.” Nzokande, soki tozali na motema sembo mpe soki tozali kotosa mibeko na Nzambe, ndenge nini tokoki kondimisama ete Mokonzi na seko azali koyoka mabondeli na biso?

Jéhovah ayokaka ntango nyonso

15. Na mokuse, Yesu alobaki nini kati na Luka 11:5-8?

15 Jéhovah Nzambe ekangaka matoi te na mabondeli ya basaleli na ye oyo bamipesi. Ezali yango emonisami polele na maloba na kolendisa oyo Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ntango basengaki ye ete alakisa bango lolenge ya kobondela. Alobaki mpe boye ete: “Soki moko kati na bino azali na moninga, mpe akomi epai na ye kati na butu mpe alobi na ye ete: ‘Moninga, sunga ngai na kwanga misato, mpo ete moninga na ngai mosusu akomi epai na ngai na mobembo, mpe nazali na eloko na kotya liboso na ye te’. Mpe soko ye wana akozongisa monoko na kati na ndako ete: ‘Tungisa ngai te. Ekuke esili kozipama, mpe bana na ngai bazali na ngai elongo na mbeto. Nakoki kobima kopesa yo yango te. Nalobi na bino ete ata akobima kopesa ye yango mpo na kozala moninga na ye te, nde akobima kopesa ye nyonso esengi ye mpo ete azali (kotungisa ye).” (Luka 11:1, 5-8) Lisese oyo eteyi biso nini?

16. Mpo na oyo etali libondeli, likambo nini Yesu alingi ete tosalaka?

16 Yesu alingaki mpenza koloba te ete Jéhovah azalaka na mposa ya kosalisa biso te. Nkutu Yesu alingi ete tozala na elikya ya kokoka epai na Nzambe mpe ete bolinga ye mingi mpo ete tosambela ye ntango nyonso. Yango wana akobi na kolobaka ete: “Ngai nalobi mpe na bino ete, bosengaka mpe ekopesama na bino. Bolukaka mpe bokokuta. Bobetaka mpe ekozipwa mpo na bino; mpamba te molombi na molombi akozwa, moluki akokuta, mpe ekozipwa mpo na mobeti.” (Luka 11:9, 10) Na bongo tosengeli mpenza kolanda kobondela ntango tonyokwami, ntango totungisami na bolembu moko oyo ekoteli biso mingi koleka to ntango bokutani na mimekamo nyonso mosusu. Jéhovah azali ntango nyonso pene na kosalisa basaleli na ye ya sembo. Alobaka na biso ata mbala moko te ete: “Tika kotungisa ngai.”

17, 18. (a) Na maloba nini Yesu alendisi biso na kosenga elimo santu, mpe eloko nini ezali kopesa kilo na maloba na ye? (b) Na maloba nini Yesu akokisi lolenge oyo baboti basalaka epai ya bana na bango mpe lolenge oyo Nzambe akosalaka epai na biso?

17 Mpo na kozala na boyokani ya penepene elongo na Nzambe, tozali na mposa na lisalisi ya elimo santu na ye, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala. Yango wana Yesu abakisaki: “Soko mwana na moko na bino akolomba mbisi na tata na ye, akopesa ye nyoka mpo na mbisi? Soko akolomba likei, akopesa ye nkoto? Na bongo soko bino bato mabe boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino na likoló akoleka kopesa elimo santu na bango balembi ye te?” (Luka 11:11-13) Na Matai 7:9-11, ezali likambo ya kopesa libanga na esika ya limpa. Maloba oyo na Yesu mazali lisusu na ndimbola monene koleka soki toyebi ete kati na mikili ya Kalakala oyo mitangami kati na Biblia limpa ezalaki na bonene mpe na lolenge ya libanga epapala to semba mpe ya libungutulu. Mitindo misusu ya banyoka ekokanaki na mbisi, mpe ezali na nkoto (scorpion) moko ya moke ya mpembe oyo azali kopesa likanisi ya likei. Kasi soki mwana moke asengi limpa, mbisi to likei, tata nani akopesa ye libanga, nyoka to nkoto?

18 Na nsima Yesu akokanisaki mitindo ya kosala ya baboti awa na mokili na oyo ya Nzambe epai na basangani ya libota na Ye ya bosambeli. Soki, atako tozali bato mabe na ntina na kozanga kokoka na biso ya kobotama tozali kopesa epai na bana na biso makabo oyo mazali malamu, esengeli na biso mpenza komizela ete Tata na biso ya likoló apesa likabo kitoko, elimo santu na ye, epai na basaleli na ye ya sembo oyo bazali kosenga ye yango na bopolo nyonso!

19. (a) Liteya nini tozwi na maloba na Yesu oyo makomami na Luka 11:11-13 mpe Matai 7:9-11? (b) Soki totambwisami na elimo santu, ndenge nini tokotalela mimekamo na biso?

19 Maloba na Yesu mamonisi ete tosengeli kosenga epai na Nzambe elimo santu na Ye mingi. Soki totambwisami na elimo yango, tokozala bato oyo “bazali koimaima mpo na makambo oyo basaleli bango kati na bomoi” te to mpe tokokanisa te ete mimekamo na biso mpe mawa na biso ezali mpenza kopesa biso mpasi. (Yuda 16, MN) Ya solo, “moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi”, mpe mingi bazali na mikakatano to na mawa kati na bomoi na bango mobimba. (Yobo 14:1) Kasi totalela mimekamo na biso te lokola mabanga, nyoka mpe nkoto oyo ekouta, na lolenge moko to mosusu, epai na Ye oyo ayokaka mabondeli. Azali mpenza bolingo mpe amekaka moto te na nzela na makabo mabe. Nkutu, azali kopesa biso “makabo nyonso malamu mpe makambo nyonso mabongi”. Nsuka na yango, akosenzela ete nsuka ezala malamu mpo na baoyo bazali kolinga ye mpe kobanga ye. (Yakobo 1:12-17; 1 Yoane 4:8) Baoyo bazali kotambola kati na solo uta mibu mingi bayebi na nzela ya eksperianse ete, na lisalisi ya libondeli mpe ya kondima, mimekamo na bango mosusu ya mpasi koleka ebongwanaki mpo na bolamu na bango mpe ememaki bango na kolona mbuma na elimo na Nzambe mingi koleka kati na bomoi na bango. (3 Yoane 4) Ezali nzela eleki malamu ya koyekola kotya motema epai na Tata na biso ya likoló mpe kolona mbuma na elimo, elingi koloba bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema.​—Bagalatia 5:22, 23.

20. Maloba na Yesu makomami na Luka 11:5-13 masengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?

20 Maloba na Yesu oyo mazwami na Luka 11:5-13 mazali bongo kopesa biso elikya ya kosepelisa ete Jéhovah alingi biso mpe azali kosenzela na bolingo nyonso likoló na biso. Elikya wana esengeli kopusa biso na kozala na botondi mingi kati na motema na biso mpe na bolingo oyo ezangi ndelo. Esengeli kolendisa kondima na biso mpe kokolisa mposa na biso ya koya mbala na mbala kofukama epai ya Mokonzi na seko mpe koumela ntango molai liboso na ye mpamba te yango ezali esengo mingi. Lisusu, maloba na Yesu mazali kondimisa biso ete Nzambe akobengana biso te. Tata na biso ya likoló asepelaka mingi ete biso tokitisa bozito na biso epai na ye. (Nzembo 55:22; 121:1-3) Mpe ntango tozali kosenga ye elimo santu na ye, biso baoyo tozali basaleli na ye bamipesi, azali kopesa biso yango na motema malamu. Nzambe na biso atondi na bolingo azali bongo, mpe tokoki kozala mpenza na kondima epai na ye, mpamba te akoyokaka mabondeli na biso.

Bozongeli

◻ Na nsima ya nani tosengeli kobelema pene na Nzambe kati na libondeli, mpe mpo na nini?

◻ Na ndimbola nini libondeli ezali mpo na bato nyonso te?

◻ ‘Kosambela kati na elimo santu’ elimboli nini?

◻ Ndenge nini tokoki komonisa na nzela na Biblia ete Jéhovah ayokaka mabondeli ya ba Temoins na ye ya sembo oyo babatisami?

[Bililingi na lokasa 14]

Batata awa na mokili bazali kopesa na bana na bango makabo oyo mazali malamu; bobele bongo mpe Jehovah azali kopesa elimo santu epai na baoyo bazali kosenga ye yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto