Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/7 nk. 18-23
  • Etikali moke mokanda na bitumba na Jéhovah” ekosila kokomama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etikali moke mokanda na bitumba na Jéhovah” ekosila kokomama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokanda na bitumba na Jéhovah
  • Melekisedeke Monene Azali mpe mobali na etumba
  • Nzambe mobundi amizweli nkombo na lokumu
  • Mituna ya Batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Likambo litali molongo mobimba​—ekatami mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nguya ya kobebisa—“Yehova azali elombe ya etumba”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Batatoli mpo na kotɛmɛla banzambe ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/7 nk. 18-23

Etikali moke mokanda na bitumba na Jéhovah” ekosila kokomama

“Elobami na mokanda na Bitumba na Jéhovah.”​—MITUYA 21:14.

1, 2. Na ntango ya kala, na libaku nini Jéhovah amonisaki na Baezipito ete azalaki Nzambe mobundi, mpe lolenge nini?

NA MIKOLO na biso, bato bazali kososola te ete Nzambe na Biblia, Jéhovah, azali mobali na mpiko mpo na etumba. Nzokande likambo yango emonisamaki polele na ntango ya kala, ntango abikisaki basaleli na ye na Ezipito, epai kuna bazalaki konyokwama. Na kopusama na Satan le Diable, monguna na bango azangi komonana, Faraon asalaki nyonso mpo ete bakufa na kolemba. Na nsima, emonaki ye ete azwi perte monene lokola atikaki Bayisraele ete bakende, asangisaki mampinga na ye mpe alandaki bango.

2 Kasi, Faraon ayebaki te ete Nzambe ya Bayisraele akokaki kobongwana Nzambe mobundi mpo na kobikisa libota na Ye. Wana ekotaki mampinga ya Baezipito na kati na mabelé makauki ya mai monene Motane mpo na kolanda Bayisraele mpe kokanga bango, Nzambe na Bayisraele oyo bazalaki na likama akotelaki bango: azindisaki batambwisi na makalo mpe bampunda na bango nsima na kozongisa na esika na yango, mai oyo matelemaki epai na epai na ekamwiseli mpo na kopesa nzela na Bayisraele ete bakima.​—Exode 14:14, 24-28.

3. Na loyembo na bango ya elonga, Bayisraele balobaki ete Jéhovah azali Nzambe ya ndenge nini? Nzokande, eleko nini mabota bazali kokipe yango te na ntango na biso?

3 Bayisraele oyo babikaki batelemaki na ngambo ya est ya mai monene Motane, bayembaki bongo loyembo oyo ya elonga mpo na kokumisa Mobikisi na bango na likoló: “Ngai na koyembela Jéhovah, mpo ete ye alongi na nkembo; ye abwaki mbalata mpe motamboli na yango kati na mai. Jéhovah azali nguya na ngai mpe loyembo na ngai, ye akomi mpe lobiko na ngai; ye azali Nzambe na ngai, mpe nakosanzola ye, Nzambe na tata na ngai, mpe nakotombola ye. Jéhovah azali mobali na mpiko mpo na etumba; Jéhovah ezali nkombo na ye. Ye abwaki makalo na Faraon mpe ebele na ye kati na mai na monana mpe bakapitene basili kozinda kati na mai Motane.” (Exode 15:1-4) Kuna, na mai monene ya Motane, Jehovah amonisaki ete azali mobundi makasi. Kasi, mabota bazali kokipe likambo oyo te.

4, 5. Nani nkoko na mabota 12 na Yisraele oyo bazalaki koyemba na esengo nyonso? Moto yango akomaki moninga ya nani, mpe na ntina na ezaleli nini?

4 Mosakoli Moise, ye oyo akambaki bayembi na loyembo oyo epemami na Nzambe, abengaki Jéhovah ete “Nzambe na tata na ngai”. Abrahame, Moebele, azalaki nkoko ya libota ya Yisraele. Mabota 12 na Yisraele makitanaki na ye, na nsima na Yisaka, na Yakobo mpe na bana 12 ya Yakobo. Abrahame mosambeli na Jéhovah Nzambe, azalaki ndakisa monene mpo na bato mosusu. Azalaki na kondima makasi, yango wana ntango Jéhovah asengáká ye ete alongwa na esika azalaki kofanda, na mboka Ulu ya Bakaladi, akakatanaki te, asimbaki nzela mpo na kokende na mokili oyo Nzambe alobaki ete akolakisa ye, kotyaka motema ete Nzambe akosimba elaka na ye ya kopesa mokili yango na ye mpe na bakitani na ye.

5 Na ntina na kondima makasi ya Abrahame, Jéhovah alakaki ete akopesa ye “libota”, elingi koloba mokitani, na nzela na ye mabota nyonso na nsé, bakisa na oyo ya ntango na biso, nde mapambwami. (Genese 12:2, 3; 22:17, 18) Abrahame azalaki na boyokani na penepene elongo na Nzambe, kino abengamaki ete “moninga ya Jéhovah”. Nzambe ye moko abengaki nkoko na mabota oyo mosembwi ete “moninga na ngai”.​—Yakobo 2:23; Yisaya 41:8.

6. Atako azalaki kotambola na kimya nyonso kati na Mabelé na ndaka, ndenge nini Abrahame amonisaki ete azali mobali na etumba, oyo atyaki motema epai na Jéhovah?

6 Atako azalaki kotambola lokola mopaya kati na Mabelé ya Ndaka, Abrahame amonisaki ete akokaki kosala lokola mobali na etumba. Mokolo moko, mikonzi minei oyo bazalaki banguna bakotaki na Mabelé ya ndaka mpe bakangaki Lota, mwana na ndeko na ye, elongo na libota na ye, Abrahame, oyo alingaki mingi basangani ya libota na ye, akamataki bilombe na ye 318, basaleli na ye, mpe na lisalisi na baninga na ye misato oyo bafandaki na ye esika moko na région wana elingi koloba, Aner, Eschcol mpe Mamré, alandaki miyibi wana. Abimelaki bango na butu, wana eyebaki bango eloko te. Abrahame mpe bilombe na ye babetaki banguna wana, atako balekaki bango na mingi. ‘Mikonzi babomamaki’. (Baebele 7:1; Genese 14:13-17) Abrahame abikisaki Lota mpe libota na ye, mpe azwaki lisusu biloko nyonso biyibamaki.

7-9. (a) Nganga-Nzambe nini Abrahame akendaki kokutana na ye, mpe lipamboli nini azwaki? (b) Ndenge nini Abrahame amonisaki ete alingaki ete bozwi na ye euta bobele epai na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló? (c) Lokola elobaki yango Melekisedeke, nani apesaki elonga na Abrahame?

7 Abrahame ayebaki ete kolonga na ye na etumba wana ezalaki bobele mpo ete Jéhovah Nzambe asungaki ye. Na bozongi na ye, azwaki libaku ya kondima polele likambo yango. Koyebaka ete nganga na Nzambe na ye azalaki na Saleme, atambolaki kino na engumba yango. Nsuka na mokapo 14 ya Genese elobi boye mpo na maye malekaki na ntango wana:

8 “Melekisedeke, mokonzi na Saleme abimisaki mampa mpe vinyo. Ye azalaki nganga na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló. Apambolaki Abalama mpe alobaki ete, ‘Tika ete Abalama apambwama na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mozalisi na likoló mpe na nse. Tika ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló asanzolama, oyo apesi bayini na ye na maboko na yo’. Mpe Abalama apesaki ye ndambo na zomi na biloko nyonso. Mokonzi na Sodomo alobaki na Abalama ete, ‘Pesa ngai bato mpe kamata biloko nyonso na motuya mpo na yo’. Abalama azongisaki ete, ‘Nasili kosimba ndai epai na Jéhovah, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mozalisi na likoló mpe na mokili, ete, nakokamata eloko te na yango ezali na yo, ata ndambo na busi te, soko nsinga na sapato te, na ntina ete yo oloba te ete: “Ngai nayeisi Abalama mozwi.” Ngai nakokamata eloko te, bobele yango esili bana na ngai kolia, mpe likabo na bato oyo bakendaki na ngai elongo, Aneri mpe Eschcol mpe Mamré. Bango bakokamata makabo na bango!’”​—Genese 14:18-24.

9 Lokola ba versets oyo emonisi yango, Melekisedeke, nganga na Nzambe mpe mokonzi na mboka Saleme, alendisaki endimeli na Abrahame: ezali Nzambe Oyo-Aleki-Likoló nde abundaki mpo na ye Abrahame mpe mpo na bilombe na ye, mpe apesaki bango elonga Melekisedeke, mokonzi mpe nganga na Nzambe, asanzolaki Jéhovah na libaku yango.

Mokanda na bitumba na Jéhovah

10. Wapi etumbu ya liboso ya Biblia elobeli yango, mpe mpo na nini tokoki koloba ete ezalaki bobele etumba ya liboso kati na ebele na bitumba oyo Jéhovah azali molongi na yango?

10 Lisolo likomami na Genese mokapo 14 oyo elobeli biso ndenge bakonzi oyo banguna bakotaki na Mabelé ya ndaka mpe ndenge Abrahame alongaki bango, yango nde lisolo ya etumba ya liboso elobelami kati na Makomami Mosantu. Na motindo yango, koleka bikeke minei liboso ete asala likambo monene na mai monene ya Motane, Jéhovah amonisaki ete azali “mobali na etumba”. Kasi wana ezalaki bobele ebandeli. Alingaki kolonga lisusu na bitumba makasi, elonga ya nsuka ekozala bongo “na nsuka na biloko mabe ya ntango oyo”.​—Matai 24:3.

11. “Mokanda na Bitumba na Jéhovah” ezali nini, kasi epai wapi tozali kokuta ebele na masolo mosusu na ntina na bitumba oyo abundaki?

11 Engebene Mituya 21:14, bazalaki kokoma “mokanda na Bitumba na Jéhovah”. Mbala mosusu mokanda yango ya masolo ya bitumba oyo Jéhovah abundaki mpo na bato na ye, ebandaki na lisolo ya etumba oyo na mosembwi Abalama abundaki. Moise ayebaki mokanda yango, kasi alobeli biso makambo mosusu te na ntina na mokanda yango. Na yango, toyebi te mitindo nyonso na nzela na yango Jéhovah amimonisaki mobundi na boumeli na eleko nyonso elobelami na mokanda yango, “mokanda na Bitumba na Jéhovah”. Nzokande, lokola eteni monene na Biblia Mosantu ekomamaki uta mokanda wana elobelamaki, tozali bongo na ebele na masolo na bitumba oyo Jéhovah abundaki mpe alongaki.

Melekisedeke Monene Azali mpe mobali na etumba

12. Melekisedeke azalaki elilingi na nani, mpe nzembo nini ya Davidi ezali kolobela moto yango lokola nganga na Nzambe mpe mobundi?

12 Nsima wana Abrahame alongaki Kedolaomele mpe mikonzi mosusu, Melekisedeke apambolaki ye. Mokonzi oyo mpe nganga na Nzambe azalaki elilingi na esakweli na Nganga Monene na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, oyo azali mpe mobali na etumba asimbami na Nzambe oyo aleki banzambe nyonso. Nzembo 110, oyo mokonzi mpe mobundi Davidi akomaki yango na kopemama na Nzambe, ezali mpo na Melekisedeke monene koleka Melekisedeke ya kala, oyo afandaká na Saleme; elobami boye na ntina na ye: “E tika ete Jéhovah abimisa yo na Siona na (nzete, MN) na bokonzi. Zala na bokonzi kati na bayini na yo. Jéhovah asimbi ndai mpe akobongola liloba na ye te ete, Yo ozali nganga na seko na motindo na Melekisedeke. Jéhovah, na loboko na yo na mobali akoboma mikonzi wana ekosilika ye.”​—Nzembo 110:2, 4, 5.

13. Engebene Baebele mokapo 7 mpe mokapo 8, nani moto oyo aleki Melekisedeke, akotaki na esika nini ya kotombwama mpe na mbeka ya motindo nini?

13 Mokomi na mokanda epai na Baebele, oyo apemamaki na Nzambe, amonisaki nani oyo na ntina na ye maloba oyo malobamaki. Akomaki: “Yesu aingelaki lokola moto na liboso mpo na biso, ye Nganga Monene libela na motindo na Melekisede.” (Baebele 6:20) Mokapo elandi na mokanda na Baebele elobeli lokumu ya Melekisedeke ya kala. Kasi lokumu wana ezali bobele moke soki tokokisi yango na lokumu na Yesu Klisto, oyo ye azalaki elilingi na ye, Yesu Klisto oyo nsima na kosekwisama, akotaki na likoló mpo na komonana na liboso na Jéhovah Nzambe mpenza, na motuya na mbeka na ye eleki nyonso oyo Melekisedeke, mokonzi mpe nganga na Nzambe na mboka Saleme, azalaki kopesa.​—Baebele 7:1 kino 8:2.

14. Melekisedeke monene, ye nde moto apesi nzela na bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta na kokotela bitumba oyo mabota emibengi ete ya boklisto bazali kobunda?

14 Melekisedeke, mokonzi mpe nganga na Nzambe, apambolaki mobundi, Abrahame, nsima wana ezongaki ye na elonga. Kasi tokoloba boni mpo na Melekisedeke Monene, mobandisi na losambo ya solo ya boklisto? Bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta balobi ete bazali bamonisi na Yesu Klisto, wana ezali bango kopambola mampinga to basoda ya mikili oyo emitangaka ete ya boklisto mpe bazali kosambela mpo na mampinga yango. Kasi, Nganga Monene ya Jéhovah, oyo azali na likoló, azali kosunga bakonzi na mangomba ya boklisto na lokuta mpo na yango? Andimi komema mokumba na makila nyonso masopamaki na boumeli ya eleko ebengami ete “ya boklisto”, bakisa na oyo esopamaki na boumeli na bitumba mibale ya mokili mobimba? Soki moke te! Mbala moko te apesaki nzela na bayekoli na ye ya solo na kosangana na mokili soki mpe bakota na bitumba na yango, oyo esopi makila mingi.

Nzambe mobundi amizweli nkombo na lokumu

15, 16. Ntango abundaki mpo na basaleli na ye ete abikisa bango na Ezipito, Jéhovah amizwelaki nini?

15 Na ntina na kobikisama na mabota 12 na Yisraele kolongwa na mokili na Ezipito, totangi boye kati na Néhemia 9:10: “Omonisaki bilembo mpe bikamwiseli kotemela Faraon mpe basaleli na ye nyonso mpe bato nyonso na mokili na ye, mpo oyebaki ete basalelaki bango (Bayisraele) makambo na lolendo; omizwelaki yo mpenza nkombo malamu lokola ezali yango na mokolo oyo.”​—Tala Exode 14:18.

16 Mosakoli Yisaya alobelaki kitoko ya nkombo yango, wana elakisaki ye Jéhovah lokola “Ye oyo akomisaki loboko na Ye na nkembo epai na loboko na mobali na Moise; ye oyo apasolaki mai liboso na bango ete amizwela (nkombo) ekoumela seko”. Alobaki epai na Jéhovah: “Bongo, okambaki bato na yo ete omizwela yo moko nkombo na nkembo.” (Yisaya 63:12-14) Na kobondelaka Jéhovah ete asala lisusu mpo na bolamu ya bato na ye, Danyele alobaki na ye boye ete: “Ɛ Jéhovah Nzambe na biso, oyo abimisaki bato na ye na mokili na Ezipito na loboko makasi, mpe oyo azwaki (nkombo na) lokumu, lokola ezali lelo oyo.”​—Danyele 9:15; Yilimia 32:20.

17. Nani Jéhovah akotinda ye kobunda na nkombo na ye, mpe bongo akomonisa nini epai na mabota nyonso?

17 Na ntango ekoki, Jehovah Nzambe akotinda Yesu Klisto, Melekisedeke Monene, mpo akoka kolakisa ete azali mobali na mpiko mpo na etumba Na nzela na ye, Jéhovah akomizwela nkombo na lokumu, na makambo ya nsomo oyo akosala koleka makambo nyonso ya kala oyo makomamaki na “mokanda na Bitumba na Jéhovah” to kati na Makomami na Liebele na Biblia Mosantu. Mokapo ya nsuka ya mokanda ya Zakari (14:3) elobeli ndenge mabota na mokili mobimba bakoyangana kotemela Yelusaleme. Totangi boye: “Bongo Jéhovah akobima mpe akobunda na mabota yango lokola wana abundaki na mokolo na etumba”. Ezali motindo yango nde Nzambe na Biblia akomonisa epai na mabota nyonso ete azali ntango nyonso Nzambe mobundi lokola na mikolo na Yisraele ya kala.

18, 19, Yelusaleme nini ekobundisama na mabota nyonso?

18 Likambo yango ezali naino koya. Kasi Yelusaleme nini oyo ekobundisama na mabota nyonso? Esakweli yango ekokanaki likoló na Yelusaleme ya eleko ya Zakari te. Mboka yango ebomamaki na Baromé na mobu 70 ya ntango na biso. Kasi, etongamaki lisusu, mpe lelo oyo ezali kotalelama ete ezali mboka mosantu, na mangomba na boklisto ya lokuta mpe na libota na Yisraele na mosuni. Na boumeli na etumba ya mikolo motoba, na 1967, Yisraele ekamataki mboka mobimba ya Yelusaleme oyo esili kotongama lisusu. Nzokande, Jéhovah Nzambe asanganaki soko moke te na etumba yango. Yesu Klisto, Mokonzi oyo ye asili kopona, azali koyangela na Yelusaleme na mabelé te, mpe mboka yango ezali lisusu “engumba na Mokonzi monene” te, elingi koloba Jéhovah.​—Matai 5:35.

19 Yelusaleme ya lelo, kapitale ya Ekolo ya Bayuda oyo esangani kati na Nations unies, ezali yango te Yelusaleme oyo elobelami kati na esakweli ya Zakari. Mosakoli oyo alobeli nde Yelusaleme oyo etangami kati na mokanda epai na Baebele. Kolobaka epai na baklisto bapakolami, Paulo alobi: “Kasi bobelemi na ngomba na Siona mpe na mboka na Nzambe na bomoi, yango Yelusaleme na likoló, na motuya monene monene na baanzelu.” (Baebele 12:22) Yelusaleme oyo ya likoló ezali Bokonzi oyo Nzambe apesi na Masiya, emonisami awa na mabelé na ntango na biso na etuluku moke ya baklisto bapakolami oyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi yango. Bango nde bakobundisama na mabota nyonso.

20. Maloba nini mokonzi Ezekiase alobaki yango epai na bato na ye oyo bazalaki na likama mpo ete batye elikya likoló na yango, mpe likoló na maloba ya mokonzi nini oyo aleki Ezekiase ba Témoins de Jéhovah bakotya elikya na bango?

20 Kasi ezala bango, ezala ebele monene ya baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé mpe basili kobima longwa na mabota nyonso mpo na kosalela losambo ya peto elongo na bango, basengeli kobanga te mpo na etumba yango. Ntango mampinga na nsomo na Senakeribe, mokonzi na Asulia, matambolaki mpo na kokende kobundisa Yelusaleme na mikolo ya mokonzi Ezekiase, mokonzi alendisaki Bayisraele na maloba oyo: “Na ye azali na loboko na mosuni nde na biso Jéhovah, Nzambe na biso azali mpo na kosunga biso mpe kobunda bitumba na biso.” Maloba oyo mazalaki na bopusi nini? “Bato bayikaki mpiko mpo na maloba na Ezekiase mokonzi na Yuda.” (2 Ntango 32:8) Ntango mabota na mokili na lelo bakokanela bango, ba Témoins de Jéhovah bakokoka kotya elikya na maloba lokola oyo, mauti na mokonzi aleki Ezekiase, ye wana Yesu Klisto.

20 Na ntango wana, bakomikundola maloba oyo na mpiko mingi malobamaki na Molevi moko Yahaziele ete: “Ekokoka na bino kobunda na etumba oyo te, telema na bisika na bino, zala nyee mpe tala elonga na Jéhovah mpo na bino, e Yuda mpe Yelusaleme. Banga te, yoka mawa mpe te. Lobi bobima liboso na bango mpe Jéhovah akozala na bino elongo.” (2 Ntango 20:17) Ee, na boumeli na eleko wana nyonso ya likama, Jéhovah akozala elongo na basaleli na ye. Bakobatelama mpe bakobika mpo ete ye akobunda mpo na bango. Akosala yango na nsima na Yesu Klisto, Mokonzi mobundi oyo ye asili kopona. Ekosuka boni? Lisangá mobimba ya Diable oyo ezali komonana awa na mabelé ekobomama na ye.​—Emoniseli 19:11-21.

21. (a) Mpo na nini tokomikundola maloba na Yahaziele ntango mabota nyonso bakobundisa Yelusaleme ya likoló mosika te? (b) Etumba yango ekosuka ndenge nini?

21 Solo, Nzambe akomizwela nkombo na lokumu na ndenge akolonga elonga monene na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Mokapo ya sika ekobakisama bongo na mokanda na Bitumba ya jéhovah. Elonga likoló na biloko mabe na tango oyo ekosukisa na nkembo nyonso kokomama na mokanda yango, Mokanda oyo mobimba ekomonisa ete Nzambe Mozwi-na-nguya-Nyonso (akwea naino ata na etumba moko te) azali kolonga, kati na bitumba nyonso oyo azali kobunda. Na nsima, baoyo balingi nkombo ya Jéhovah bakoyemba na esengo nyonso mpo na kokumisa ye. Na ntango yango, verset ya nsuka ya mokanda ya Nzembo ekokokana na nkembo nyonso, oyo elobi ete: “Tika ete biloko nyonso bizali na mpema bisanzola Jéhovah. Aleluya!”​—Nzembo 150:6.

Bozongeli

◻ Na mikolo na biso, eloko nini bato bazali kososola te na ntina na Jehovah, Nzambe na Biblia?

◻ Etumba nini Abrahame abundaki, mpe nani apesaki ye elonga?

◻ “Mokanda na Bitumba na Jéhovah” ezali nini?

◻ Ndenge nini “mokanda na Bitumba na Jehovah” ekosila na kokomama mpe ekobimisa litomba nini.

22. (a) Ndenge nini nsuka na mokanda na Bitumba na Jéhovah ekosila kokomama mpe kosalaka bongo Jehovah akomizwela nini? (b) Nsima na elonga yango, baoyo balingi nkombo ya Jéhovah bakopusama ete basala nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto