Etumba ya Yeriko—lisapo to likambo ya solo?
UTA ebele na mibu, ba arkeyeloge (bato na mayele oyo balukaka biloko bitikala na nse na mabelé) bamekaki kotya ntembe na ntina na bosolo ya lisolo na Biblia oyo litali Yosua mpe etumba na Yeriko. Engebene Biblia, Yosua mpe limpinga na Yisraele batambolaki zingazinga ya Yeriko na boumeli ya mikolo nsambo, kino Nzambe akweisaki bifelo minene ya engumba. Yango epesaki nzela na Bayisraele na kokota mpe ‘kotumba na moto engumba mpe biloko nyonso oyo bizalaki kati na yango’.—Yosua 6:1-24.
Kasi ba arkeyeloge mingi, kopusamaka na misala kitoko oyo Kathleen Kenyon asalaki na bambula 1950, bandimisamaki ete Yeriko ezalaki lisusu te na eleko ya etumba ya Bayisraele. Bazalaki koloba ete engumba ebebisamaki esilaki koleka ekeke moko liboso. Na yango, lisolo na Biblia oyo etali Yosua mpe Bayisraele etyamaki mpenza pembeni. Nzokande, kala mingi te, Bryant Wood, arkeyeloge ya université ya Toronto, na canada, atalelaki na likebi nyonso bitika ya Yeriko. Engebene The New York Times, asukisaki ete Kathleen Kenyon “alukaki bitika ya mabe, na esika ya mabe”, mpe bitika “bizali koyokana malamu” elongo na lisolo ya Biblia.
Bryant Wood azali kolobela mpo na liboke ya putulu, na mbinga ya metele moko, elongo na biteni na bambeki na mabelé motane, ndambo na babrike ya mur moko ekweaki mpe makonzi nyonso eyinda tuu lokola soki engumba nyonso ebebisamaki na moto. Biteni mikemike ya biloko bisalami na mabelé motane biumelaki penepene na mibu 40 (engebene ba métode oyo tozali na yango lelo mpo na kotangela badate, mpe oyo na makanisi ya bato mingi ezali solo te), na mbula 1410 liboso ya ntango na biso, oyo ezali mosika mingi te na 1473, date oyo engebene mitango ya Biblia, etumba na Yeriko esalamaki.
Bokundoli na biloko na nse na mabelé epesaki nzela na komona ete bandako ya engumba na kala ya Yeriko ezalaki na nkona mingi oyo ezalaki kobatelama. Likambo oyo ezali na ntina mingi, mpamba te Biblia eyebisi ete Yeriko ekweaki mwa ntango moke nsima na bobuki mbuma na printemps, mpe kozanga ete ezingelama ntango molai. (Yosua 3:14-16) Yango elimboli mpo na nini bandako ya Yeriko etondanaki na bankona mingi na ntango engumba ebomamaki.
Bato na sianse bazali nde kokakatana soki ekomi likambo ya kondima bosolo ya Biblia. Yango wana, zulunalo Times eyebisi maloba ya profesere moko ya mayele mingi oyo alobaki na ntina na bokundoli ya Bryant Wood: “Ntembe ezali ata moke te ete ntalo monene ya makambo oyo Biblia ezali koyebisa ezali na mwa basolo mikemike.” Nzokande, lokola masolo ya Biblia ezali kondimisama mbala na mbala na sianse mpe na bokundoli ya biloko na nse na mabelé, mpo na ye oyo azali na koponapona te ezali polele ete Biblia ekoki mpenza kozala mokanda ya lokuta te oyo ekoki kozala bobele na mwa solo mikemike. Lokola yango moko elobi yango: ’’Nzambe azali solo ata bato nyonso bazali na lokuta.”—Baloma 8:4.
Atako ndimbola ya bokundoli na biloko na nse na mabelé oyo esalamaki na esika Yeriko ezalaka kala ezali kosepelisa, baklisto ya solo ‘bazali kotambola na kondima, kasi na komona te’. (2 Bakolinti 5:7.) Kondima na bango ezali kotalela arkeyeloji te. Ezala na litatoli ya arkeyeloji to te, Biblia esila komonisa mbala ebele ete ezali liziba ya makambo ebongi mpo na kotyela motema mpo na makambo maleka kala, mpo na sikawa mpe mpo na mikolo mizali koya.—Nzembo 119:105; 2 Petelo 1:19-21.
Bitika na Yeriko, epai kuna Jéhovah apesaki elonga na Bayisraele.